< Psalms 135 >

1 Hallelujah! Praise the name of the LORD. Give praise, O servants of the LORD,
Bokumisa Yawe! Bokumisa Kombo ya Yawe! Bokumisa Ye, bino basali ya Yawe,
2 who stand in the house of the LORD, in the courts of the house of our God.
oyo botelemaka kati na Ndako ya Yawe, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe na biso!
3 Hallelujah, for the LORD is good; sing praises to His name, for it is lovely.
Bokumisa Yawe! Pamba te Yawe azali malamu! Boyembela Kombo na Ye, pamba te ezali kitoko makasi.
4 For the LORD has chosen Jacob as His own, Israel as His treasured possession.
Pamba te Yawe aponaki Jakobi, Isalaele, mpo ete azala ya Ye moko.
5 For I know that the LORD is great; our Lord is above all gods.
Solo, ngai nayebi malamu ete Yawe azali monene, ete Nkolo na biso aleki banzambe nyonso.
6 The LORD does all that pleases Him in the heavens and on the earth, in the seas and in all their depths.
Yawe asalaka nyonso oyo alingi, kuna na likolo mpe awa na mabele, kati na bibale minene mpe kati na mozindo nyonso.
7 He causes the clouds to rise from the ends of the earth. He generates the lightning with the rain and brings forth the wind from His storehouses.
Amatisaka mapata wuta na suka ya mokili, atindaka mikalikali elongo na mvula, abimisaka mopepe wuta na bibombelo na yango.
8 He struck down the firstborn of Egypt, of both man and beast.
Ye nde abomaki bana ya liboso ya Ejipito, kobanda na bato kino na banyama;
9 He sent signs and wonders into your midst, O Egypt, against Pharaoh and all his servants.
atindaki bilembo ya kokamwa mpe bikamwa kati na yo, Ejipito, mpo na kotelemela Faraon mpe basali na ye nyonso;
10 He struck down many nations and slaughtered mighty kings:
abebisaki bikolo ebele mpe abomaki bakonzi ya nguya:
11 Sihon king of the Amorites, Og king of Bashan, and all the kings of Canaan.
Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori; Ogi, mokonzi ya Bashani; mpe bakonzi nyonso ya Kanana.
12 He gave their land as an inheritance, as a heritage to His people Israel.
Mpe akabaki mikili na bango lokola libula, lokola libula epai ya bato na Ye, Isalaele.
13 Your name, O LORD, endures forever, Your renown, O LORD, through all generations.
Oh Yawe, sango ya Kombo na Yo ewumelaka libela na libela! Yawe, bakopanza sango ya Kombo na Yo seko na seko!
14 For the LORD will vindicate His people and will have compassion on His servants.
Pamba te Yawe akolimbisa bato na Ye, akoyokela basali na Ye mawa.
15 The idols of the nations are silver and gold, made by the hands of men.
Banzambe ya bikolo ezali ya palata mpe ya wolo, esalema na maboko ya bato.
16 They have mouths, but cannot speak; they have eyes, but cannot see;
Ezali na minoko, kasi elobaka te; ezali na miso, kasi emonaka te;
17 they have ears, but cannot hear; nor is there breath in their mouths.
ezali na matoyi, kasi eyokaka te; ezali ata na pema te kati na minoko na yango.
18 Those who make them become like them, as do all who trust in them.
Bato oyo basalaka yango mpe bato nyonso oyo batielaka yango motema bakokani na yango.
19 O house of Israel, bless the LORD; O house of Aaron, bless the LORD;
Bato ya Isalaele, bopambola Yawe! Bakitani ya Aron, bopambola Yawe!
20 O house of Levi, bless the LORD; you who fear the LORD, bless the LORD!
Bakitani ya Levi, bopambola Yawe! Bino nyonso oyo botosaka Yawe, bopambola Yawe!
21 Blessed be the LORD from Zion— He who dwells in Jerusalem. Hallelujah!
Tika ete, wuta na Siona, Yawe apambolama, Ye oyo avandaka na Yelusalemi! Bokumisa Yawe!

< Psalms 135 >