< Numbers 11 >
1 Soon the people began to complain about their hardship in the hearing of the LORD, and when He heard them, His anger was kindled, and fire from the LORD blazed among them and consumed the outskirts of the camp.
Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako.
2 And the people cried out to Moses, and he prayed to the LORD, and the fire died down.
Bato bagangaki epai ya Moyize; ye abondelaki Yawe, mpe moto ekufaki.
3 So that place was called Taberah, because the fire of the LORD had burned among them.
Boye, bakomaki kobenga esika yango « Tabeera, » pamba te moto ya Yawe ezikisaki bato ya Isalaele.
4 Meanwhile, the rabble among them had a strong craving for other food, and again the Israelites wept and said, “Who will feed us meat?
Mokolo moko, bato ya bikolo mosusu oyo bazalaki elongo na bana ya Isalaele bakomaki na posa makasi ya kolia misuni. Bongo bana ya Isalaele bakomaki lisusu kolelalela mpe koloba: « Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia?
5 We remember the fish we ate freely in Egypt, along with the cucumbers, melons, leeks, onions, and garlic.
Tokanisi lisusu bambisi, bandunda ya ndenge na ndenge, pasiteki, bandembi, matungulu, ayi oyo tozalaki kolia ya ofele na Ejipito.
6 But now our appetite is gone; there is nothing to see but this manna!”
Kasi sik’oyo, banzoto na biso ebebi penza, tozali lisusu te kolia biloko wana nyonso! Tokomi kaka komona mana oyo! »
7 Now the manna resembled coriander seed, and its appearance was like that of gum resin.
Mana ezalaki lokola mbuma ya koriande mpe ezalaki komonana pembe lokola mayi ya nzete oyo babengaka bedeliumi.
8 The people walked around and gathered it, ground it on a handmill or crushed it in a mortar, then boiled it in a cooking pot or shaped it into cakes. It tasted like pastry baked with fine oil.
Bato bazalaki kopanzana bipai na bipai mpo na kolokota yango, mpe na sima, bazalaki konika yango na libanga to mpe kotuta yango na liboka, bongo nde bakokaki kolamba yango na banzungu to kosalela yango mikate. Mikate na yango ezalaki na elengi lokola bagato oyo basala na mafuta ya sika.
9 When the dew fell on the camp at night, the manna would fall with it.
Na butu, tango mamwe ezalaki kokita, mana mpe ezalaki kokweya nzela moko na yango.
10 Then Moses heard the people of family after family weeping at the entrances to their tents, and the anger of the LORD was kindled greatly, and Moses was also displeased.
Moyize ayokaki ndenge libota moko na moko ezalaki kolelalela na ekotelo ya ndako na bango ya kapo. Yawe asilikaki makasi; mpe Moyize ayokaki pasi mingi na motema.
11 So Moses asked the LORD, “Why have You brought this trouble on Your servant? Why have I not found favor in Your sight, that You have laid upon me the burden of all these people?
Moyize alobaki na Yawe: — Mpo na nini komonisa mosali na Yo pasi ya boye? Mabe nini ngai nasali penza mpo ete osundolela ngai mokumba ya bato oyo?
12 Did I conceive all these people? Did I give them birth, so that You should tell me, ‘Carry them in your bosom, as a nurse carries an infant,’ to the land that You swore to give their fathers?
Boni, ngai moto namemaki mokumba ya bato oyo nyonso to nabotaki bango? Mpo na nini oloba na ngai ete namema bango na maboko lokola bana mike, na mokili oyo olakaki na ndayi epai ya bakoko na bango?
13 Where can I get meat for all these people? For they keep crying out to me, ‘Give us meat to eat!’
Ngai nakozwa misuni ya kolia wapi mpo na bato oyo nyonso oyo bazali kokoba kolelalela epai na ngai: « Pesa biso misuni ya kolia! »
14 I cannot carry all these people by myself; it is too burdensome for me.
Ngai moko nakokoka te komema bato oyo nyonso; mokumba oyo eleki monene mpo na ngai.
15 If this is how You are going to treat me, please kill me right now—if I have found favor in Your eyes—and let me not see my own wretchedness.”
Soki ezali kaka boye nde ozali kosala ngai, eleki malamu ete oboma ngai kaka sik’oyo. Soki nazwi ngolu na miso na Yo, kotika te ete namona kobebisama na ngai.
16 Then the LORD said to Moses, “Bring Me seventy of the elders of Israel known to you as leaders and officers of the people. Bring them to the Tent of Meeting and have them stand there with you.
Yawe alobaki na Moyize: — Kati na bakambi ya Isalaele, sangisela Ngai mibali tuku sambo, ba-oyo oyebi ete bazali bakambi mpe bakalaka kati na bato. Tika ete baya na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe batelema wana elongo na yo.
17 And I will come down and speak with you there, and I will take some of the Spirit that is on you and put that Spirit on them. They will help you bear the burden of the people, so that you do not have to bear it by yourself.
Nakokita mpe nakosolola na yo kuna. Nakokamata Molimo oyo ezali epai na yo mpe nakotia yango epai na bango. Bongo, bakosunga yo mpo na komema mokumba ya bato oyo mpo ete omema yango lisusu yo moko te.
18 And say to the people: Consecrate yourselves for tomorrow, and you will eat meat, because you have cried out in the hearing of the LORD, saying: ‘Who will feed us meat? For we were better off in Egypt!’ Therefore the LORD will give you meat, and you will eat.
Loba na bato: « Bomibongisa mpe bomibulisa mpo na lobi, pamba te bokolia misuni. Yawe ayokaki tango bozalaki kolelalela: ‹ Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia? Biso oyo tozalaki na biso malamu na Ejipito! › Sik’oyo Yawe akopesa bino misuni mpe bokolia yango.
19 You will eat it not for one or two days, nor for five or ten or twenty days,
Bokolia yango te kaka mokolo moko to mikolo mibale to mitano to zomi to mpe tuku mibale.
20 but for a whole month—until it comes out of your nostrils and makes you nauseous—because you have rejected the LORD, who is among you, and have cried out before Him, saying, ‘Why did we ever leave Egypt?’”
Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki: ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito? › »
21 But Moses replied, “Here I am among 600,000 men on foot, yet You say, ‘I will give them meat, and they will eat for a month.’
Moyize alobaki lisusu: — Bato nkoto nkama motoba bazali kotambola sima na ngai, mpe Yo ozali koloba: « Nakopesa bango misuni ya kolia mpo na sanza mobimba! »
22 If all our flocks and herds were slaughtered for them, would they have enough? Or if all the fish in the sea were caught for them, would they have enough?”
Ekokoka penza ata soki babomi bibwele nyonso oyo bazali na yango, ezala ngombe to bantaba? Ekokoka penza ata soki balobi mbisi nyonso ya ebale monene?
23 The LORD answered Moses, “Is the LORD’s arm too short? Now you will see whether or not My word will come to pass.”
Yawe alobaki na Moyize: — Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo.
24 So Moses went out and relayed to the people the words of the LORD, and he gathered seventy of the elders of the people and had them stand around the tent.
Boye, Moyize abimaki mpe ayebisaki bato maloba oyo Yawe ayebisaki ye. Asangisaki bakambi tuku sambo mpe atelemisaki bango zingazinga ya Ndako ya kapo.
25 Then the LORD came down in the cloud and spoke to him, and He took some of the Spirit that was on Moses and placed that Spirit on the seventy elders. As the Spirit rested on them, they prophesied—but they never did so again.
Yawe akitaki na nzela ya lipata mpe asololaki na ye; akamataki nguya ya Molimo, oyo ezalaki epai na Ye, mpe atiaki yango epai ya bakambi tuku sambo. Tango kaka Molimo akitelaki bango, bakomaki kosakola, kasi bakobaki te.
26 Two men, however, had remained in the camp—one named Eldad and the other Medad—and the Spirit rested on them. They were among those listed, but they had not gone out to the tent, and they prophesied in the camp.
Nzokande, bato mibale oyo bakombo na bango ezalaki Elidadi mpe Medadi batikalaki kati na molako. Bango mpe bazalaki na molongo ya bampaka, kasi bakendeki te na Ndako ya kapo. Molimo akitelaki bango mpe bakomaki kosakola kati na molako.
27 A young man ran and reported to Moses, “Eldad and Medad are prophesying in the camp.”
Elenge mobali moko apotaki mbangu mpe akendeki koyebisa Moyize: — Elidadi mpe Medadi bazali kosakola kati na molako!
28 Joshua son of Nun, the attendant to Moses since youth, spoke up and said, “Moses, my lord, stop them!”
Jozue, mwana mobali ya Nuni, oyo azalaki mosungi ya Moyize wuta bolenge na ye alobaki: — Moyize, nkolo na ngai, pekisa bango!
29 But Moses replied, “Are you jealous on my account? I wish that all the LORD’s people were prophets and that the LORD would place His Spirit on them!”
Kasi Moyize azongisaki: — Boni, okosalela ngai zuwa na likambo nini? Nakosepela kutu ete bato nyonso bakoma basakoli mpe Yawe akitisa Molimo na Ye epai na bango!
30 Then Moses returned to the camp, along with the elders of Israel.
Bongo, Moyize mpe bakambi nyonso ya Isalaele bazongaki na molako.
31 Now a wind sent by the LORD came up, drove in quail from the sea, and brought them near the camp, about two cubits above the surface of the ground, for a day’s journey in every direction around the camp.
Boye, Yawe atindaki mopepe moko oyo ememaki bankanga wuta na ebale monene mpe ebwakaki yango na molako mpe na zingazinga na yango. Etando oyo bankanga ekweyaki ezalaki molayi ya mobembo ya mokolo moko na makolo, mpe ezipaki mabele na bosanda ya metele moko.
32 All that day and night, and all the next day, the people stayed up gathering the quail. No one gathered less than ten homers, and they spread them out all around the camp.
Bato babimaki mpo na kolokota bankanga mokolo mobimba, butu na yango mpe mokolo oyo elandaki. Moto moko te atikalaki kozwa na se ya bakilo nkoto moko; mpe batandaki yango na zingazinga ya molako.
33 But while the meat was still between their teeth, before it was chewed, the anger of the LORD burned against the people, and the LORD struck them with a severe plague.
Kasi, wana misuni ezalaki nanu kati na minoko na bango mpe basilisaki nanu kotafuna yango te, kanda ya Yawe epelaki mpo na bango mpe apesaki bango etumbu ya makasi.
34 So they called that place Kibroth-hattaavah, because there they buried the people who had craved other food.
Yango wana, bakomaki kobenga esika yango « Kibiroti-Atava, » pamba te ezalaki na esika wana nde bakundaki bato ya lokoso.
35 From Kibroth-hattaavah the people moved on to Hazeroth, where they remained for some time.
Longwa na Kibiroti-Atava, bana ya Isalaele basalaki mobembo kino na Atseroti mpe bavandaki kuna.