< Leviticus 26 >

1 “You must not make idols for yourselves or set up a carved image or sacred pillar; you must not place a sculpted stone in your land to bow down to it. For I am the LORD your God.
Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino.
2 You must keep My Sabbaths and have reverence for My sanctuary. I am the LORD.
Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe.
3 If you follow My statutes and carefully keep My commandments,
Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango,
4 I will give you rains in their season, and the land will yield its produce, and the trees of the field will bear their fruit.
nakonokisela bino mvula na tango na yango; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango.
5 Your threshing will continue until the grape harvest, and the grape harvest will continue until sowing time; you will have your fill of food to eat and will dwell securely in your land.
Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino.
6 And I will give peace to the land, and you will lie down with nothing to fear. I will rid the land of dangerous animals, and no sword will pass through your land.
Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino.
7 You will pursue your enemies, and they will fall by the sword before you.
Bokobengana banguna liboso na bino mpe bakokufa na mopanga liboso na bino.
8 Five of you will pursue a hundred, and a hundred of you will pursue ten thousand, and your enemies will fall by the sword before you.
Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga.
9 I will turn toward you and make you fruitful and multiply you, and I will establish My covenant with you.
Nakosalela bino ngolu, nakopesa bino mabota nakokomisa bino ebele mpe nakobatela boyokani na Ngai elongo na bino.
10 You will still be eating the old supply of grain when you need to clear it out to make room for the new.
Bambuma ya bilanga na bino ekozala penza ebele mpe ekosala ete bokolia tango molayi bambuma oyo bokozala na yango kati na bibombelo; kino bokokaba mosusu mpo ete bokotisa bambuma ya sika.
11 And I will make My dwelling place among you, and My soul will not despise you.
Nakotia Ndako na Ngai kati na bino mpe nakotombokela bino te.
12 I will walk among you and be your God, and you will be My people.
Nakotambola kati na bino mpo ete nazala Nzambe na bino mpe bino bozala bato na Ngai.
13 I am the LORD your God, who brought you out of the land of Egypt so that you would no longer be slaves to the Egyptians. I broke the bars of your yoke and enabled you to walk in uprightness.
Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete bozala lisusu bawumbu kuna te; nakataki basinga ya bikangiseli na bino mpe nabimisaki bino lokola balongi.
14 If, however, you fail to obey Me and to carry out all these commandments,
Soki boboyi kotosa mpe kosalela mibeko wana nyonso,
15 and if you reject My statutes, despise My ordinances, and neglect to carry out all My commandments, and so break My covenant,
soki bobwaki bikateli na Ngai, mpe soki molimo na bino etombokeli malako na Ngai kino koboya kosalela mibeko na Ngai nyonso mpe kokata boyokani na Ngai,
16 then this is what I will do to you: I will bring upon you sudden terror, wasting disease, and fever that will destroy your sight and drain your life. You will sow your seed in vain, because your enemies will eat it.
tala ndenge nakosala bino: nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango.
17 And I will set My face against you, so that you will be defeated by your enemies. Those who hate you will rule over you, and you will flee when no one pursues you.
Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino.
18 And if after all this you will not obey Me, I will proceed to punish you sevenfold for your sins.
Soki atako bongo boyoki kaka te, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
19 I will break down your stubborn pride and make your sky like iron and your land like bronze,
Nakosilisa makasi na bino, nakokomisa lola makasi lokola ebende mpo na bino, mpe mabele na bino lokola bronze.
20 and your strength will be spent in vain. For your land will not yield its produce, and the trees of the land will not bear their fruit.
Makasi na bino ekosila na pamba, mpo ete mabele na bino ekobota te mpe banzete ekobota te bambuma na yango.
21 If you walk in hostility toward Me and refuse to obey Me, I will multiply your plagues seven times, according to your sins.
Soki botelemeli Ngai mpe boboyi koyoka Ngai, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
22 I will send wild animals against you to rob you of your children, destroy your livestock, and reduce your numbers, until your roads lie desolate.
Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato.
23 And if in spite of these things you do not accept My discipline, but continue to walk in hostility toward Me,
Soki bitumbu yango ekoki kaka te mpo na kozongisa bino na nzela, nzokande bokobi kaka koboya kotosa Ngai,
24 then I will act with hostility toward you, and I will strike you sevenfold for your sins.
Ngai mpe nakotelemela bino mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
25 And I will bring a sword against you to execute the vengeance of the covenant. Though you withdraw into your cities, I will send a plague among you, and you will be delivered into the hand of the enemy.
Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna.
26 When I cut off your supply of bread, ten women will bake your bread in a single oven and dole out your bread by weight, so that you will eat but not be satisfied.
Tango nakopimela bino bilei, basi zomi bakotumba mapa na fulu moko mpe bakobanda kopesa bino mapa yango na kilo: bokolia kasi bokotonda te.
27 But if in spite of all this you do not obey Me, but continue to walk in hostility toward Me,
Soki, atako bongo, boyoki kaka te mpe bokobi kaka kotelemela Ngai,
28 then I will walk in fury against you, and I, even I, will punish you sevenfold for your sins.
Ngai mpe nakotelemela bino lisusu na kanda makasi mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino.
29 You will eat the flesh of your own sons and daughters.
Bokolia bana na bino ya mibali mpe ya basi.
30 I will destroy your high places, cut down your incense altars, and heap your lifeless bodies on the lifeless remains of your idols; and My soul will despise you.
Nakokweyisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba, nakokweyisa bitumbelo na bino ya malasi, nakotia bibembe na bino likolo ya bibembe ya banzambe na bino ya bikeko mpe nakotombokela bino.
31 I will reduce your cities to rubble and lay waste your sanctuaries, and I will refuse to smell the pleasing aroma of your sacrifices.
Nakokomisa bingumba na bino bisobe, nakobebisa bisika na bino ya bule mpe nakosepela te lisusu na solo kitoko ya malasi na bino.
32 And I will lay waste the land, so that your enemies who dwell in it will be appalled.
Ngai moko nakokotisa mobulu kati na mokili, mpe ezala banguna na bino oyo bakoya kovanda kati na yango bakokamwa.
33 But I will scatter you among the nations and will draw out a sword after you as your land becomes desolate and your cities are laid waste.
Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka.
34 Then the land shall enjoy its Sabbaths all the days it lies desolate, while you are in the land of your enemies. At that time the land will rest and enjoy its Sabbaths.
Boye, mokili na bino ekosepela Saba na yango mibu nyonso oyo ekozanga bato mpe oyo bokokima epai ya banguna na bino; ekozwa bopemi mpe ekosepela Saba na yango.
35 As long as it lies desolate, the land will have the rest it did not receive during the Sabbaths when you lived in it.
Na tango nyonso oyo ekozanga bato, ekozwa bopemi oyo ezalaki na yango na tango ya Saba na bino tango bozalaki kovanda kati na yango.
36 As for those of you who survive, I will send a faintness into their hearts in the lands of their enemies, so that even the sound of a windblown leaf will put them to flight. And they will flee as one flees the sword, and fall when no one pursues them.
Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto: bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.
37 They will stumble over one another as before the sword, though no one is behind them. So you will not be able to stand against your enemies.
Bakokweya moko likolo ya moninga lokola nde bazali kokima mopanga ata soki moto moko te azali kolanda bango. Bokolonga te liboso ya banguna na bino.
38 You will perish among the nations, and the land of your enemies will consume you.
Bokokufa kati na bikolo ya bapaya mpe mokili ya banguna na bino ekolia bino.
39 Those of you who survive in the lands of your enemies will waste away in their iniquity and will decay in the sins of their fathers.
Kati na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino bakokufa kuna mpo na masumu na bango moko mpe mpo na masumu ya batata na bango.
40 But if they will confess their iniquity and that of their fathers in the unfaithfulness that they practiced against Me, by which they have also walked in hostility toward Me—
Nzokande, soki bakotubela masumu na bango mpe masumu ya batata na bango, misala na bango ya mabe mpe botomboki na bango liboso na Ngai,
41 and I acted with hostility toward them and brought them into the land of their enemies—and if their uncircumcised hearts will be humbled and they will make amends for their iniquity,
oyo mpo na yango, Ngai natelemelaki bango mpe namemaki bango na mokili ya banguna na bango, wana mitema na bango oyo ekatama ngenga te ekomikitisa mpe bakozwa lifuti ya mabunga na bango,
42 then I will remember My covenant with Jacob and My covenant with Isaac and My covenant with Abraham, and I will remember the land.
nakokanisa boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na Jakobi, na Izaki mpe na Abrayami; mpe nakokanisa mokili.
43 For the land will be abandoned by them, and it will enjoy its Sabbaths by lying desolate without them. And they will pay the penalty for their iniquity, because they rejected My ordinances and abhorred My statutes.
Boye, wana bakotika mokili mpe wana mokili yango ekosepela Saba na yango, na mikolo nyonso oyo yango ekozala ezanga bato, na tango yango, bakozwa lifuti ya mabe na bango mpo ete batosaki mibeko na Ngai te mpe batombokelaki bikateli na Ngai.
44 Yet in spite of this, when they are in the land of their enemies, I will not reject or despise them so as to destroy them and break My covenant with them; for I am the LORD their God.
Nzokande, ezala tango bakozala kati na mokili ya banguna na bango, nakosundola bango te, nakotombokela bango te kino kobebisa bango mpe kokata boyokani na Ngai elongo na bango; pamba te Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango.
45 But for their sake I will remember the covenant with their fathers, whom I brought out of the land of Egypt in the sight of the nations, that I might be their God. I am the LORD.”
Nakokanisa boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango, oyo Ngai nabimisaki na Ejipito, na miso ya bikolo mosusu, mpo ete nazala Nzambe na bango. Nazali Yawe. › »
46 These are the statutes, ordinances, and laws that the LORD established between Himself and the Israelites through Moses on Mount Sinai.
Oyo nde bikateli, mitindo mpe mibeko oyo Yawe atiaki kati ya Ye mpe bana ya Isalaele, na ngomba Sinai, na nzela ya Moyize.

< Leviticus 26 >