< 1 Samuel 2 >
1 And Hannah, in prayer before the Lord, said, My heart is glad in the Lord, my horn is lifted up in the Lord: my mouth is open wide over my haters; because my joy is in your salvation.
Ana asambelaki na maloba oyo: Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe mpo ete alendisi bomoi na ngai. Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai.
2 No other is holy as the Lord, for there is no other God but you: there is no Rock like our God.
Moko te azali bule lokola Yawe; moko te, bobele Yo. Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso.
3 Say no more words of pride; let not uncontrolled sayings come out of your mouths: for the Lord is a God of knowledge, by him acts are judged.
Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso mpe asambisaka misala nyonso ya bato.
4 The bows of the men of war are broken, and the feeble are clothed with strength.
Tolotolo ya bilombe ebukani, kasi bato na bolembu bazwi makasi.
5 Those who were full are offering themselves as servants for bread; those who were in need are at rest; truly, she who had no children has become the mother of seven; and she who had a family is wasted with sorrow.
Bato oyo bazalaki na bozwi ebele bakomi koluka mosala mpo na bilei, kasi ba-oyo bazalaki kokelela batiki kosala. Mwasi oyo abotaki te akobota mbala sambo, kasi mwasi oyo abotaki bana ebele akobota lisusu te.
6 The Lord is the giver of death and life: sending men down to the underworld and lifting them up. (Sheol )
Yawe abomaka mpe apesaka bomoi, akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka. (Sheol )
7 The Lord gives wealth and takes a man's goods from him: crushing men down and again lifting them up;
Yawe akomisaka moto mobola, mpe akomisaka moto mozwi; akitisaka mpe atombolaka.
8 Lifting the poor out of the dust, and him who is in need out of the lowest place, to give them their place among rulers, and for their heritage the seat of glory: for the pillars of the earth are the Lord's and he has made them the base of the world.
Alongolaka mobola na putulu, mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga; mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili.
9 He will keep the feet of his holy ones, but the evil-doers will come to their end in the dark night, for by strength no man will overcome.
Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, kasi bato mabe bakobunga kati na molili. Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko.
10 Those who make war against the Lord will be broken; against them he will send his thunder from heaven: the Lord will be judge of the ends of the earth, he will give strength to his king, lifting up the horn of him on whom the holy oil has been put.
Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. Yawe akosambisa mokili mobimba, akopesa mokonzi na yango nguya mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye.
11 Then Elkanah went to Ramah to his house. And the child became the servant of the Lord under the direction of Eli the priest.
Sima na yango, Elikana azongaki na ndako na ye, na Rama; kasi mwana atikalaki mpo na kosalela Yawe na bokambami ya Nganga-Nzambe Eli.
12 Now the sons of Eli were evil and good-for-nothing men, having no knowledge of the Lord.
Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te.
13 And the priests' way with the people was this: when any man made an offering, the priest's servant came while the flesh was being cooked, having in his hand a meat-hook with three teeth;
Tala ndenge nini Banganga-Nzambe oyo bazalaki kosala na miso ya bato: tango nyonso moto moko azalaki koya kobonza mbeka, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya na ngonga ya kotumba mbeka yango, azalaki kosimba kanya ya misapi misato na loboko na ye,
14 This he put into the pot, and everything which came up on the hook the priest took for himself. This they did in Shiloh to all the Israelites who came there.
azalaki kokotisa yango na sani, na nzungu, na kikalungu to na mbeki; mpe azalaki kokamata, mpo na Nganga-Nzambe, eteni nyonso ya nyama oyo ezalaki kokangama na kanya. Ezali ndenge wana nde bana mibali ya Eli bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende kuna na Silo.
15 And more than this, before the fat was burned, the priest's servant would come and say to the man who was making the offering, Give me some of the flesh to be cooked for the priest; he has no taste for meat cooked in water, but would have you give it uncooked.
Kutu, liboso ete mafuta ya mbeka etumbama, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya koloba na moto oyo azalaki kobonza mbeka: « Longolaka libela eteni ya Nganga-Nzambe, pamba te akondima te kozwa na maboko na yo nyama oyo yo moko otumbi; kasi akondima kaka nyama ya mobesu. »
16 And if the man said to him, First let the fat be burned, then take as much as you will; then the servant would say, No, you are to give it to me now, or I will take it by force.
Bongo soki moto yango azongiseli mosali ya Nganga-Nzambe: « Tika ete mafuta etumbama nanu, bongo okozwa, na sima, eteni oyo olingi, » mosali azalaki kozongisa: « Te! Pesa ngai yango nde sik’oyo, noki te nakozwa yango na makasi. »
17 And the sin of these young men was very great before the Lord; for they gave no honour to the Lord's offerings.
Lisumu oyo ya bana mibali ya Eli ezalaki monene na miso ya Yawe, pamba te bazalaki kozwa na limemia te mbeka oyo ebonzami mpo na Yawe.
18 But Samuel did the work of the Lord's house, while he was a child, dressed in a linen ephod.
Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino.
19 And his mother made him a little robe and took it to him every year when she came with her husband for the year's offering.
Mibu nyonso, mama na ye azalaki kotongela ye nzambala ya moke, mpe azalaki komemela ye yango tango nyonso azalaki kokende elongo na mobali na ye mpo na kobonza mbeka.
20 And every year Eli gave Elkanah and his wife a blessing, saying, May the Lord give you offspring by this woman in exchange for the child you have given to the Lord. And they went back to their house.
Eli azalaki kopambola Elikana mpe mwasi na ye na maloba oyo: « Tika ete Yawe apesa yo bana na nzela ya mwasi oyo, mpo na kozwa esika ya mwana oyo asengaki na mabondeli mpe abonzaki epai na Yawe! » Sima na yango, bazongaki epai na bango.
21 And the Lord had mercy on Hannah and she gave birth to three sons and two daughters. And the young Samuel became older before the Lord.
Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe.
22 Now Eli was very old; and he had news from time to time of what his sons were doing to all Israel.
Eli akomaki mobange makasi, mpe azalaki koyoka makambo nyonso oyo bana na ye ya mibali bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele; azalaki mpe koyoka ete bazalaki kosangisa nzoto na basi oyo bazalaki kosala na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
23 And he said to them, Why are you doing such things? for from all this people I get accounts of your evil ways.
Alobaki na bango: « Mpo na nini bozali kosala makambo mabe boye? Nazali koyoka bato nyonso kolobela yango.
24 No, my sons, the account which is given me, which the Lord's people are sending about, is not good.
Te, bana na ngai! Sango oyo nazali koyoka bato ya Yawe kopanza na tina na bino ezali malamu te.
25 If one man does wrong to another, God will be his judge: but if a man's sin is against the Lord, who will take up his cause? But they gave no attention to the voice of their father, for it was the Lord's purpose to send destruction on them.
Pamba te soki moto asali moninga na ye mabe, Nzambe akosambisa ye; kasi soki moto asali lisumu epai na Yawe, nani akoloba mpo na ye? » Kasi bana batikalaki koyokela tata na bango te, pamba te ezalaki mokano ya Yawe mpo na koboma bango.
26 And the young Samuel, becoming older, had the approval of the Lord and of men.
Elenge mobali Samuele akobaki kokola na nzoto, mpe azalaki kosepelisa Yawe mpe bato.
27 And a man of God came to Eli and said to him, The Lord says, Did I let myself be seen by your father's people when they were in Egypt, servants in Pharaoh's house?
Mokolo moko, moto moko na Nzambe ayaki epai ya Eli mpe alobaki na ye: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Boni, namimonisaki te na polele epai ya libota ya tata na yo tango bazalaki na Ejipito, na se ya bokonzi ya Faraon?
28 Did I take him out of all the tribes of Israel to be my priest and to go up to my altar to make the smoke of the offerings go up and to take up the ephod? Did I give to your father's family all the offerings made by fire by the children of Israel?
Naponaki tata na yo kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe, mpo ete amata na etumbelo na Ngai, atumba mbeka ya malasi mpe alata efode liboso na Ngai. Napesaki lisusu, na libota ya tata na yo, makabo nyonso ya bana ya Isalaele, makabo oyo bazikisa na moto.
29 Why then are you looking with envy on my offerings of meat and of meal which were ordered by my word, honouring your sons before me, and making yourselves fat with all the best of the offerings of Israel, my people?
Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai?
30 For this reason the Lord God of Israel has said, Truly I did say that your family and your father's people would have their place before me for ever: but now the Lord says, Let it not be so; I will give honour to those by whom I am honoured, and those who have no respect for me will be of small value in my eyes.
Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi: ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi: ‹ Esili! Mosika na Ngai elaka oyo! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni.
31 See, the days are coming when your arm and the arm of your father's people will be cut off;
Mpe na mikolo oyo ezali koya, nakokomisa mikolo na yo mpe ya libota na yo mikuse, mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.
32 And never again will there be an old man in your family.
Atako bakosalela Isalaele bolamu, kasi yo okomona pasi kati na Ndako na Ngai; mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo.
33 But one man of your family will not be cut off by my hand, and his eyes will be made dark, and grief will be in his heart: and all the offspring of your family will come to their end by the sword of men.
Nzokande, kati na bato na yo, ekozala na moto moko oyo nakolongola te liboso ya etumbelo na Ngai, mpo ete obanda koyokelaka ye zuwa mpe obanda kozikaka motema; kasi bana nyonso oyo bakobotama na ndako na yo bakokufa na bolenge na bango.
34 And this will be the sign to you, which will come on Hophni and Phinehas, your sons; death will overtake them on the same day.
Mpe makambo oyo ekokweyela bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, ekozala elembo mpo na yo: bango mibale bakokufa mokolo moko.
35 And I will make a true priest for myself, one who will do what is in my heart and in my mind: and I will make for him a family which will not come to an end; and his place will be before my holy one for ever.
Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai.
36 Then it will be that the rest of your family, anyone who has not been cut off, will go down on his knees to him for a bit of silver or a bit of bread, and say, Be pleased to put me into one of the priest's places so that I may have a little food.
Bongo moto nyonso oyo akotikala kati na libota na yo akobanda koya kofukama liboso na ye mpo na kozwa mbongo moko ya palata mpe eteni ya lipa, mpe akoloba: ‘Kotisa ngai ata na mosala moko kati na misala ya bonganga-Nzambe mpo ete nazwaka ata eteni ya lipa.’ › »