< Romans 1 >

1 Paul, a servant of Christ Jesus, called to be an apostle, and set apart for the gospel of God—
Polo, mowumbu ya Yesu-Klisto, oyo abengama mpo ete azala ntoma mpe aponama mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe,
2 the gospel He promised beforehand through His prophets in the Holy Scriptures,
Sango Malamu oyo Nzambe alaka wuta kala na nzela ya basakoli na Ye kati na Makomi ya bule,
3 regarding His Son, who was a descendant of David according to the flesh,
Sango Malamu oyo ezali koloba na tina na Mwana na Ye, oyo kati na bomoto na Ye, abotamaki na libota ya Davidi,
4 and who through the Spirit of holiness was declared with power to be the Son of God by His resurrection from the dead: Jesus Christ our Lord.
mpe na nzela ya Molimo Mosantu, amonisamaki na nguya nyonso ete azali Mwana na Nzambe, na nzela ya lisekwa na Ye kati na bakufi: Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
5 Through Him and on behalf of His name, we received grace and apostleship to call all those among the Gentiles to the obedience that comes from faith.
Ezali na nzela na Ye nde nazwaki ngolu ya kozala ntoma mpo na kosala ete na Kombo na Ye, Bapagano batosa Ye na nzela ya kondima.
6 And you also are among those who are called to belong to Jesus Christ.
Boye, bino mpe bozali na molongo ya bato yango oyo Yesu-Klisto abenga.
7 To all in Rome who are loved by God and called to be saints: Grace and peace to you from God our Father and the Lord Jesus Christ.
Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu: Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto!
8 First, I thank my God through Jesus Christ for all of you, because your faith is being proclaimed all over the world.
Ya liboso, nazali kozongisa matondi epai ya Nzambe na ngai, na nzela ya Yesu-Klisto, mpo na bino nyonso, pamba te bazali kolobela kondima na bino kati na mokili mobimba.
9 God, whom I serve with my spirit in preaching the gospel of His Son, is my witness how constantly I remember you
Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino
10 in my prayers at all times, asking that now at last by God’s will I may succeed in coming to you.
kati na mabondeli na ngai tango nyonso; mpe nasengaka na Nzambe ete, na mikolo oyo to na mikolo oyo ekoya, apesa ngai nzela ya koya kotala bino, soki ezali mokano na Ye.
11 For I long to see you so that I may impart to you some spiritual gift to strengthen you,
Pamba te nazali na posa makasi ya komona bino mpo na kopesa bino likabo ya ngolu, likabo ya Molimo, mpo ete bolendisama na kondima na bino
12 that is, that you and I may be mutually encouraged by each other’s faith.
to mpo ete tolendisana elongo, na nzela ya kondima moko oyo tozali na yango.
13 I do not want you to be unaware, brothers, how often I planned to come to you (but have been prevented from visiting until now), in order that I might have a harvest among you, just as I have had among the other Gentiles.
Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete nazalaki mbala mingi kosala mabongisi ya koya epai na bino, mpo na kobuka mbuma kati na bino, ndenge nazalaki kosala kati na Bapagano mosusu; kasi kino sik’oyo, bipekiselo mingi ezali kokanga ngai nzela.
14 I am obligated both to Greeks and non-Greeks, both to the wise and the foolish.
Nazali na niongo ya Bagreki mpe ya bato oyo bazali Bagreki te, ya bato ya bwanya mpe ya bazoba.
15 That is why I am so eager to preach the gospel also to you who are in Rome.
Yango wana nazali penza na posa makasi ya koteya Sango Malamu epai na bino oyo bozali na Rome.
16 I am not ashamed of the gospel, because it is the power of God for salvation to everyone who believes, first to the Jew, then to the Greek.
Nazali na soni te mpo na Sango Malamu, pamba te ezali nguya ya Nzambe mpo na lobiko ya moto nyonso oyo andimaka: liboso, ya Moyuda, mpe sima, ya Mogreki.
17 For the gospel reveals the righteousness of God that comes by faith from start to finish, just as it is written: “The righteous will live by faith.”
Pamba te Sango Malamu yango emonisaka biso bosembo ya Nzambe, oyo ezwamaka na nzela ya kondima, wuta na ebandeli kino na suka, kolanda ndenge ekomama: « Moto ya sembo akobika na nzela ya kondima. »
18 The wrath of God is being revealed from heaven against all the godlessness and wickedness of men who suppress the truth by their wickedness.
Solo, Nzambe amonisaka kanda na Ye wuta na lola mpo na kopesa etumbu, na lisumu mpe na mabe nyonso ya bato oyo bazipaka bosolo na nzela ya misala na bango ya mabe,
19 For what may be known about God is plain to them, because God has made it plain to them.
pamba te makambo oyo bakoki koyeba na tina na Nzambe emonanaka polele kati na bango; Ye moko Nzambe nde alakisa bango yango na polele.
20 For since the creation of the world God’s invisible qualities, His eternal power and divine nature, have been clearly seen, being understood from His workmanship, so that men are without excuse. (aïdios g126)
Wuta Nzambe akela mokili, makoki na Ye, oyo emonanaka na miso te, lokola nguya na Ye ya seko mpe bonzambe na Ye, emonanaka polele penza, tango bayekolaka yango na nzela ya misala na Ye. Boye, bato bakoki te komilongola na ngambo. (aïdios g126)
21 For although they knew God, they neither glorified Him as God nor gave thanks to Him, but they became futile in their thinking and darkened in their foolish hearts.
Pamba te, atako bayebaki Nzambe, kasi bapesaki Ye te lokumu oyo ekoki na Nzambe mpe bapesaki Ye matondi te, kasi makanisi na bango ekomaki ya bozoba, mpe mitema na bango, oyo ezangaki mayele, etondaki na molili.
22 Although they claimed to be wise, they became fools,
Atako bazalaki komimona bato ya bwanya, kasi bakomaki bazoba.
23 and exchanged the glory of the immortal God for images of mortal man and birds and animals and reptiles.
Na esika ete bakumisa Nzambe oyo akufaka te mpe atonda na nkembo, bakumisaki banzambe ya bikeko lokola bililingi ya bato oyo bakufaka, ya bandeke, ya banyama oyo etambolaka na makolo minei mpe oyo etambolaka na libumu.
24 Therefore God gave them over in the desires of their hearts to impurity for the dishonoring of their bodies with one another.
Yango wana, Nzambe akabaki bango kati na baposa mabe ya mitema na bango mpe na misala ya bosoto, mpo ete basambwisa banzoto na bango moko, na nzela ya moko to ya mosusu.
25 They exchanged the truth of God for a lie, and worshiped and served the creature rather than the Creator, who is forever worthy of praise! Amen. (aiōn g165)
Basundolaki bosolo ya Nzambe mpo na komipesa na makambo ya lokuta, bapesaki lokumu mpe bagumbamelaki bikelamu, na esika ya Mokeli oyo apesamela nkembo mpo na seko. Amen! (aiōn g165)
26 For this reason God gave them over to dishonorable passions. Even their women exchanged natural relations for unnatural ones.
Yango wana, Nzambe asundolaki bango kati na baposa ya soni. Ezala basi na bango, batikaki kosangisa nzoto na mibali mpo na komipesa na bosangisi nzoto oyo esengeli te.
27 Likewise, the men abandoned natural relations with women and burned with lust for one another. Men committed indecent acts with other men, and received in themselves the due penalty for their error.
Ndenge moko mpe mpo na mibali: batikaki kosangisa nzoto na basi, batondisamaki na posa ya kosangisa nzoto na baninga na bango mibali; basalaki makambo ya soni, mibali na mibali, mpe bazwaki kati na bango moko lifuti oyo ekokaki na libunga na bango.
28 Furthermore, since they did not see fit to acknowledge God, He gave them up to a depraved mind, to do what ought not to be done.
Lokola bamonaki ete koyeba Nzambe ezali na tina te, Nzambe akabaki bango na makanisi na bango ya mabe, mpo ete basala makambo oyo ebongi te.
29 They have become filled with every kind of wickedness, evil, greed, and depravity. They are full of envy, murder, strife, deceit, and malice. They are gossips,
Batondaki na lolenge nyonso ya misala ya sembo te, ya makambo mabe, ya lokoso, ya mabe, ya zuwa, ya misala ya koboma bato, ya koswana, ya kokosela baninga makambo mpe ya koyina bato; bakomaki bato na songisongi,
30 slanderers, God-haters, insolent, arrogant, and boastful. They invent new forms of evil; they disobey their parents.
na kotiola baninga, banguna ya Nzambe, bato batonda na lolendo, na lofundu, na bilobaloba, na mayele ya kosala mabe, batomboki na miso ya baboti na bango;
31 They are senseless, faithless, heartless, merciless.
bato bazanga mayele, bosembo, bolingo mpe mawa.
32 Although they know God’s righteous decree that those who do such things are worthy of death, they not only continue to do these things, but also approve of those who practice them.
Bayebi malamu ekateli ya sembo ya Nzambe ete bato oyo basalaka makambo ya lolenge wana basengeli na kufa, kasi bazali kaka kokoba kosala makambo wana nyonso mpe kondima bato oyo basalaka yango.

< Romans 1 >