< Esther 2 >

1 After these things, when the fury of king Ahasuerus was appeased, he remembered Vashti, and what she had done, and what was decreed against her.
Sima na mikolo, kanda ya mokonzi Kizerisesi ekitaki; akomaki kokanisa Vasti, makambo oyo asalaki mpe mobeko oyo azwaki na tina na ye.
2 Then said the king's servants that attended upon him, Let there be maidens, virgins of beautiful countenance, sought for the king;
Bato oyo basalaka epai ya mokonzi balobaki na ye: — Tika ete balukela mokonzi bilenge basi ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te.
3 and let the king appoint officers in all the provinces of his kingdom, that they may gather together all the young virgins of beautiful countenance to Shushan the fortress, to the house of the women, unto the custody of Hegai the king's chamberlain, keeper of the women; and let their things for purification be given.
Tika ete mokonzi atia bato kati na etuka moko na moko ya bokonzi na ye, mpo ete bamema na ndako ya basi oyo ezalaka na Size, engumba mokonzi, bilenge basi nyonso ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete bapesa bango na maboko ya Ege, kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, oyo baboma ye mokongo mpe abatelaka basi; mpe tika ete bapesa bango mafuta mpe malasi oyo ekomisaka bato kitoko.
4 And let the maiden that pleaseth the king be queen instead of Vashti. And the thing pleased the king; and he did so.
Tika ete elenge mwasi oyo akosepelisa mokonzi akoma mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti. Likanisi oyo esepelisaki mokonzi mpe asalelaki yango.
5 There was in Shushan the fortress a certain Jew, whose name was Mordecai, the son of Jair, the son of Shimei, the son of Kish, a Benjaminite,
Kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi, ezalaki na Moyuda moko ya libota ya Benjame; kombo na ye ezalaki « Maridoshe. » Maridoshe azalaki mwana mobali ya Yairi, mwana mobali ya Shimei, mwana mobali ya Kishi.
6 who had been carried away from Jerusalem with the captives who had been carried away with Jeconiah king of Judah, whom Nebuchadnezzar the king of Babylon had carried away.
Maridoshe azalaki kati na bato oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu, longwa na Yelusalemi, elongo na Yekonia, mokonzi ya Yuda.
7 And he brought up Hadassah, that is, Esther, his uncle's daughter; for she had neither father nor mother — and the maiden was fair and beautiful — and when her father and mother were dead, Mordecai took her for his own daughter.
Maridoshe azalaki kobokola Adasa, mwana mwasi ya noko na ye mpo ete azalaki lisusu na tata mpe na mama te. Nzokande, elenge mwasi oyo kombo na ye mosusu ezalaki « Ester » azalaki na ezaleli malamu mpe elongi kitoko. Tango tata mpe mama na ye bakufaki, Maridoshe azwaki ye mpe akomaki kobokola ye lokola mwana na ye penza ya mwasi.
8 And it came to pass when the king's commandment and his decree was heard, and when many maidens were gathered together unto Shushan the fortress, unto the custody of Hegai, that Esther also was brought into the king's house, unto the custody of Hegai, keeper of the women.
Tango bapanzaki sango ya mitindo mpe ya mobeko ya mokonzi, basangisaki bilenge basi ebele na engumba Size, mpe Ege azalaki kobatela bango. Boye bamemaki mpe Ester kati na ndako ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Ege, mosali oyo azalaki kobatela ndako ya basi ya mokonzi.
9 And the maiden pleased him, and obtained favour before him; and he speedily gave her her things for purification, and her portions, and the seven maidens selected to be given her, out of the king's house; and he removed her and her maids to the best [place] of the house of the women.
Ester asepelisaki Ege mpe azwaki ngolu na miso na ye. Mbala moko, apesaki ye biloko ya monzele mpe bilei oyo asengeli kolia; apesaki ye mpe basali sambo ya basi oyo aponaki kati na ndako ya mokonzi. Bongo atiaki ye elongo na basali na ye ya basi kati na shambre oyo elekaki kitoko kati na ndako ya basi ya mokonzi.
10 Esther had not made known her people nor her birth; for Mordecai had charged her that she should not make it known.
Ester atikalaki te koyebisa ekolo mpe libota na ye, pamba te Maridoshe apekisaki ye koloba yango.
11 And Mordecai walked every day before the court of the women's house, to know how Esther did, and what should become of her.
Mikolo nyonso, Maridoshe azalaki koleka liboso ya lopango ya ndako ya basi ya mokonzi mpo na kozwa basango ya Ester mpe koyeba ndenge nini bazalaki kobatela ye.
12 And when every maiden's turn came to go in to king Ahasuerus after that she had been treated for twelve months, according to the manner of the women (for so were the days of their purification accomplished — six months with oil of myrrh, and six months with spices, and with things for the purifying of the women,
Kolanda ndenge ekatamaki, liboso ete elenge mwasi nyonso akende kokutana na mokonzi Kizerisesi, basengelaki kosala sanza zomi na mibale mpo na kobongisa ye mpo ete akoma kitoko: sanza motoba na mafuta ya mire, mpe sanza motoba mosusu na biloko ya monzele.
13 and thus came the maiden in unto the king), whatever she desired was given her to go with her out of the house of the women to the king's house.
Tala ndenge elenge mwasi nyonso oyo azalaki kokende epai ya mokonzi azalaki: Wuta na ndako ya basi ya mokonzi kino na ndako ya mokonzi, bazalaki kopesa ye eloko nyonso oyo azalaki na yango na bosenga.
14 In the evening she went, and on the morrow she returned into the second house of the women, unto the custody of Shaashgaz, the king's chamberlain, keeper of the concubines. She came in to the king no more, unless the king delighted in her, and she were called by name.
Boye elenge mwasi azalaki kokende epai ya mokonzi na pokwa; mpe na tongo ya mokolo oyo ezalaki kolanda, azalaki kokende na ndako mosusu ya basi ya mokonzi, oyo Shashigazi azalaki kokamba. Shashigazi azalaki kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, baboma ye mokongo mpe azalaki na mokumba ya kobatela bamakangu ya mokonzi. Elenge mwasi azalaki lisusu te kozonga liboso ya mokonzi, longola kaka soki mokonzi ayoki posa na ye mpe abengisi ye na kombo.
15 And when the turn of Esther, the daughter of Abihail the uncle of Mordecai, who had taken her for his daughter, came to go in to the king, she required nothing but what Hegai the king's chamberlain, keeper of the women, appointed. And Esther obtained grace in the sight of all them that saw her.
Tango ekomaki ngala ya Ester ya kokende epai ya mokonzi; Ester, mwana mwasi ya Abiyaili, noko ya Maridoshe oyo abokolaki Ester, amemaki eloko mosusu te, bobele oyo Ege, kalaka ya lokumu, oyo baboma ye mokongo mpe azalaki na kobatela ndako ya basi ya mokonzi, ayebisaki ye. Mpe Ester azwaki ngolu na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye.
16 So Esther was taken to king Ahasuerus, into his royal house, in the tenth month, that is, the month Tebeth, in the seventh year of his reign.
Ezalaki na sanza ya zomi, sanza ya Tebeti, na mobu ya sambo ya bokonzi ya Kizerisesi nde bamemaki Ester liboso ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi.
17 And the king loved Esther above all the women, and she obtained grace and favour in his sight more than all the virgins, and he set the royal crown upon her head, and made her queen instead of Vashti.
Mokonzi alingaki Ester makasi koleka basi nyonso. Ester azwaki ngolu mpe andimamaki na miso ya mokonzi koleka bilenge basi mosusu. Bongo mokonzi atiaki motole ya bokonzi na moto ya Ester mpe akomisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti.
18 And the king made a great feast to all his princes and his servants, Esther's feast; and he made a release to the provinces, and gave presents according to the king's bounty.
Mokonzi alambisaki biloko ebele mpo na lokumu ya Ester mpe mpo na kosepela elongo na basali na ye nyonso mpe bakalaka na ye. Akataki lisusu ete, na mokolo wana, bituka nyonso efuta mpako te mpe akabolaki bakado na motema ya esengo.
19 And when the virgins were gathered together the second time, Mordecai sat in the king's gate.
Tango basangisaki bilenge basi na mbala ya mibale, Maridoshe avandaki na ekuke ya mokonzi.
20 (Esther, as Mordecai had charged her, had not yet made known her birth nor her people; for Esther did what Mordecai told her, like as when she was brought up with him.)
Kasi Ester atikalaki te koloba libota na ye to mpe ekolo na ye, ndenge kaka Maridoshe ayebisaki ye ete aloba yango te. Ester azalaki kokoba kobatela toli ya Maridoshe, ndenge kaka azalaki kosala na tango Maridoshe azalaki kobokola ye.
21 In those days, while Mordecai sat in the king's gate, two of the king's chamberlains, Bigthan and Teresh, of those which kept the threshold, were wroth, and sought to lay hand on the king Ahasuerus.
Tango Maridoshe avandaki na ekuke ya mokonzi, Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kobatela ekuke ya mokonzi, batombokaki mpe balukaki koboma mokonzi Kizerisesi.
22 And the thing became known to Mordecai, and he related it to Esther the queen, and Esther told it to the king in Mordecai's name.
Kasi Maridoshe asosolaki makanisi na bango mpe ayebisaki yango epai ya Ester, mwasi ya mokonzi, oyo mpe ayebisaki yango epai ya mokonzi na kombo ya Maridoshe.
23 And the matter was investigated and found out; and they were both hanged on a tree. And it was written in the book of the chronicles before the king.
Bongo sima na bango koluka koyeba bosolo ya likambo yango, emonanaki ete ezali likambo ya solo. Boye badiembikaki basoda nyonso mibale na nzete mpe bakomaki makambo nyonso wana kati na buku ya masolo, na miso ya mokonzi.

< Esther 2 >