< Proverbs 29 >
1 A man who remains stiff-necked after much reproof will suddenly be shattered beyond recovery.
Moto oyo atiaka moto makasi soki bapameli ye, akokweyisama na pwasa mpe akobika te.
2 When the righteous flourish, the people rejoice, but when the wicked rule, the people groan.
Soki bato ya sembo bakomi ebele, bato basepelaka; kasi soki bato mabe bakomi koyangela, bato balelaka.
3 A man who loves wisdom brings joy to his father, but a companion of prostitutes squanders his wealth.
Moto oyo alingaka bwanya asalaka esengo ya tata na ye, kasi moto oyo alandaka basi ya ndumba akosilisa bomengo na ye nyonso.
4 By justice a king brings stability to the land, but a man who exacts tribute demolishes it.
Mokonzi oyo akambaka na bosembo ayeisaka kimia na mokili na ye, kasi mokonzi oyo afutisaka mpako ebele abebisaka mokili yango.
5 A man who flatters his neighbor spreads a net for his feet.
Moto oyo alobaka na moninga na ye maloba ya sukali atielaka ye motambo na se ya matambe.
6 An evil man is caught by his own sin, but a righteous one sings and rejoices.
Lisumu ya moto mabe ezalaka na motambo, kasi moto ya sembo agangaka na esengo mpe asepelaka.
7 The righteous consider the cause of the poor, but the wicked have no regard for such concerns.
Moto ya sembo ayebaka pasi ya babola, kasi moto mabe ayebaka na ye kutu yango te.
8 Mockers inflame a city, but the wise turn away anger.
Batioli batiaka mobulu kati na engumba, kasi bato ya bwanya basilisaka kanda.
9 If a wise man goes to court with a fool, there will be raving and laughing with no resolution.
Soki moto ya bwanya akei kosamba elongo na moto ya liboma, ezala asiliki to aseki, akotikala kozala na kimia te.
10 Men of bloodshed hate a blameless man, but the upright care for his life.
Bato oyo basopaka makila balingaka bato ya sembo te, kasi bato malamu balukaka bato ya sembo.
11 A fool vents all his anger, but a wise man holds it back.
Zoba alandaka baposa nyonso ya motema na ye, kasi moto ya bwanya akangaka yango mpe akitisaka yango.
12 If a ruler listens to lies, all his officials will be wicked.
Soki mokonzi akomi koyoka makambo ya lokuta, basali na ye nyonso bakokoma bato mabe.
13 The poor man and the oppressor have this in common: The LORD gives light to the eyes of both.
Mobola mpe monyokoli bazali na likambo moko ya lisanga: Yawe angengisaka miso ya bango mibale.
14 A king who judges the poor with fairness— his throne will be established forever.
Mokonzi oyo asambisaka babola na bosembo, kiti na ye ya bokonzi ekolendisama tango nyonso.
15 A rod of correction imparts wisdom, but a child left to himself disgraces his mother.
Fimbu mpe pamela epesaka bwanya, kasi mwana oyo basundola ayokisaka mama na ye soni.
16 When the wicked thrive, rebellion increases; but the righteous will see their downfall.
Soki bato mabe bakomi ebele, mabe mpe ekomaka ebele; kasi bato ya sembo bakomona bango kokweya.
17 Discipline your son, and he will give you rest; he will bring delight to your soul.
Pesa mwana na yo etumbu, bongo okozala na kimia mpe akotondisa motema na yo na esengo.
18 Where there is no vision, the people cast off restraint; but blessed is he who keeps the Law.
Soki emoniseli ezali te, bato bakotambola ngulungulu. Esengo na moto oyo atosaka Mobeko!
19 A servant cannot be corrected by words alone; though he understands, he will not respond.
Bapamelaka mosali na maloba te; pamba te akososola, kasi akoyoka te.
20 Do you see a man who speaks in haste? There is more hope for a fool than for him.
Soki omoni moto kowela koloba liboso ete akanisa, malamu kotia elikya na zoba, kasi na ye te.
21 A servant pampered from his youth will bring grief in the end.
Moto oyo alengelaka mosali na ye wuta bolenge akosuka na kokomisa ye moto makasi.
22 An angry man stirs up dissension, and a hot-tempered man abounds in transgression.
Moto ya kanda amemaka koswana, mpe moto oyo atombokaka noki akomaka na mabe koleka.
23 A man’s pride will bring him low, but a humble spirit will obtain honor.
Lolendo ya moto ekitisaka ye, kasi moto ya komikitisa azwaka lokumu.
24 A partner to a thief hates his own soul; he receives the oath, but does not testify.
Moto oyo akabolaka biloko elongo na moyibi amiyinaka; ayokaka bilakeli mabe, kasi amekaka te kofunda ye.
25 The fear of man is a snare, but whoever trusts in the LORD is set securely on high.
Kobanga bato ezalaka motambo na se ya matambe, kasi Yawe abatelaka moto oyo atiaka elikya na Ye.
26 Many seek the ruler’s favor, but a man receives justice from the LORD.
Bato ebele balukaka kokoma balingami ya mokonzi, nzokande ezali Yawe nde apesaka oyo ekoki na moto na moto.
27 An unjust man is detestable to the righteous, and one whose way is upright is detestable to the wicked.
Bato ya sembo bayinaka moto ya masumu, mpe moto mabe ayinaka etamboli ya bato ya sembo.