< Genesis 12 >

1 Now the Lord said to Abram, Go out from your country and from your family and from your father's house, into the land to which I will be your guide:
Yawe alobaki na Abrami: « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo.
2 And I will make of you a great nation, blessing you and making your name great; and you will be a blessing:
Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo; nakokomisa kombo na yo monene, mpe okozala etima ya mapamboli.
3 To them who are good to you will I give blessing, and on him who does you wrong will I put my curse: and you will become a name of blessing to all the families of the earth.
Nakopambola bato oyo bakopambola yo, mpe nakolakela mabe moto oyo akolakela yo mabe; mpe bato ya bituka nyonso ya mabele bakomipambola mpo na yo. »
4 So Abram went as the Lord had said to him, and Lot went with him: Abram was seventy-five years old when he went away from Haran.
Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani.
5 And Abram took Sarai, his wife, and Lot, his brother's son, and all their goods and the servants which they had got in Haran, and they went out to go to the land of Canaan.
Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi; Loti, mwana ya ndeko na ye; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna.
6 And Abram went through the land till he came to Shechem, to the holy tree of Moreh. At that time, the Canaanites were still living in the land.
Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango.
7 And the Lord came to Abram, and said, I will give all this land to your seed; then Abram made an altar there to the Lord who had let himself be seen by him.
Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki: « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye.
8 And moving on from there to the mountain on the east of Beth-el, he put up his tent, having Beth-el on the west and Ai on the east: and there he made an altar and gave worship to the name of the Lord.
Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este.
9 And he went on, journeying still to the South.
Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi.
10 And because there was little food to be had in that land, he went down into Egypt.
Nzala makasi ekotaki na mokili; bongo Abrami akendeki kovanda na Ejipito mpo na tango moke, pamba te nzala makasi ekotaki na mokili.
11 Now when he came near to Egypt, he said to Sarai, his wife, Truly, you are a fair woman and beautiful to the eye;
Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi: « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza.
12 And I am certain that when the men of Egypt see you, they will say, This is his wife: and they will put me to death and keep you.
Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba: ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi.
13 Say, then, that you are my sister, and so it will be well with me because of you, and my life will be kept safe on your account.
Kasi yo, loba na bango ete ozali ndeko na ngai ya mwasi. Na bongo, bakosalela ngai bolamu mpo na yo, mpe bomoi na ngai ekobika mpo na yo. »
14 And so it was that when Abram came into Egypt, the men of Egypt, looking on the woman, saw that she was fair.
Tango Abrami akomaki na Ejipito, bato ya Ejipito bamonaki ete Sarayi azalaki mwasi kitoko penza.
15 And Pharaoh's great men, having seen her, said words in praise of her to Pharaoh, and she was taken into Pharaoh's house.
Wana bakonzi ya basali ya Faraon bamonaki ye, bakumisaki ye liboso ya Faraon mpe bamemaki ye na ndako ya Faraon mpo ete akoma mwasi na ye.
16 And because of her, he was good to Abram, and he had sheep and oxen and asses, and men-servants and women-servants, and camels.
Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo.
17 And the Lord sent great troubles on Pharaoh's house because of Sarai, Abram's wife.
Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami.
18 Then Pharaoh sent for Abram, and said, What have you done to me? why did you not say that she was your wife?
Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye: « Likambo nini osali ngai? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo?
19 Why did you say that she was your sister? so that I took her for my wife: now, take your wife and go on your way.
Mpo na nini olobaki: ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende! »
20 And Pharaoh gave orders to his men, and they sent him on his way, with his wife and all he had.
Boye, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye na tina na Abrami ete babengana ye elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango.

< Genesis 12 >