< Deuteronomy 9 >
1 “Listen, O Israel: You shall cross over the Jordan today, in order to possess nations, very great and stronger than yourself, cities vast and walled even to the sky,
Oh Isalaele, yoka malamu! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo.
2 a people great and lofty, the sons of the Anakim, whom you yourselves have seen and heard, against whom no one is able to stand.
Bato yango bazali makasi mpe bingambe, bana ya Anaki! Oyebi bango mpe osila koyoka bato koloba na tina na bango: « Nani akoki kotelema liboso ya bana ya Anaki? »
3 Therefore, you shall know today that the Lord your God himself will pass over before you, like a devouring and consuming fire, to crush and to wipe away and to utterly ruin them before your face, quickly, just as he has spoken to you.
Kasi lelo, yeba malamu ete Yawe, Nzambe na yo, azali Ye moko kotambola liboso na yo lokola moto oyo ezikisaka; akobebisa bango mpe akobuka bango liboso na yo; bongo yo okokamata mabele na bango mpe okosilisa bango noki-noki, ndenge Yawe alakaki yo.
4 You should not say in your heart, when the Lord your God will have destroyed them in your sight: ‘It is because of my justice that the Lord led me in, so that I might possess this land, while these nations have been destroyed because of their impiety.’
Tango Yawe, Nzambe na yo, akosilisa kobengana bango liboso na yo, komilobela te kati na motema na yo: « Ezali mpo na bosembo na ngai nde Yawe amemaki ngai mpo ete nakamata mokili oyo. » Te, ezali bongo te! Ezali nde mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe abengani yango liboso na yo.
5 For it is not because of your justices or the uprightness of your heart that you will enter, so that you may possess their lands. Instead, it is because they have acted wickedly that they are destroyed upon your arrival, and so that the Lord may accomplish his word, which he promised under oath to your fathers, Abraham, Isaac, and Jacob.
Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi.
6 Therefore, know that the Lord your God will not give you this excellent land as a possession due to your justices, for you are a very stiff-necked people.
Boye sosola malamu ete ezali te mpo na bosembo na yo nde Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo mokili oyo ya malamu mpo ete okamata yango, pamba te yo mpe ozali libota ya batomboki.
7 Remember, and never forget, how you provoked the Lord your God to anger in the wilderness. You have always contended against the Lord, from the day that you went forth from Egypt, even to this place.
Kanisaka malamu likambo oyo mpe kobosanaka te ndenge nini opelisaki kanda ya Yawe, Nzambe na yo, kati na esobe: banda mokolo oyo bobimaki wuta na Ejipito kino bokomaki na esika oyo, bozalaki kaka kotosa Yawe te.
8 For at Horeb also, you provoked him, and, becoming angry, he was willing to destroy you,
Na ngomba Orebi, bopesaki Yawe kanda makasi mpe asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino.
9 when I ascended onto the mountain, so that I might receive the tablets of stone, the tablets of the covenant which the Lord formed with you. And I persevered on the mountain for forty days and nights, neither eating bread, nor drinking water.
Tango namataki likolo ya ngomba mpo na kozwa bitando ya mabanga ya boyokani oyo Yawe asalaki elongo na bino, natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei; naliaki lipa te mpe namelaki mayi te.
10 And the Lord gave me two tablets of stone, written with the finger of God and containing all the words that he spoke to you on the mountain from the midst of fire, while the people, being stirred up, were assembled together.
Yawe apesaki ngai bitando mibale ya mabanga oyo mosapi ya Nzambe ekomaki. Na likolo na yango, ezali na mibeko nyonso Yawe oyo ayebisaki bino likolo ya ngomba longwa kati na moto, na mokolo oyo bosanganaki.
11 And when forty days, and as many nights, had passed, the Lord gave me the two tablets of stone, the tablets of the covenant.
Na suka ya mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, Yawe apesaki ngai bitando yango mibale ya mabanga ya boyokani.
12 And he said to me: ‘Rise up, and descend quickly from here. For your people, whom you led away from Egypt, have quickly abandoned the way that you have shown to them, and they have made a molten idol for themselves.’
Bongo Yawe alobaki na ngai: « Kende, kita mbangu na ngomba oyo, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito bamikomisi mbindo; bapesi noki mokongo na mibeko oyo napesaki bango mpe bamisaleli ekeko ya ebende banyangwisa na moto. »
13 And again, the Lord said to me: ‘I discern that this people is stiff-necked.
Mpe Yawe alobaki na ngai: « Natali malamu bato oyo; bazali penza libota ya batomboki!
14 Depart from me, so that I may crush them, and abolish their name from under heaven, and appoint you over a nation, which will be greater and stronger than this one.’
Tika Ngai kosala: nakobebisa bango mpe nakolimwisa bakombo na bango kati na mokili, kasi nakokomisa yo ekolo ya nguya mpe ya bato ebele koleka bango. »
15 And as I was descending from the burning mountain, and I held the two tablets of the covenant with both hands,
Bongo nabalukaki mpe nakitaki wuta na ngomba oyo ekomaki kopela moto; nasimbaki na maboko na ngai bitando mibale ya mabanga ya boyokani.
16 and I had seen that you had sinned against the Lord your God, and had made a molten calf for yourselves, and had quickly abandoned his way, which he had revealed to you,
Tango natalaki, namonaki ete bosalaki solo masumu epai na Yawe, Nzambe na bino: bomisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende banyangwisa na moto; bopengwaki noki na nzela oyo Yawe atindaki bino.
17 I threw down the tablets from my hands, and I broke them in your sight.
Boye, nazwaki bitando yango mibale ya mabanga, nabwakaki yango wuta na maboko na ngai mpe napanzaki yango na biteni na miso na bino.
18 And I fell prostrate before the Lord, just as before, for forty days and nights, not eating bread, and not drinking water, because of all your sins, which you had committed against the Lord, and because you provoked him to anger.
Bongo nakweyaki mbala moko liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, naliaki lipa te mpe namelaki mayi te mpo na lisumu monene oyo bosalaki wana bosalaki mabe na miso ya Yawe mpe, na bongo, bopesaki Ye kanda.
19 For I feared his indignation and wrath, which had been stirred up against you, so that he was willing to destroy you. And the Lord heeded me at this time also.
Nabangaki kanda mpe kotomboka ya Yawe, pamba te asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino; kasi Yawe ayokelaki ngai lisusu.
20 Likewise, he became vehemently angry against Aaron, and he was willing to destroy him, and I prayed for him similarly.
Yawe asilikelaki mpe Aron makasi kino alingaki koboma ye; kasi na tango wana, nabondelaki mpe mpo na Aron.
21 But as for your sin which you committed, that is, the calf, taking hold of it, I burned it with fire. And breaking it into pieces, and reducing it entirely to dust, I threw it into the torrent that descends from the mountain.
Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba.
22 Likewise, at the Burning, and at the Temptation, and at the Graves of Lust, you provoked the Lord.
Na Tabeera, na Masa, na Kibiroti-Atava, bokobaki kaka kopesa Yawe kanda.
23 And when he sent you from Kadesh-barnea, saying, ‘Ascend and possess the land, which I have given to you,’ even so, you spurned the command of the Lord your God, and you did not believe him, nor were you willing to listen to his voice.
Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo: « Bokende! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te.
24 Instead, you were ever rebellious, from the day when I first began to know you.
Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe.
25 And so, I lay prostrate before the Lord for forty days and nights, as I humbly begged him, lest he destroy you, just as he had threatened to do.
Nakweyaki liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, pamba te Yawe azalaki koloba ete akoboma bino.
26 And praying, I said: ‘O Lord God, do not destroy your people and your inheritance, whom you have redeemed in your greatness, whom you have led away from Egypt with a strong hand.
Nabondelaki Yawe mpe nalobaki: « Nkolo Yawe, kobebisa bato na Yo te, bazali libula na Yo moko oyo osikolaki na nguya monene na Yo mpe obimisaki na Ejipito na loboko na Yo ya nguya.
27 Remember your servants, Abraham, Isaac, and Jacob. Do not look upon the stubbornness of this people, nor upon their wickedness and sinfulness.
Kanisa basali na Yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi! Kotala te botomboki ya bato oyo, mabe na bango mpe masumu na bango;
28 Otherwise, perhaps the inhabitants of the land, out of which you have led us, may say: “The Lord was not able to lead them into the land, which he promised to them. And he hated them; therefore, he led them out, so that he might put them to death in the wilderness.”
noki te bato ya mokili oyo longwa kuna obimisaki biso, bakoloba: ‹ Ezali mpo ete Yawe azalaki na makoki te ya kokotisa bango na mokili oyo alakaki bango to ezali mpo ete azalaki koyina bango, yango wana abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na koboma bango na esobe. ›
29 These are your people and your inheritance, whom you have led out by your great strength, and with your outstretched arm.’”
Nzokande bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na nguya monene na Yo mpe na loboko na Yo ya nguya. »