< Nehemiah 8 >

1 At that time all the people gathered together in the square before the Water Gate, and they asked Ezra the scribe to bring out the Book of the Law of Moses, which the LORD had commanded for Israel.
Bato nyonso basanganaki lokola moto moko na libanda, liboso ya Ekuke ya Mayi. Balobaki na Esidrasi, molakisi ya Mobeko, ete abimisa buku ya Mobeko ya Moyize, oyo Yawe apesaki bana ya Isalaele.
2 On the first day of the seventh month, Ezra the priest brought the Law before the assembly of men and women and all who could listen and understand.
Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, Nganga-Nzambe Esidrasi amemaki buku ya Mobeko liboso ya lisanga oyo, kati na yango, ezalaki na mibali, basi mpe bato nyonso oyo bazalaki na makoki ya kososola.
3 So Ezra read it aloud from daybreak until noon as he faced the square before the Water Gate, in front of the men and women and those who could understand. And all the people listened attentively to the Book of the Law.
Atangelaki bango buku yango na mongongo makasi, kobanda na tongo kino na pokwa, na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi. Bato nyonso bazalaki koyoka na bokebi botangi buku ya Mobeko.
4 Ezra the scribe stood on a high wooden platform built for this occasion. At his right side stood Mattithiah, Shema, Anaiah, Uriah, Hilkiah, and Maaseiah, and at his left were Pedaiah, Mishael, Malchijah, Hashum, Hash-baddanah, Zechariah, and Meshullam.
Esidrasi, molakisi ya Mobeko, atelemaki na etemelo ya kolobela oyo basalaki na mabaya, kaka mpo na mayangani wana. Matitia, Shema, Anaya, Uri, Ilikia mpe Maaseya batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mobali; Pedaya, Mishaeli, Malikiya, Ashumi, Ashibadana, Zakari mpe Meshulami batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mwasi.
5 Ezra opened the book in full view of all the people, since he was standing above them all, and as he opened it, all the people stood up.
Mpo ete Esidrasi atelemaki na esika ya likolo koleka bato nyonso, moto nyonso amonaki ye kofungola buku. Mpe tango kaka afungolaki buku yango, bato nyonso batelemaki.
6 Then Ezra blessed the LORD, the great God, and with their hands uplifted, all the people said, “Amen, Amen!” Then they bowed down and worshiped the LORD with their faces to the ground.
Esidrasi akumisaki Yawe, Nzambe Monene; mpe bato nyonso batombolaki maboko na bango mpe bazongisaki: « Amen! » Bongo bafukamaki mpe bakitisaki bilongi na bango kino na se mpo na kogumbamela Yawe.
7 The Levites—Jeshua, Bani, Sherebiah, Jamin, Akkub, Shabbethai, Hodiah, Maaseiah, Kelita, Azariah, Jozabad, Hanan, and Pelaiah—instructed the people in the Law as they stood in their places.
Sima, batelemaki; mpe Balevi oyo: Jozue, Bani, Sherebia, Yamini, Akubi, Shabetayi, Odia, Maaseya, Kelita, Azaria, Yozabadi, Anani mpe Pelaya bakomaki kolimbolela bato Mibeko yango, wana bato bazalaki nanu ya kotelema.
8 So they read from the Book of the Law of God, explaining it and giving insight, so that the people could understand what was being read.
Balevi bazalaki kotanga kati na buku ya Mobeko ya Nzambe mpe kopesa ndimbola na yango, na ndenge ya malembe mpe ya malamu, mpo ete bato bakoka kososola makomi oyo batangi.
9 Nehemiah the governor, Ezra the priest and scribe, and the Levites who were instructing the people said to all of them, “This day is holy to the LORD your God. Do not mourn or weep.” For all the people were weeping as they heard the words of the Law.
Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso: — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso; botika kosala matanga mpe botika kolela!
10 Then Nehemiah told them, “Go and eat what is rich, drink what is sweet, and send out portions to those who have nothing prepared, since today is holy to our Lord. Do not grieve, for the joy of the LORD is your strength.”
Neyemi alobaki na bango lisusu: — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino.
11 And the Levites calmed all the people, saying, “Be still, since today is holy. Do not grieve.”
Balevi bazalaki kokitisa bato nyonso mitema, bazalaki koloba na bango: — Bozala na kimia, pamba te mokolo ya lelo ezali bule; bozala na mawa te!
12 Then all the people began to eat and drink, to send out portions, and to rejoice greatly, because they understood the words that had been made known to them.
Bato nyonso bakendeki kolia mpe komela, kotinda ndambo ya bilei epai ya bato oyo bazangaki eloko ya kolamba mpe kosepela na esengo makasi, pamba te basosolaki maloba oyo balimbolelaki bango.
13 On the second day of the month, the heads of all the families, along with the priests and Levites, gathered around Ezra the scribe to study the words of the Law.
Na mokolo ya mibale ya sanza, bakambi ya mabota nyonso elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi basanganaki pembeni ya Esidrasi, molakisi ya Mobeko, mpo na koluka koyeba malamu-malamu maloba ya Mibeko.
14 And they found written in the Law, which the LORD had commanded through Moses, that the Israelites were to dwell in booths during the feast of the seventh month.
Bamonaki ete ekomama kati na Mibeko oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize, ete bana ya Isalaele basengeli kovanda kati na bandako oyo batonga na matiti, na tango ya feti ya sanza ya sambo,
15 So they proclaimed this message and spread it throughout their towns and in Jerusalem, saying, “Go out to the hill country and bring back branches of olive, wild olive, myrtle, palm, and other leafy trees, to make booths, as it is written.”
mpe basengeli kotatola to kopanza kati na bingumba na bango nyonso mpe kati na Yelusalemi liloba oyo: « Bobima wuta na mokili ya bangomba, bomema longwa kuna bitape ya nzete ya olive ya mboka mpe ya zamba, bitape ya nzete ya mirite, mandalala mpe bitape ya nzete ya makasa ebele mpo na kotonga bandako ya matiti, kolanda ndenge ekomama. »
16 And the people went out, brought back branches, and made booths on their own rooftops, in their courtyards, in the court of the house of God, and in the squares by the Water Gate and by the Gate of Ephraim.
Bato babimaki mpe bamemaki longwa kuna bitape ya banzete; batongaki bandako ya matiti, na likolo ya mwanza ya bandako na bango, kati na mapango na bango, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe, na libanda ya Ekuke ya Mayi mpe na esika oyo ezalaki pembeni ya Ekuke ya Efrayimi.
17 The whole assembly who had returned from exile made booths and lived in them. From the days of Joshua son of Nun until that day, the Israelites had not celebrated like this. And there was great rejoicing.
Lisanga ya bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu batongaki bandako ya matiti mpe bavandaki kati na yango. Wuta na tango ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, kino na mokolo wana, bana ya Isalaele batikalaki lisusu te kosepela feti yango. Boye, mpo na libaku oyo, bazalaki na esengo makasi.
18 Day after day, from the first day to the last, Ezra read from the Book of the Law of God. The Israelites kept the feast for seven days, and on the eighth day they held an assembly, according to the ordinance.
Mokolo na mokolo, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya suka, Esidrasi azalaki kotanga buku ya Mobeko ya Nzambe. Basepelaki feti mikolo sambo; mpe na mokolo ya mwambe, kolanda malako ya Mobeko, basalaki mayangani mpo na kosukisa feti.

< Nehemiah 8 >