< Mark 9 >

1 And he said to them, “Amen I say to you, that there are some among those standing here who shall not taste death until they see the kingdom of God arriving in power.”
Yesu alobaki na bango lisusu: — Nazali koloba na bino penza ya solo: kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.
2 And after six days, Jesus took with him Peter, and James, and John; and he led them separately to a lofty mountain alone; and he was transfigured before them.
Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango:
3 And his vestments became radiant and exceedingly white like snow, with such a brilliance as no fuller on earth is able to achieve.
bilamba na Ye ekomaki kongenga, ekomaki pembe makasi; moto moko te kati na mokili akoki kobimisa pembe ya ndenge wana.
4 And there appeared to them Elijah with Moses; and they were speaking with Jesus.
Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu.
5 And in response, Peter said to Jesus: “Master, it is good for us to be here. And so let us make three tabernacles, one for you, and one for Moses, and one for Elijah.”
Petelo alobaki na Yesu: — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kotikala awa! Tokotonga bandako misato ya kapo: moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya.
6 For he did not know what he was saying. For they were overwhelmed by fear.
Solo, Petelo azalaki kososola te makambo oyo azalaki koloba, pamba te bango misato batondaki na kobanga.
7 And there was a cloud overshadowing them. And a voice came from the cloud, saying: “This is my most beloved Son. Listen to him.”
Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango: — Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye!
8 And immediately, looking around, they no longer saw anyone, except Jesus alone with them.
Mbala moko, bayekoli batalaki zingazinga na bango mpe bamonaki moto mosusu te elongo na bango, kaka Yesu.
9 And as they were descending from the mountain, he instructed them not to relate to anyone what they had seen, until after the Son of man will have risen again from the dead.
Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apekisaki bango koloba ata na moto moko, makambo oyo bawutaki komona kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.
10 And they kept the word to themselves, arguing about what “after he will have risen from the dead” might mean.
Babatelaki likambo yango na motema. Atako bongo, bazalaki kaka kotunana: — Kosekwa kati na bakufi elingi koloba nini?
11 And they questioned him, saying: “Then why do the Pharisees and the scribes say that Elijah must arrive first?”
Bayekoli batunaki Yesu: — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso?
12 And in response, he said to them: “Elijah, when he will arrive first, shall restore all things. And in the manner that it has been written about the Son of man, so must he suffer many things and be condemned.
Yesu azongiselaki bango: — Solo, Eliya asengeli koya moto ya liboso mpo na kozongisa makambo nyonso na molongo. Bongo mpo na nini ekomama lisusu ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi, mpe basengeli koboya Ye?
13 But I say to you, that Elijah also has arrived, (and they have done to him whatever they wanted) just as it has been written about him.”
Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya ayaki mpe basalaki ye makambo nyonso oyo balingaki, kolanda ndenge ekomama na tina na ye.
14 And approaching his disciples, he saw a great crowd surrounding them, and the scribes were arguing with them.
Tango bakomaki pene ya esika oyo bayekoli mosusu bazalaki, bamonaki ebele ya bato penza bazingeli bango, mpe balakisi ya Mobeko kotiana tembe elongo na bayekoli.
15 And soon all the people, seeing Jesus, were astonished and struck with fear, and hurrying to him, they greeted him.
Tango kaka bato yango bamonaki Yesu, bakamwaki mingi mpe bapotaki mbangu mpo na kokutana na Ye mpe kopesa Ye mbote.
16 And he questioned them, “What are you arguing about among yourselves?”
Yesu atunaki bango: — Likambo nini bozali kotiana na yango tembe elongo na bayekoli?
17 And one from the crowd responded by saying: “Teacher, I have brought to you my son, who has a mute spirit.
Moto moko kati na ebele yango ya bato azongiselaki Ye: — Moteyi, namemaki mwana na ngai, oyo ya mobali epai na Yo; pamba te azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo esala ete alobaka te.
18 And whenever it takes hold of him, it throws him down, and he foams and gnashes with his teeth, and he becomes unconscious. And I asked your disciples to cast him out, and they could not.”
Bipai nyonso oyo molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe mwana akomaka kobimisa fulufulu na monoko, kolia minu, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te.
19 And answering them, he said: “O unbelieving generation, how long must I be with you? How long shall I endure you? Bring him to me.”
Yesu alobaki na bango: — Ekeke ya bato bazanga kondima! Kino tango nini nakozala na bino elongo? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino? Bomemela Ngai mwana yango.
20 And they brought him. And when he had seen him, immediately the spirit disturbed him. And having been thrown to the ground, he rolled around foaming.
Bongo bamemaki mwana yango epai ya Yesu. Tango kaka molimo yango ya mabe emonaki Yesu, eningisaki mwana yango makasi mpe mwana akweyaki na mabele, akomaki kobaluka-baluka mpe kobimisa fulufulu na monoko.
21 And he questioned his father, “How long has this been happening to him?” But he said: “From infancy.
Yesu atunaki tata ya mwana: — Esali mikolo boni wuta mwana akoma boye? Tata ya mwana azongisaki: — Wuta tango azalaki mwana moke penza.
22 And often it casts him into fire or into water, in order to destroy him. But if you are able to do anything, help us and take pity on us.”
Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso.
23 But Jesus said to him, “If you are able to believe: all things are possible to one who believes.”
Yesu alobaki na ye: — Olobi nini: « Soki okoki! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.
24 And immediately the father of the boy, crying out with tears, said: “I do believe, Lord. Help my unbelief.”
Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi: — Nandimi! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima.
25 And when Jesus saw the crowd rushing together, he admonished the unclean spirit, saying to him, “Deaf and mute spirit, I command you, leave him; and do not enter into him anymore.”
Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe: — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo: bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.
26 And crying out, and convulsing him greatly, he departed from him. And he became like one who is dead, so much so that many said, “He is dead.”
Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi mpe ebimaki kati na ye. Mwana akomaki lokola moto akufi na ndenge ete mingi kati na bato oyo bazalaki wana bakomaki koloba « Akufi! »
27 But Jesus, taking him by the hand, lifted him up. And he arose.
Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye; mpe mwana atelemaki.
28 And when he had entered into the house, his disciples questioned him privately, “Why were we unable to cast him out?”
Yesu akotaki na ndako; lokola bayekoli batikalaki bango moko kaka elongo na Ye, batunaki Ye: — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango?
29 And he said to them, “This kind is able to be expelled by nothing other than prayer and fasting.”
Yesu azongisaki: — Babenganaka molimo ya ndenge wana kaka na losambo.
30 And setting out from there, they passed through Galilee. And he intended that no one know about it.
Tango balongwaki na esika wana, bakatisaki na mokili ya Galile mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika oyo bazali,
31 Then he taught his disciples, and he said to them, “For the Son of man shall be delivered into the hands of men, and they will kill him, and having been killed, on the third day he will rise again.”
pamba te azalaki koteya bayekoli na Ye mpe koloba na bango: — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, bakoboma Ye, mpe, mikolo misato sima na kufa na Ye, akosekwa.
32 But they did not understand the word. And they were afraid to question him.
Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango.
33 And they went to Capernaum. And when they were in the house, he questioned them, “What did you discuss on the way?”
Tango bakomaki na Kapernawumi, wana bazalaki kati na ndako, Yesu atunaki bango: — Likambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela?
34 But they were silent. For indeed, on the way, they had disputed among themselves as to which of them was greater.
Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene.
35 And sitting down, he called the twelve, and he said to them, “If anyone wants to be first, he shall be the last of all and the minister of all.”
Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango: — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.
36 And taking a child, he set him in their midst. And when he had embraced him, he said to them:
Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango:
37 “Whoever receives one such child in my name, receives me. And whoever receives me, receives not me, but him who sent me.”
— Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.
38 John responded to him by saying, “Teacher, we saw someone casting out demons in your name; he does not follow us, and so we prohibited him.”
Yoane alobaki: — Moteyi, tomonaki moto moko azali kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe topekisaki ye, pamba te azali elongo na biso te.
39 But Jesus said: “Do not prohibit him. For there is no one who can act with virtue in my name and soon speak evil about me.
Kasi Yesu azongisaki: — Bopekisa ye te; pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa na Kombo na Ngai mpe aloba mbala moko, sima na mwa tango, mabe na tina na Ngai.
40 For whoever is not against you is for you.
Moto oyo atelemeli biso te azali mpo na biso.
41 For whoever, in my name, will give you a cup of water to drink, because you belong to Christ: Amen I say to you, he shall not lose his reward.
Nazali koloba na bino penza ya solo: moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
42 And whoever will have scandalized one of these little ones who believe in me: it would be better for him if a great millstone were placed around his neck and he were thrown into the sea.
Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.
43 And if your hand causes you to sin, cut it off: it is better for you to enter into life disabled, than having two hands to go into Hell, into the unquenchable fire, (Geenna g1067)
Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko, na esika ete otikala na maboko mibale mpe okende na lifelo, kati na moto oyo ekufaka te, [ (Geenna g1067)
44 where their worm does not die, and the fire is not extinguished.
epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
45 But if your foot causes you to sin, chop it off: it is better for you to enter into eternal life lame, than having two feet to be cast into the Hell of unquenchable fire, (Geenna g1067)
Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na lokolo moko, na esika ete otikala na makolo mibale mpe obwakama na lifelo [ (Geenna g1067)
46 where their worm does not die, and the fire is not extinguished.
epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.]
47 But if your eye causes you to sin, pluck it out: it is better for you to enter into the kingdom of God with one eye, than having two eyes to be cast into the Hell of fire, (Geenna g1067)
Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota na Bokonzi ya Nzambe, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na lifelo (Geenna g1067)
48 where their worm does not die, and the fire is not extinguished.
epai wapi nkusu ekufaka te, mpe moto ekufaka te.
49 For all shall be salted with fire, and every victim shall be salted with salt.
Pamba te moto na moto akoleka na moto mpo ete akoma elengi lokola mungwa.
50 Salt is good: but if the salt has become bland, with what will you season it? Have salt in yourselves, and have peace among yourselves.”
Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.

< Mark 9 >