< Ezekiel 44 >
1 And he took me back to the outer doorway of the holy place, looking to the east; and it was shut.
Moto yango azongisaki ngai na ekuke ya libanda ya Esika ya bule; Ekuke yango ezalaki na ngambo ya este mpe ezalaki ya kokangama.
2 And the Lord said to me, This doorway is to be shut, it is not to be open, and no man is to go in by it, because the Lord, the God of Israel, has gone in by it; and it is to be shut.
Yawe alobaki na ngai: « Ekuke oyo ekotikala ya kokangama, bakoki kofungola yango te, mpe moto moko te akoki kokota na nzela na yango. Ekotikala kaka ya kokangama, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, akotelaki na nzela na yango.
3 But the ruler will be seated there to take his food before the Lord; he will go in by the covered way to the door, and will come out by the same way.
Kasi mokambi, ye kaka, lokola azali mokambi nde akoki kovanda na kati mpo na kolia bilei liboso ya Yawe; akokotela na nzela ya ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana. »
4 And he took me to the north doorway in front of the house; and, looking, I saw that the house of the Lord was full of the glory of the Lord; and I went down on my face.
Moto yango amemaki ngai lisusu na nzela ya ekuke ya nor kino na liboso ya Tempelo. Tango natalaki, namonaki nkembo na Yawe kotondisa Tempelo ya Yawe, mpe ngai nakweyaki elongi kino na mabele.
5 And the Lord said to me, Son of man, take to heart, and let your eyes see and your ears be open to everything I say to you about all the rules of the house of the Lord and all its laws; and take note of the ways into the house and all the ways out of the holy place.
Yawe alobaki na ngai: « Mwana na moto, sala keba! Fungola miso na yo mpe yoka na matoyi na yo makambo nyonso oyo nakoyebisa yo na tina na Tempelo mpe mitindo na yango! Sala penza keba na ekotelo ya Tempelo mpe bikuke nyonso ya Esika ya bule.
6 And say to the uncontrolled children of Israel, This is what the Lord has said: O you children of Israel, let it be enough for you, among the disgusting things which you have done,
Yebisa batomboki oyo, libota ya Isalaele: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Oh libota ya Isalaele, nalembi misala na bino nyonso ya nkele!
7 To have let men from strange lands, without circumcision of heart or flesh, come into my holy place, making my house unclean; and to have made the offering of my food, even the fat and the blood; and in addition to all your disgusting ways, you have let my agreement be broken.
Wana bozalaki kobonzela Ngai bilei, mafuta mpe makila ya banyama, bokotisaki kati na Esika na Ngai ya bule bapaya oyo batosaka Ngai te mpe bakatama ngenga te, mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo na Ngai; na bongo, bobebisaki boyokani na Ngai mpo na kokokisa misala na bino nyonso ya mbindo!
8 And you have not taken care of my holy things; but you have put them as keepers to take care of my work in my holy place.
Na esika ete bomipesa na mosala ya biloko na Ngai ya bule, bino bozali nde kopesa mosala na Ngai epai ya bapaya, kati na Esika na Ngai ya bule.
9 For this cause the Lord has said, No man from a strange land, without circumcision of heart and flesh, of all those who are living among the children of Israel, is to come into my holy place.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Mopaya moko te oyo atosaka Ngai te mpe oyo akatisa ngenga te akokota na Esika na Ngai ya bule, ezala bapaya oyo bazali kovanda kati na bana ya Isalaele.
10 But as for the Levites, who went far from me, when Israel went out of the right way, turning away from me to go after their images; their punishment will come on them.
Balevi oyo bakomaki mosika na Ngai, tango Isalaele abungaki nzela mpe azalaki koyengayenga mosika na Ngai mpo na kolanda banzambe na bango ya bikeko, bakomema mikumba ya masumu na bango.
11 But they may be caretakers in my holy place, and overseers at the doors of the house, doing the work of the house: they will put to death the burned offering and the beasts offered for the people, and they will take their place before them as their servants.
Kati na Esika na Ngai ya bule, bakosala kaka mosala ya kokengela bikuke ya Tempelo mpe misala mosusu ya Tempelo; bakobanda koboma mpo na bato bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu mpe bakotelema liboso ya bato mpo na kosalela bango.
12 Because they did this work for them before their images, and became a cause of sin to the children of Israel; for this cause my hand has been lifted up against them, says the Lord, and their punishment will be on them.
Kasi lokola basalelaki bango liboso ya banzambe na bango ya bikeko mpe bakweyisaki libota ya Isalaele na masumu, nalapi ndayi, na kotombola loboko, ete bakomema mikumba ya masumu na bango, elobi Nkolo Yawe.
13 And they will not come near me to do the work of priests to me, or come near any of my holy things, or the things which are most holy: but their shame will be on them, and the punishment for the disgusting things which they have done.
Bakopusana lisusu liboso na Ngai te mpo na kosalela Ngai lokola Banganga-Nzambe to pene ya biloko nyonso oyo ebulisami mpo na Ngai to mpe pene ya biloko oyo eleki bule. Boye, bakolata soni ya misala na bango ya nkele.
14 But I will make them responsible for the care of the house and all its work and everything which is done in it.
Nakopesa bango mokumba ya kobatela Tempelo mpe kosala misala na yango nyonso, nyonso oyo esengeli kosalema kati na yango.
15 But as for the priests, the sons of Zadok, who took care of my holy place when the children of Israel were turned away from me, they are to come near me to do my work, they will take their places before me, offering to me the fat and the blood, says the Lord;
Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe.
16 They are to come into my holy place and they are to come near to my table, to do my work and have the care of my house.
Bango kaka nde bakokota na Esika na Ngai ya bule, bakopusana pene ya mesa na Ngai mpo na kosalela Ngai mpe kokokisa mosala na Ngai.
17 And when they come in by the doorways of the inner square, they are to be clothed in linen robes; there is to be no wool on them while they are doing my work in the doorway of the inner square and inside the house.
Tango bakokota na bikuke ya lopango ya kati, basengeli kolata bilamba ya lino; bakoki kolata bilamba oyo basala na bapwale ya meme te tango bakozala kosala mosala na bikuke ya lopango ya kati to kati na Tempelo.
18 They are to have linen head-dresses on their heads and linen trousers on their legs, and they are to have nothing round them to make their skin wet with heat.
Bakolata bitendi ya lino na mito na bango mpe bakaputula ya lino na baloketo na bango; bakoki kolata te bilamba oyo etokisaka bato.
19 And when they go out into the outer square to the people, they are to take off the robes in which they do the work of priests, and put them away in the holy rooms, and put on other clothing, so that the people may not be made holy by their robes.
Tango bakobima mpo na kokende na lopango ya libanda, na esika oyo bato bazalaka, bakolongola bilamba oyo bazalaki kosalela mosala na kati mpe bakotika yango kati na bashambre ya bule; bakolata bilamba mosusu mpo ete babulisa bato te na nzela ya bilamba na bango.
20 They are not to have all the hair cut off their heads, and they are not to let their hair get long, but they are to have the ends of their hair cut.
Banganga-Nzambe bakoki te kokokola suki ya mito na bango to kokolisa makasi suki na bango; kasi basengeli kokata suki na bango malamu.
21 The priests are not to take wine when they go into the inner square.
Nganga-Nzambe moko te akomela masanga ya vino liboso ete akota na lopango ya kati.
22 And they are not to take as wives any widow or woman whose husband has put her away: but they may take virgins of the seed of Israel, or a widow who is the widow of a priest.
Bakoki kobala te basi oyo bakufisa mibali to basi oyo bakabwana na mibali na bango na libala, kasi bakobala kaka bilenge basi ya Isalaele oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te to basi ya Banganga-Nzambe oyo basila kokufa.
23 And they are to make clear to my people the division between what is holy and what is common, and to give them the knowledge of what is clean and what is unclean.
Bakoteya bato ete bayeba kosala bokeseni kati na biloko ya bule mpe oyo ya bule te, kati na biloko ya mbindo mpe oyo ya peto.
24 In any cause, they are to be in the position of judges, judging in harmony with my decisions: they are to keep my laws and my rules in all my fixed feasts; and they are to keep my Sabbaths holy.
Na tango ya matata, Banganga-Nzambe bakotelema lokola basambisi mpo na kokata makambo kolanda mibeko, bakotosa mibeko mpe bikateli na Ngai, bafeti na Ngai, oyo ekatama mpe bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba.
25 They are not to come near any dead person so as to become unclean: but for a father or mother or son or daughter or brother or for a sister who has no husband, they may make themselves unclean.
Nganga-Nzambe moko te akomikomisa mbindo na kopusana pene ya moto ya kokufa. Nzokande, akoki kondima komikomisa mbindo soki moto oyo akufi azali tata to mama na ye, mwana na ye ya mobali to ya mwasi, ndeko na ye ya mobali to ya mwasi oyo amibalelaki te.
26 And after he has been made clean, seven days are to be numbered for him.
Sima na kopetolama na ye, akozela mikolo sambo.
27 And on the day when he goes into the inner square, to do the work of the holy place, he is to make his sin-offering, says the Lord.
Na mokolo oyo akokota kati na Esika ya bule, kati na lopango ya kati mpo na kosala mosala, akobonza mbeka mpo na masumu na ye moko, elobi Nkolo Yawe.
28 And they are to have no heritage; I am their heritage: you are to give them no property in Israel; I am their property.
Tala oyo ekozala libula ya Banganga-Nzambe: Ngai moko nde nazali libula na bango. Bokopesa bango mabele te kati na Isalaele; Ngai moko nde nakozala mabele na bango.
29 Their food is to be the meal offering and the sin-offering and the offering for error; and everything given specially to the Lord in Israel will be theirs.
Bakolia makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani; biloko nyonso oyo, kati na Isalaele, ebulisama mpo na Yawe ekozala ya bango.
30 And the best of all the first-fruits of everything, and every offering which is lifted up of all your offerings, will be for the priests: and you are to give the priest the first of your bread-making, so causing a blessing to come on your house.
Bambuma ya liboso oyo ya kitoko mpe makabo na bino nyonso, kolongola ata eloko moko te, ekozala ya Banganga-Nzambe; bokopesa bango bambuma ya liboso ya bilanga na bino ya ble mpo ete mapamboli ezala kati na bandako na bino.
31 The priests may not take for food any bird or beast which has come to a natural death or whose death has been caused by another animal.
Banganga-Nzambe bakoki kolia te ndeke to nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama mosusu esili koboma.