< Ezekiel 16 >

1 And the word of the Lord came to me, saying,
Yawe alobaki na ngai:
2 Son of man, make clear to Jerusalem her disgusting ways,
« Mwana na moto, lakisa Yelusalemi misala na ye ya mbindo!
3 And say, This is what the Lord has said to Jerusalem: Your start and your birth was from the land of the Canaanite; an Amorite was your father and your mother was a Hittite.
Yebisa ye boye: ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya Yelusalemi: Bokoko mpe mbotama na yo etalisaka ete ozali moto ya Kanana; tata na yo azalaki moto ya Amori, mpe mama na yo azalaki moto ya Iti.
4 As for your birth, on the day of your birth your cord was not cut and you were not washed in water to make you clean; you were not salted or folded in linen bands.
Na mokolo ya mbotama na yo, bakataki yo motolu te, basukolaki yo na mayi te mpo ete okoma peto, batikalaki kopakola yo mungwa te mpe bazipaki yo bilamba te.
5 No eye had pity on you to do any of these things to you or to be kind to you; but you were put out into the open country, because your life was hated at the time of your birth.
Moto moko te ayokelaki yo mawa mpo na kosalela yo ata moko kati na makambo wana. Nzokande, na mokolo ya mbotama na yo, bayinaki yo mpe babwakaki yo na zamba mpo ete bazalaki na somo makasi ya komona yo.
6 And when I went past you and saw you stretched out in your blood, I said to you, Though you are stretched out in your blood, have life;
Boye, Ngai nalekelaki wana mpe namonaki ndenge nini ozalaki kobunda-bunda na kufa kati na makila. Bongo nalobaki na yo: ‘Okozala na bomoi atako ozali kobaluka na makila!’
7 And be increased in number like the buds of the field; and you were increased and became great, and you came to the time of love: your breasts were formed and your hair was long; but you were uncovered and without clothing.
Nakolisaki yo lokola nzete ya elanga. Bongo tango okolaki penza mpe oyaki monene, okomaki kitoko makasi koleka; tolo na yo ebimisaki mabele, mpe bapwale na yo ekolaki. Kasi ozalaki na yo kaka bolumbu tango nyonso, ozalaki na bilamba te.
8 Now when I went past you, looking at you, I saw that your time was the time of love; and I put my skirts over you, covering your unclothed body: and I gave you my oath and made an agreement with you, says the Lord, and you became mine.
Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.
9 Then I had you washed with water, washing away all your blood and rubbing you with oil.
Nasukolaki yo na mayi mpo na kolongola makila oyo ekangamaki yo na nzoto, mpe napakolaki yo mafuta ya solo kitoko.
10 And I had you clothed with needlework, and put leather shoes on your feet, folding fair linen about you and covering you with silk.
Nalatisaki yo elamba ya talo batonga bililingi na basinga mpe basapato ya kitoko oyo basala na baposo ya banyama; nalatisaki yo bilamba ya lino ya kitoko mpe nazipaki yo bilamba ya talo.
11 And I made you fair with ornaments and put jewels on your hands and a chain on your neck.
Nalatisaki yo babiju, mayaka na maboko mpe na kingo.
12 And I put a ring in your nose and ear-rings in your ears and a beautiful crown on your head.
Nalatisaki yo lopete na zolo, biloko ya matoyi mpe motole ya kitoko na moto.
13 So you were made beautiful with gold and silver; and your clothing was of the best linen and silk and needlework; your food was the best meal and honey and oil: and you were very beautiful.
Boye, olataki biloko ya wolo mpe ya palata; bilamba na yo ezalaki ya lino ya kitoko, bilamba ya talo batonga bililingi na basinga. Bilei na yo ezalaki: farine ya ble basangisa na eloko mosusu te, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive. Okomaki lisusu kitoko koleka, ozwaki lokumu makasi mpe okomaki lokola mwasi mokonzi.
14 You were so beautiful that the story of you went out into all nations; you were completely beautiful because of my glory which I had put on you, says the Lord.
Mpo ete kitoko na yo ekomaki ya kokoka, sango na yo epanzanaki kati na bikolo, likolo ya lokumu oyo napesaki yo, elobi Nkolo Yawe.
15 But you put your faith in the fact that you were beautiful, acting like a loose woman because you were widely talked of, and offering your cheap love to everyone who went by, whoever it might be.
Kasi okomaki kotia motema na kitoko na yo mpe kosalela lokumu na yo mpo na kosala kindumba. Olakisaki bolumbu na yo na moleki nzela nyonso mpe omipesaki na ye.
16 And you took your robes and made high places for yourself ornamented with every colour, acting like a loose woman on them, without shame or fear.
Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te!
17 And you took the fair jewels, my silver and gold which I had given to you, and made for yourself male images, acting like a loose woman with them;
Okamataki lisusu babiju ya kitoko oyo basala na wolo mpe na palata oyo napesaki yo, osalelaki yango bikeko ya mibali; mpe elongo na yango, omipesaki na kindumba.
18 And you took your robes of needlework for their clothing, and put my oil and my perfume before them.
Okamataki bilamba na yo ya talo batonga bililingi na basinga, olatisaki yango bikeko wana mpe obonzelaki yango mafuta mpe ansa na Ngai.
19 And my bread which I gave you, the best meal and oil and honey which I gave you for your food, you put it before them for a sweet smell, says the Lord.
Bilei oyo Ngai nabongiselaki yo: farine ya ble, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive, oyo napesaki yo mpo ete oliaka, obonzaki yango epai ya bikeko wana lokola mbeka ya solo kitoko. Yango nde makambo oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe.
20 And you took your sons and your daughters whom I had by you, offering even these to them to be their food. Was your loose behaviour so small a thing,
Okamataki lisusu bana basi mpe bana mibali oyo obotelaki Ngai, obonzaki bango lisusu lokola bilei epai ya banzambe wana ya bikeko mpo ete elia bango. Boni, kindumba na yo ekokaki kaka te?
21 That you put my children to death and gave them up to go through the fire to them?
Esengelaki solo ete oboma bana na Ngai mpo na kobonza bango lokola makabo epai ya banzambe wana ya bikeko, na kolekisa bango na moto!
22 And in all your disgusting and false behaviour you had no memory of your early days, when you were uncovered and without clothing, stretched out in your blood.
Mpe wana ozalaki kosala makambo na yo nyonso ya nkele mpe kindumba na yo, okanisaki ata moke te bolenge na yo: tango oyo ozalaki bolumbu mpe ozalaki kobunda-bunda kati na makila na yo.
23 And it came about, after all your evil-doing, says the Lord,
Mawa! Mawa penza mpo na yo, elobi Nkolo Yawe; sima na yo kosala mabe wana nyonso,
24 That you made for yourself an arched room in every open place.
omitongelaki mwa ndako mpo na kosala kindumba mpe obongisaki mpo na yo moko, bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka;
25 You put up your high places at the top of every street, and made the grace of your form a disgusting thing, opening your feet to everyone who went by, increasing your loose ways.
otongaki yango na bisika nyonso oyo babalabala ekutana, okomisaki kitoko na yo likambo ya nkele mpe omipesaki epai ya moleki nzela nyonso: osalaki penza kindumba makasi.
26 And you went with the Egyptians, your neighbours, great of flesh; increasing your loose ways, moving me to wrath.
Osalaki kindumba na bato ya Ejipito, baninga na yo, oyo bazali na banzoto ya bingambe; mpe osalaki kindumba makasi mpo na kopesa Ngai kanda.
27 Now, then, my hand is stretched out against you, cutting down your fixed amount, and I have given you up to the desire of your haters, the daughters of the Philistines who are shamed by your loose ways.
Natombokelaki yo, nabotolaki yo bilei oyo napesaki yo mpe nakabaki yo na maboko ya banguna na yo, bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki mpe kosepela ata moke te na bizaleli na yo ya soni mpe ya mabe.
28 And you went with the Assyrians, because of your desire which was without measure; you were acting like a loose woman with them, and still you had not enough.
Lokola otondaka te, osalaki lisusu kindumba na bato ya Asiri; mpe, ata sima na yango, otondaki mpe kaka te.
29 And you went on in your loose ways, even as far as the land of Chaldaea, and still you had not enough.
Ezala kati na Kanana, pembeni ya Babiloni, okobaki kaka kosala kindumba; kasi atako bongo, otondaki kaka te.
30 How feeble is your heart, says the Lord, seeing that you do all these things, the work of a loose and overruling woman;
Yango motema ya pete ya ndenge nini penza yo ozali na yango, elobi Nkolo Yawe, mpo ete osala makambo oyo nyonso, lokola mwasi ya ndumba oyo akenda sango na mosala na ye ya kindumba!
31 For you have made your arched room at the top of every street, and your high place in every open place; though you were not like a loose woman in getting together your payment.
Tango ozalaki kotonga mwa bandako ya kindumba na bisika nyonso oyo babalabala ekutana mpe kobongisa bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka, ozalaki kosala lokola mwasi ya ndumba nyonso te, pamba te ozalaki kosenga lifuti te.
32 The untrue wife who takes strange lovers in place of her husband!
Yo ozali penza mwasi ya ekobo; osepelaka kosangisa nzoto na bapaya, kasi na mobali na yo te.
33 They give payment to all loose women: but you give rewards to your lovers, offering them payment so that they may come to you on every side for your cheap love.
Basi nyonso oyo basalaka kindumba basengaka lifuti; kasi epai na yo, ezali yo nde opesaka bakado epai ya bamakangu na yo nyonso: na bongo, osombaka mitema na bango mpo ete bawuta bipai na bipai mpe baya kosala ekobo na yo.
34 And in your loose behaviour you are different from other women, for no one goes after you to make love to you: and because you give payment and no payment is given to you, in this you are different from them.
Yo, okeseni penza na basi mosusu na kindumba na yo, pamba te mibali balukaka yo te! Yo penza, okeseni na basi mosusu ya ndumba, pamba te ofutaka mibali na esika ete bango bafuta yo.
35 For this cause, O loose woman, give ear to the voice of the Lord:
Yango wana, yo mwasi ya ndumba, yoka Liloba na Yawe!
36 This is what the Lord has said: Because your unclean behaviour was let loose and your body uncovered in your loose ways with your lovers and with your disgusting images, and for the blood of your children which you gave to them;
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Lokola osakanelaki bomengo na yo mpe otandaki bolumbu na yo kati na kindumba na bamakangu na yo mpe na banzambe na yo nyonso ya bikeko, makambo na yo nyonso ya mbindo; mpe lokola obonzelaki banzambe wana ya bikeko makila ya bana na yo ya mibali,
37 For this cause I will get together all your lovers with whom you have taken your pleasure, and all those to whom you have given your love, with all those who were hated by you; I will even make them come together against you on every side, and I will have you uncovered before them so that they may see your shame.
nazali kosangisa bamakangu na yo nyonso oyo ozalaki kosepela elongo na bango, ba-oyo nyonso ozalaki kolinga mpe ba-oyo nyonso ozalaki koyina; nakosangisa bango wuta na bangambo nyonso mpo ete batombokela yo, mpe nakotanda yo liboso na bango mpo ete bamona bolumbu na yo nyonso.
38 And you will be judged by me as women are judged who have been untrue to their husbands and have taken life; and I will let loose against you passion and bitter feeling.
Nakopesa yo etumbu oyo ebongi na basi ya ndumba mpe na ba-oyo basopaka makila. Okofuta yango na motuya ya makila na yo, mpo na kanda mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisi.
39 I will give you into their hands, and your arched room will be overturned and your high places broken down; they will take your clothing off you and take away your fair jewels: and when they have done, you will be uncovered and shamed.
Nakokaba yo na maboko ya bamakangu na yo, bakobuka mwa bandako na yo ya kindumba mpe bisika na yo ya bule; bakolongola yo na makasi bilamba mpe babiju ya kitoko mpe bakotika yo bolumbu.
40 And they will get together a meeting against you, stoning you with stones and wounding you with their swords.
Nakotindela yo bato ebele mpo ete babamba yo mabanga mpe batobola yo na mipanga na bango.
41 And they will have you burned with fire, sending punishments on you before the eyes of great numbers of women; and I will put an end to your loose ways, and you will no longer give payment.
Bakotumba bandako na yo mpe bakopesa yo etumbu na miso ya basi ebele. Nakosukisa kindumba na yo, mpe okofuta lisusu bamakangu na yo te.
42 And the heat of my wrath against you will have an end, and my bitter feeling will be turned away from you, and I will be quiet and will be angry no longer.
Na bongo nde kanda na Ngai epai na yo mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisaki ekosila; nakovanda kimia mpe nakosilika lisusu te.
43 Because you have not kept in mind the days when you were young, but have been troubling me with all these things; for this reason I will make the punishment of your ways come on your head, says the Lord, because you have done this evil thing in addition to all your disgusting acts.
Lokola obosanaki mikolo ya bolenge na yo mpe opelisaki kanda na Ngai na nzela ya makambo nyonso ya boye, Ngai mpe nakofuta yo kolanda ndenge etamboli na yo ezali, elobi Nkolo Yawe; boye, okobakisa lisusu makambo mabe te na likolo ya makambo na yo ya mbindo.
44 See, in every common saying about you it will be said, As the mother is, so is her daughter.
Moto nyonso oyo alobaka na masese akoloba lisese oyo na tina na yo: ‘Mwana mwasi azalaka kaka ndenge mama na ye azali.’
45 You are the daughter of your mother whose soul is turned in disgust from her husband and her children; and you are the sister of your sisters who were turned in disgust from their husbands and their children: your mother was a Hittite and your father an Amorite.
Ozali solo mwana mwasi ya mama na yo, oyo asambwisaki mobali na ye mpe bana na ye ya mibali; ozali solo ndeko mwasi ya bandeko na yo ya basi oyo batiolaki mibali mpe bana na bango. Mama na bino azalaki moto ya mokili ya Iti, mpe tata na yo azalaki moto ya Amori.
46 Your older sister is Samaria, living at your left hand, she and her daughters: and your younger sister, living at your right hand, is Sodom and her daughters.
Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi.
47 Still you have not gone in their ways or done the disgusting things which they have done; but, as if that was only a little thing, you have gone deeper in evil than they in all your ways.
Otambolaki kaka te na banzela na bango mpe olandaki kaka te bizaleli na bango ya mbindo, kasi okomaki mabe koleka bango, na etamboli na yo nyonso.
48 By my life, says the Lord, Sodom your sister never did, she or her daughters, what you and your daughters have done.
Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, Sodome, ndeko na yo ya mwasi, elongo na bana na ye ya basi batikala nanu kosala te makambo oyo yo elongo na bana na yo ya basi bosali.
49 Truly, this was the sin of your sister Sodom: pride, a full measure of food, and the comforts of wealth in peace, were seen in her and her daughters, and she gave no help to the poor or to those in need.
Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi: ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela.
50 They were full of pride and did what was disgusting to me: and so I took them away as you have seen.
Bakomaki bato ya lofundu makasi mpe bakomaki kosala makambo ya mbindo na miso na Ngai. Yango wana, nalimwisi bango ndenge ozali komona.
51 And Samaria has not done half your sins; but you have made the number of your disgusting acts greater than theirs, making your sisters seem more upright than you by all the disgusting things which you have done.
Samari asalaki te ata kati-kati ya masumu oyo yo osalaki. Osalaki makambo ya mbindo koleka bango; mpe na nzela ya makambo na yo nyonso ya mbindo, osalaki ete bandeko na yo ya basi bamonana lokola bato ya sembo koleka.
52 And you yourself will be put to shame, in that you have given the decision for your sisters; through your sins, which are more disgusting than theirs, they are more upright than you: truly, you will be shamed and made low, for you have made your sisters seem upright.
Sik’oyo, yo oyo ozalaki kosambisa bandeko na yo ya basi, lata soni na yo! Lokola masumu na yo ezalaki kutu mabe koleka oyo ya bango, yango wana bazalaki komonana lokola bato ya sembo koleka. Yoka sik’oyo soni mpo ete osili kosambwa, omonisi bandeko na yo ya basi lokola bato ya sembo koleka!
53 And I will let their fate be changed, the fate of Sodom and her daughters, and the fate of Samaria and her daughters, and your fate with theirs.
Yango wana, nakozongisa lisusu bolamu ya Sodome mpe ya Samari, elongo na bingumba na yango; mpe yo, nakozongisa bolamu na yo kati na yango
54 So that you will be shamed and made low because of all you have done, when I have mercy on you.
mpo ete oyoka lisusu soni te mpe osambwa lisusu te likolo ya misala na yo mpe likolo ya makambo oyo ezalaki kobondisa bango.
55 And your sisters, Sodom and her daughters, will go back to their first condition, and Samaria and her daughters will go back to their first condition, and you and your daughters will go back to your first condition.
Sodome mpe Samari elongo na bingumba na yango ekozonga ndenge ezalaki liboso; mpe yo elongo na bingumba na yo, nakozongisa bino ndenge bozalaki liboso.
56 Was not your sister Sodom an oath in your mouth in the day of your pride,
Na mokolo ya lolendo na yo, ozalaki kutu kolobela mabe ya Sodome, ndeko na yo,
57 Before your shame was uncovered? Now you have become like her a word of shame to the daughters of Edom and all who are round about you, the daughters of the Philistines who put shame on you round about.
liboso ete mabe na yo eyebana. Kasi sik’oyo, bingumba ya Siri elongo na bingumba nyonso oyo ezali zingazinga na yango mpe bingumba ya bato ya Filisitia ekomi koseka yo.
58 The reward of your evil designs and your disgusting ways has come on you, says the Lord.
Okomi sik’oyo komema mikumba ya makambo na yo ya mbindo mpe ya misala na yo ya mabe, elobi Yawe.
59 For this is what the Lord has said: I will do to you as you have done, you who, putting the oath on one side, have let the agreement be broken.
Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi: Nakosalela yo kolanda misala na yo, pamba te otiolaki ndayi na Ngai na nzela ya kobuka boyokani na Ngai elongo na yo.
60 But still I will keep in mind the agreement made with you in the days when you were young, and I will make with you an eternal agreement.
Kasi Ngai, nakokanisa lisusu boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na yo tango ozalaki nanu elenge, mpe nakosala lisusu mpo na yo, boyokani oyo ekozala na suka te.
61 Then at the memory of your ways you will be overcome with shame, when I take your sisters, the older and the younger, and give them to you for daughters, but not by your agreement.
Boye, okokanisa etamboli na yo mpe okoyoka soni tango okoyamba bandeko na yo ya basi, ezala ba-oyo bazali mikolo na yo to ba-oyo bazali baleki na yo; nakopesa yo bango lokola bana na yo ya basi, kasi ekozala te kolanda boyokani na Ngai elongo na yo.
62 And I will make my agreement with you; and you will be certain that I am the Lord:
Ngai nakosala boyokani na Ngai elongo na yo; mpe na bongo, okososola solo ete Ngai, nazali Yawe,
63 So that, at the memory of these things, you may be at a loss, never opening your mouth because of your shame; when you have my forgiveness for all you have done, says the Lord.
mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › »

< Ezekiel 16 >