< Luke 2 >

1 Now in those days a decree went out from Caesar Augustus that a census should be taken of the whole empire.
Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome.
2 This was the first census to take place while Quirinius was governor of Syria.
Ezalaki mbala ya liboso ya kotanga motango ya bato, wana Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siri.
3 And everyone went to his own town to register.
Bato nyonso bazalaki kokende komikomisa, moto na moto kati na engumba na ye.
4 So Joseph also went up from Nazareth in Galilee to Judea, to the city of David called Bethlehem, since he was from the house and line of David.
Jozefi mpe alongwaki na engumba Nazareti, kati na etuka ya Galile, mpo na kokende na Beteleemi, engumba ya Davidi, kati na etuka ya Yuda, pamba te azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi.
5 He went there to register with Mary, who was pledged to him in marriage and was expecting a child.
Akendeki kuna mpo na kokomisa kombo na ye mpe kombo ya Mari, mobandami na ye ya libala, oyo azalaki na zemi.
6 While they were there, the time came for her Child to be born.
Wana bazalaki na Beteleemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki.
7 And she gave birth to her firstborn, a Son. She wrapped Him in swaddling cloths and laid Him in a manger, because there was no room for them in the inn.
Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya.
8 And there were shepherds residing in the fields nearby, keeping watch over their flocks by night.
Kati na etuka yango, ezalaki na babateli bibwele oyo bazalaki kolekisa babutu na bango kati na bilanga ya pembeni mpo na kobatela bitonga na bango.
9 Just then an angel of the Lord stood before them, and the glory of the Lord shone around them, and they were terrified.
Anjelu moko ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki zingazinga na bango; mpe bayokaki somo makasi.
10 But the angel said to them, “Do not be afraid! For behold, I bring you good news of great joy that will be for all the people:
Kasi anjelu alobaki na bango: — Bobanga te! Namemeli bino sango moko ya malamu, oyo ekopesa bato nyonso esengo makasi.
11 Today in the city of David a Savior has been born to you. He is Christ the Lord!
Mobikisi abotameli bino lelo, kati na engumba ya Davidi; Ye nde azali Masiya, Nkolo.
12 And this will be a sign to you: You will find a baby wrapped in swaddling cloths and lying in a manger.”
Tala elembo oyo ekosunga bino mpo na koyeba Ye: bokomona mwana moko abotami sika, balingi ye na bilamba mpe balalisi ye kati na elielo ya bibwele.
13 And suddenly there appeared with the angel a great multitude of the heavenly host, praising God and saying:
Mbala moko, ba-anjelu ebele ya mampinga ya Likolo bayaki kosangana na anjelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe mpe koloba:
14 “Glory to God in the highest, and on earth peace to men on whom His favor rests!”
« Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka! »
15 When the angels had left them and gone into heaven, the shepherds said to one another, “Let us go to Bethlehem and see this thing that has happened, which the Lord has made known to us.”
Tango ba-anjelu bakabwanaki na bango mpo na kozonga na Likolo, babateli bibwele balobanaki bango na bango: « Tokende kino na Beteleemi, mpo na kotala makambo oyo esalemi kuna, makambo oyo Nkolo ayebisi biso. »
16 So they hurried off and found Mary and Joseph and the Baby, who was lying in the manger.
Bakendeki kuna na lombangu mpe bakutaki Mari, Jozefi mpe mwana oyo abotami sika alala kati na elielo ya bibwele.
17 After they had seen the Child, they spread the message they had received about Him.
Sima na bango komona ye, balobaki makambo oyo bayebisaki bango na tina na mwana yango.
18 And all who heard it were amazed at what the shepherds said to them.
Bato nyonso oyo bayokaki bango bakamwaki mingi makambo oyo babateli bibwele balobaki.
19 But Mary treasured up all these things and pondered them in her heart.
Kasi Mari azalaki kobomba maloba wana nyonso mpe kokanisa na tina na yango mbala na mbala.
20 The shepherds returned, glorifying and praising God for all they had heard and seen, which was just as the angel had told them.
Babateli bibwele bazongaki na kokumisa mpe kosanzola Nzambe mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, pamba te makambo nyonso esalemaki ndenge anjelu ayebisaki bango yango.
21 When the eight days until His circumcision had passed, He was named Jesus, the name the angel had given Him before He had been conceived.
Na mokolo ya mwambe, tango ngonga ya kokatisa mwana ngenga ekokaki, bapesaki mwana kombo « Yesu, » kombo oyo anjelu apesaki ye liboso ete mama na ye akoma na zemi.
22 And when the time of purification according to the Law of Moses was complete, His parents brought Him to Jerusalem to present Him to the Lord
Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, kolanda ndenge ekomama kati na mobeko ya Moyize, Jozefi mpe Mari bamemaki Yesu na Yelusalemi mpo na kotalisa Ye epai ya Nkolo,
23 (as it is written in the Law of the Lord: “Every firstborn male shall be consecrated to the Lord”),
kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo: « Mwana mobali nyonso ya liboso akobulisama mpo na Nkolo; »
24 and to offer the sacrifice specified in the Law of the Lord: “A pair of turtledoves or two young pigeons.”
mpe mpo na kobonza mbeka, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo: bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka.
25 Now there was a man in Jerusalem named Simeon, who was righteous and devout. He was waiting for the consolation of Israel, and the Holy Spirit was upon him.
Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye.
26 The Holy Spirit had revealed to him that he would not see death before he had seen the Lord’s Christ.
Molimo Mosantu alakisaki ye ete akokufa te kino akomona Masiya, Motindami ya Nkolo.
27 Led by the Spirit, he went into the temple courts. And when the parents brought in the child Jesus to do for Him what was customary under the Law,
Wana Molimo akambaki ye, akendeki na Tempelo. Mpe, lokola baboti ya Mwana Yesu bamemaki Ye mpo na kokokisa makambo oyo Mobeko etindaki,
28 Simeon took Him in his arms and blessed God, saying:
Simeoni ayambaki Yesu na maboko na ye mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo:
29 “Sovereign Lord, as You have promised, You now dismiss Your servant in peace.
« Nkolo, sik’oyo, kolanda elaka na Yo, tika ete mowumbu na Yo akende na kimia!
30 For my eyes have seen Your salvation,
Pamba te miso na ngai emoni Mobikisi oyo awuti epai na Yo,
31 which You have prepared in the sight of all people,
Mobikisi oyo obongisi mpo na bikolo nyonso:
32 a light for revelation to the Gentiles, and for glory to Your people Israel.”
pole mpo na kongengisa bikolo, mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. »
33 The Child’s father and mother were amazed at what was spoken about Him.
Tata mpe mama ya Yesu bakamwaki mingi maloba oyo Simeoni alobaki na tina na Ye.
34 Then Simeon blessed them and said to His mother Mary: “Behold, this Child is appointed to cause the rise and fall of many in Israel, and to be a sign that will be spoken against,
Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu: — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato.
35 so that the thoughts of many hearts will be revealed— and a sword will pierce your soul as well.”
Boye, makanisi oyo ebombama kati na mitema ya bato ebele ekoyebana. Bongo yo mpe, okoyoka lokola nde batubi motema na yo na mopanga.
36 There was also a prophetess named Anna, the daughter of Phanuel, of the tribe of Asher, who was well along in years. She had been married for seven years,
Ezalaki mpe na mwasi mosakoli moko, Ana, mwana ya Fanwele, moto ya libota ya Aseri; akomaki mobange makasi. Na bolenge na ye, asalaki mibu sambo ya libala elongo na mobali na ye;
37 and then was a widow to the age of eighty-four. She never left the temple, but worshiped night and day, fasting and praying.
sima na yango, akufisaki mobali mpe atikalaki lisusu kobala te kino akokisaki mibu tuku mwambe na minei ya mbotama. Azalaki kolongwa te na Tempelo, kasi azalaki kosalela Nzambe, butu mpe moyi; azalaki kokila bilei mpe kosambela.
38 Coming forward at that moment, she gave thanks to God and spoke about the Child to all who were waiting for the redemption of Jerusalem.
Awa ayaki mpe kaka na ngonga wana, abandaki kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe koloba na tina na Mwana Yesu, epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yelusalemi.
39 When Jesus’ parents had done everything required by the Law of the Lord, they returned to Galilee, to their own town of Nazareth.
Sima na bango kokokisa nyonso oyo Mobeko ya Nkolo ezalaki kotinda, Mari mpe Jozefi bazongaki kati na Galile, na Nazareti, engumba na bango.
40 And the Child grew and became strong. He was filled with wisdom, and the grace of God was upon Him.
Mwana azalaki kokola mpe kokoma makasi; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye.
41 Every year His parents went to Jerusalem for the Feast of the Passover.
Baboti ya Yesu bazalaki kokende na Yelusalemi mibu nyonso mpo na feti ya Pasika.
42 And when He was twelve years old, they went up according to the custom of the Feast.
Tango Yesu akokisaki mibu zomi na mibale ya mbotama, bakendeki na feti lokola momesano.
43 When those days were over and they were returning home, the boy Jesus remained behind in Jerusalem, but His parents were unaware He had stayed.
Bongo tango feti esilaki, wana baboti na Ye bazongaki, Elenge Yesu atikalaki na Yelusalemi; kasi baboti na Ye bayebaki te ete atikali.
44 Assuming He was in their company, they traveled on for a day before they began to look for Him among their relatives and friends.
Lokola bazalaki kokanisa ete azali elongo na baninga na Ye ya mobembo, basalaki mokolo mobimba na nzela. Bongo bakomaki koluka Ye epai ya bandeko mpe baninga na bango.
45 When they could not find Him, they returned to Jerusalem to search for Him.
Kasi bamonaki Ye te; mpe wana bakobaki koluka Ye, bazongaki kino na Yelusalemi.
46 Finally, after three days they found Him in the temple courts, sitting among the teachers, listening to them and asking them questions.
Sima na mikolo misato, bamonaki Ye kati na lopango ya Tempelo avandi na kati-kati ya balakisi ya Mobeko, azali koyoka bango mpe kopesa bango mituna.
47 And all who heard Him were astounded at His understanding and His answers.
Bato nyonso oyo bazalaki koyoka Ye bazalaki kokamwa mingi mayele na Ye mpe biyano na Ye.
48 When His parents saw Him, they were astonished. “Child, why have You done this to us?” His mother asked. “Your father and I have been anxiously searching for You.”
Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye: — Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso!
49 “Why were you looking for Me?” He asked. “Did you not know that I had to be in My Father’s house?”
Yesu azongiselaki bango: — Mpo na nini koluka Ngai? Boyebaki te ete nasengeli kosala misala ya Tata na Ngai?
50 But they did not understand the statement He was making to them.
Kasi basosolaki te maloba na Ye.
51 Then He went down to Nazareth with them and was obedient to them. But His mother treasured up all these things in her heart.
Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye.
52 And Jesus grew in wisdom and stature, and in favor with God and man.
Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye.

< Luke 2 >