< 2 Chronicles 28 >

1 Ahaz was twenty years old when he began to reign; and he reigned sixteen years in Jerusalem. And he did not what was right in the sight of Jehovah, like David his father,
Akazi azalaki na mibu tuku mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe; nzokande, Davidi, koko na ye, asalaki makambo ya sembo.
2 but walked in the ways of the kings of Israel, and even made molten images for the Baals;
Alandaki banzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki kutu banzambe ya bikeko ya bibende banyangwisa na moto mpo na banzambe Bala.
3 and he burned incense in the valley of the son of Hinnom, and burned his sons in the fire, according to the abominations of the nations that Jehovah had dispossessed from before the children of Israel.
Atumbaki mbeka ya malasi kati na Lubwaku ya Beni-Inomi mpe abonzaki bana na ye ya mibali na moto kolanda misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bana ya Isalaele.
4 And he sacrificed and burned incense on the high places, and on the hills, and under every green tree.
Abonzaki bambeka mpe atumbaki mbeka ya malasi, na bisambelo ya likolo ya bangomba, na bangomba mike mpe na se ya banzete ya mibesu.
5 Therefore Jehovah his God gave him into the hand of the king of Syria; and they smote him, and carried away a great multitude of them captives, and brought them to Damascus. And he was also given into the hand of the king of Israel, who smote him with a great slaughter.
Yawe, Nzambe na ye, akabaki ye na maboko ya mokonzi ya Siri. Bato ya Siri babetaki ye, bazwaki bato na ye ebele na bowumbu mpe bamemaki bango na Damasi. Nzambe akabaki ye lisusu na maboko ya mokonzi ya Isalaele, oyo abebisaki biloko na ye mpe alongaki ye.
6 And Pekah the son of Remaliah slew in Judah a hundred and twenty thousand in one day, all valiant men, because they had forsaken Jehovah the God of their fathers.
Na mokolo moko, Peka, mwana mobali ya Remalia, abomaki basoda nkoto nkama moko na tuku mibale kati na Yuda, bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko; pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.
7 And Zichri, a mighty man of Ephraim, slew Maaseiah the king's son, and Azrikam the governor of the house, and Elkanah the second to the king.
Zikiri, moto ya bitumba ya Efrayimi, abomaki Maaseya, mwana mobali ya mokonzi; Azirikami, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi; mpe Elikana, molandi ya mokonzi.
8 And the children of Israel carried away captive of their brethren two hundred thousand, women, sons, and daughters, and took away also much spoil from them, and brought the spoil to Samaria.
Bato ya Isalaele bakangaki kati na bandeko na bango bato nkoto nkama mibale: basi, bana mibali mpe bana basi; bazwaki bomengo ebele ya bitumba mpe bamemaki yango na Samari.
9 But a prophet of Jehovah was there, whose name was Oded; and he went out before the host that came to Samaria, and said unto them, Behold, because Jehovah the God of your fathers was wroth with Judah, he gave them into your hand, and ye have slain them in a rage that reaches up to heaven.
Kuna na Samari, ezalaki na mosakoli moko ya Yawe, kombo na ye « Odedi. » Abimaki liboso ya mampinga tango bazalaki kozonga na Samari mpe alobaki na bango: « Tala, na kanda makasi na Ye mpo na Yuda, Yawe, Nzambe ya batata na bino, akabi bango na maboko na bino, mpe bobomi bango na kanda oyo ekomi kino na likolo.
10 And now ye think to subjugate the children of Judah and Jerusalem as your bondmen and bondwomen. Are there not with you, even with you, trespasses against Jehovah your God?
Mpe sik’oyo, bolingi kokomisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi bawumbu na bino? Kasi bino moko, bozali mpe na ngambo te liboso ya Yawe, Nzambe na bino?
11 And now hear me, and send back the captives again, whom ye have taken captive of your brethren; for the fierce wrath of Jehovah is upon you.
Boyoka ngai sik’oyo! Bozongisa bandeko na bino, oyo bokangi lokola bawumbu, pamba te kanda makasi ya Yawe ezali likolo na bino. »
12 And certain of the heads of the children of Ephraim, Azariah the son of Johanan, Berechiah the son of Meshillemoth, and Hezekiah the son of Shallum, and Amasa the son of Hadlai, stood up against them that came from the war,
Kati na bakambi ya Efrayimi, bamosusu batelemelaki ba-oyo bawutaki na bitumba. Ezalaki Azaria, mwana mobali ya Yoanani; Berekia, mwana mobali ya Meshilemoti; Ezekiasi, mwana mobali ya Shalumi; mpe Amasa, mwana mobali ya Adilayi.
13 and said to them, Ye shall not bring in the captives hither; because, for our guilt before Jehovah, ye think to increase our sins and our trespasses: for our trespass is great, and fierce wrath is upon Israel.
Balobaki na bango: « Bosengeli te komema bakangami oyo awa, soki te tokomema ngambo epai na Yawe. Boni, bolingi lisusu kobakisa masumu mpe ngambo na biso! Ngambo na biso eleki penza monene, mpe kanda makasi ya Yawe ezali likolo ya Isalaele. »
14 Then the armed men left the captives and the spoil before the princes and all the congregation.
Basoda batikaki bakangami mpe bomengo ya bitumba na miso ya bakambi mpe ya lisanga mobimba.
15 And the men that have been expressed by name rose up, and took the captives, and with the spoil clothed all that were naked among them, and arrayed them, and shod them, and gave them to eat and to drink, and anointed them, and carried all the feeble of them on asses, and brought them to Jericho the city of palm-trees, to their brethren. And they returned to Samaria.
Sima, bato oyo baponaki na bakombo na bango bazwaki bakangami mpe balendisaki bango; bazwaki kati na bomengo ya bitumba bilamba, mpe balatisaki ba-oyo nyonso bazalaki bolumbu. Bapesaki bango bilamba, basapato, bilei mpe masanga; mpe bapakolaki ba-oyo bazokaki kisi, bamemaki na likolo ya ba-ane ba-oyo bakokaki kotambola te mpe bazongisaki bango na Jeriko, engumba ya banzete ya mbila, epai ya bandeko na bango. Sima, bazongaki na Samari.
16 At that time king Ahaz sent to the kings of Assyria to help him.
Na tango yango, mokonzi Akazi atindaki bato epai ya bakonzi ya Asiri mpo na kosenga lisungi.
17 And again the Edomites came and smote Judah, and carried away captives.
Bato ya Edomi bayaki lisusu kobundisa Yuda mpe bamemaki bakangami,
18 And the Philistines invaded the cities of the lowland, and of the south of Judah, and took Beth-shemesh, and Ajalon, and Gederoth, and Socho and its dependent villages, and Timnah and its dependent villages, and Guimzo and its dependent villages; and they dwelt there.
wana bato ya Filisitia bakotaki na makasi kati na bingumba ya etando mpe ya sude ya Yuda. Bazwaki na makasi Beti-Shemeshi, Ayaloni, Gederoti, Soko, Timina mpe Gimizo elongo na bamboka na yango ya zingazinga, mpe bavandaki kuna.
19 For Jehovah humbled Judah because of Ahaz king of Israel, for he had made Judah lawless, and transgressed much against Jehovah.
Yawe asambwisaki Yuda likolo ya Akazi, mokonzi ya Isalaele, pamba te atindikaki bato ya Yuda na mabe mpe azangaki boyengebene liboso ya Yawe.
20 And Tilgath-Pilneser king of Assyria came to him, and troubled him, and did not support him.
Na esika ya kosunga ye, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa ye mpe azwaki ye lokola monguna.
21 For Ahaz stripped the house of Jehovah, and the house of the king and of the princes, and gave to the king of Assyria; but he was of no help to him.
Akazi azwaki ndambo ya biloko ya Tempelo ya Yawe, ya ndako ya mokonzi mpe ya bandako ya bakambi; mpe apesaki yango epai ya mokonzi ya Asiri. Kasi atako bongo, azwaki kaka lisungi te.
22 And in the time of his trouble he transgressed yet more against Jehovah, this king Ahaz.
Wana azalaki kati na pasi, mokonzi Akazi akobaki lisusu kosala makambo ya nkele na miso ya Yawe:
23 And he sacrificed to the gods of Damascus, which had smitten him; and he said, Since the gods of the kings of Syria help them, I will sacrifice to them, that they may help me. But they were the ruin of him, and of all Israel.
abonzaki bambeka epai ya banzambe ya Damasi oyo elongaki ye, pamba te amilobelaki: « Lokola banzambe ya bakonzi ya Siri bayaka kosunga bato na bango, ngai mpe nakobonzela bango bambeka mpo ete baya kosunga ngai! » Kasi esalaki ete ye akweyisama, Isalaele mobimba mpe ekweyisama.
24 And Ahaz gathered the vessels of the house of God, and cut in pieces the vessels of the house of God, and closed the doors of the house of Jehovah, and he made for himself altars in every corner of Jerusalem.
Akazi asangisaki bisalelo nyonso ya Tempelo ya Nzambe mpe abukaki-bukaki yango. Akangaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe atongaki bitumbelo na babalabala nyonso ya Yelusalemi.
25 And in every several city of Judah he made high places to burn incense to other gods, and provoked to anger Jehovah the God of his fathers.
Kati na bingumba nyonso ya Yuda, asalaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na kobonza mbeka ya malasi epai ya banzambe mosusu. Na bongo, apesaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, kanda makasi.
26 And the rest of his acts, and all his ways, first and last, behold, they are written in the book of the kings of Judah and Israel.
Makambo mosusu oyo etali mokonzi Akazi mpe etamboli na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele.
27 And Ahaz slept with his fathers, and they buried him in the city, in Jerusalem; but they brought him not into the sepulchres of the kings of Israel. And Hezekiah his son reigned in his stead.
Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba Yelusalemi, kasi kati na bakunda ya bakonzi ya Isalaele te. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi.

< 2 Chronicles 28 >