< 2 Chronicles 1 >
1 And Solomon, the son of David, made himself strong in his kingdom, and the Lord his God was with him, and made him very great.
Salomo, mwana mobali ya Davidi, alendisamaki makasi na bokonzi na ye, pamba te Yawe, Nzambe na ye, azalaki elongo na ye mpe akomisaki ye moto monene penza.
2 And Solomon sent word to all Israel, to the captains of thousands and of hundreds and to the judges and to every chief in all Israel, heads of their families.
Salomo abengisaki Isalaele mobimba: bakonzi ya bankoto ya basoda, bakonzi ya bankama ya basoda, basambisi, bakambi ya Isalaele mobimba mpe bakambi ya mabota.
3 Then Solomon, and all the men of Israel with him, went to the high place at Gibeon, because the Tent of meeting of God, which Moses, the servant of the Lord, had made in the waste land, was there.
Bongo, Salomo elongo na lisanga mobimba bakendeki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni, pamba te Ndako ya kapo ya Bokutani ya Nzambe, oyo Moyize, mosali na Yawe, atelemisaki na esobe ezalaki kuna.
4 But the ark of God had been moved by David from Kiriath-jearim to the place which he had made ready for it, for he had put up a tent for it at Jerusalem.
Nzokande, Davidi amemaki Sanduku ya Nzambe, wuta na Kiriati-Yearimi kino na esika oyo abongisaki mpo na yango, pamba te atelemisaki mpo na yango Ndako ya kapo kati na Yelusalemi.
5 And the altar of brass which Bezalel, the son of Uri, the son of Hur, had made, was there before the Tent of the Lord; and Solomon and all the people went to give worship there.
Kasi etumbelo ya bronze oyo Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri mpe koko ya Wuri, atongaki ezalaki liboso ya Mongombo. Ezalaki kuna nde Salomo elongo na lisanga mobimba balukaki Yawe.
6 And Solomon went up there to the brass altar before the Lord at the Tent of meeting, offering on it a thousand burned offerings.
Salomo akendeki na etumbelo ya bronze, liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe abonzaki kuna bambeka ya kotumba nkoto moko.
7 In that night God came to Solomon in a vision, and said to him, Say what I am to give you.
Na butu wana, Nzambe abimelaki Salomo mpe alobaki na ye: — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo.
8 And Solomon said to God, Great was your mercy to David my father, and you have made me king in his place.
Salomo azongiselaki Nzambe: — Otalisi bolamu monene epai ya Davidi, tata na ngai, mpe otie ngai mokonzi na esika na ye.
9 Now, O Lord God, let your word to David my father come true; for you have made me king over a people like the dust of the earth in number.
Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya Davidi, tata na ngai, ekokisama! Pamba te ezali Yo nde otie ngai mokonzi ya bato oyo bazali ebele lokola putulu ya mabele.
10 Give me now wisdom and knowledge, so that I may go out and come in before this people: for who is able to be the judge of this great people of yours?
Pesa ngai bwanya mpe boyebi mpo ete nakoka kotambolisa bato oyo. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo?
11 And God said to Solomon, Because this was in your heart, and you did not make request for money, property, or honour, or for the destruction of your haters, or for long life; but you have made request for wisdom and knowledge for yourself, so that you may be the judge of my people over whom I have made you king:
Nzambe alobaki na Salomo: — Lokola likambo oyo ezali posa ya motema na yo; lokola osengi bozwi te, bomengo to lokumu te to mpe kufa ya banguna na yo te; lokola osengi te bomoi molayi, kasi osengi bwanya mpe boyebi mpo na kotambolisa bato na Ngai, oyo natie yo mokonzi na bango,
12 Wisdom and knowledge are given to you; and I will give you wealth and honour, such as no king has had before you or ever will have after you.
bwanya mpe boyebi ekopesamela yo, mpe nakopesa yo lisusu bozwi, bomengo mpe lokumu oyo mokonzi moko te, liboso na yo, atikala kozwa, mpe mokonzi moko te, sima na yo, akotikala kozwa.
13 So Solomon went back from the high place at Gibeon, from before the Tent of meeting, to Jerusalem; and he was king over Israel.
Bongo Salomo alongwaki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni epai wapi akendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe azongaki na Yelusalemi. Mpe akomaki mokonzi ya Isalaele.
14 And Solomon got together war-carriages and horsemen; he had one thousand, four hundred carriages and twelve thousand horsemen, which he kept, some in the carriage-towns and some with the king at Jerusalem.
Salomo asangisaki bashar mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda; azalaki na bashar nkoto moko na nkama minei, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. Abombaki bango kati na bingumba epai wapi babombaka bashar, mpe na Yelusalemi epai wapi mokonzi azalaki kovanda.
15 And the king made silver and gold as common as stones in Jerusalem, and cedar like the sycamore-trees of the lowland in number.
Mokonzi asalaki ete wolo mpe palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku.
16 And Solomon's horses came out of Egypt; the king's traders got them from Kue at a price.
Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na engumba Kue. Bato ya mombongo ya mokonzi nde bazalaki kosomba yango kuna na engumba Kue.
17 A war-carriage might be got from Egypt for six hundred shekels of silver, and a horse for a hundred and fifty: they got them at the same rate for all the kings of the Hittites and the kings of Aram.
Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri.