< Leviticus 19 >

1 Then the LORD said to Moses,
Yawe alobaki na Moyize:
2 “Speak to the whole congregation of Israel and tell them: Be holy because I, the LORD your God, am holy.
« Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele: ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule.
3 Each of you must respect his mother and father, and you must keep My Sabbaths. I am the LORD your God.
Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
4 Do not turn to idols or make for yourselves molten gods. I am the LORD your God.
Bomipesa te na banzambe ya bikeko to bomisalela te banzambe ya bikeko ya bibende; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
5 When you sacrifice a peace offering to the LORD, you shall offer it for your acceptance.
Tango bokobonza mbeka ya boyokani epai na Yawe, bosala yango na ndenge esengeli mpo ete endimama mpo na bolamu na bino.
6 It shall be eaten on the day you sacrifice it, or on the next day; but what remains on the third day must be burned up.
Bosengeli kolia yango kaka na mokolo oyo bobonzi yango lokola mbeka to na mokolo oyo elandi. Mpe eloko nyonso oyo ekotikala, bosengeli kozikisa yango na moto na mokolo ya misato.
7 If any of it is eaten on the third day, it is tainted and will not be accepted.
Kasi na mokolo yango ya misato, mbeka yango ekokoma mbindo; soki moto moko alie yango, nakondima yango lisusu te.
8 Whoever eats it will bear his iniquity, for he has profaned what is holy to the LORD. That person must be cut off from his people.
Moto nyonso oyo akolia yango, akomema mokumba ya mabe na ye mpo ete asambwisi eloko oyo ezali bule mpo na Yawe, mpe basengeli kobengana ye kati na bato na ye.
9 When you reap the harvest of your land, you are not to reap to the very edges of your field or gather the gleanings of your harvest.
Tango okobuka mbuma ya bilanga na yo, okobuka yango te kino na mondelo, mpe okozonga te mpo na kolokota mbuma oyo ekokweya.
10 You must not strip your vineyard bare or gather its fallen grapes. Leave them for the poor and the foreigner. I am the LORD your God.
Okobuka mpe te mbuma ya vino oyo ekotikala to kolokota oyo ekokweya. Okotika yango mpo na babola to bapaya: nazali Yawe Nzambe na yo.
11 You must not steal. You must not lie or deceive one another.
Okoyiba te, okoloba lokuta te, moto moko te akosa moninga na ye.
12 You must not swear falsely by My name and so profane the name of your God. I am the LORD.
Okolapa te ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai mpe okobebisa te bosantu ya Kombo ya Nzambe na yo. Nazali Yawe, Nzambe na yo.
13 You must not defraud your neighbor or rob him. You must not withhold until morning the wages due a hired hand.
Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.
14 You must not curse the deaf or place a stumbling block before the blind, but you shall fear your God. I am the LORD.
Okolakela mabe te moto oyo akufa matoyi mpe okotia libaku te liboso ya mokufi miso, kasi okotosa Nzambe na yo. Nazali Yawe.
15 You must not pervert justice; you must not show partiality to the poor or favoritism to the rich; you are to judge your neighbor fairly.
Okosambisa na bosembo. Okokotela te, ezala mobola to mozwi. Okosambisa moninga na yo na bosembo.
16 You must not go about spreading slander among your people. You must not endanger the life of your neighbor. I am the LORD.
Okokende te kotonga bato na yo bipai na bipai. Okosala eloko moko te oyo ekoyeisa pasi na bomoi ya moninga na yo. Nazali Yawe.
17 You must not harbor hatred against your brother in your heart. Directly rebuke your neighbor, so that you will not incur guilt on account of him.
Okoyina ndeko na yo te na motema na yo; kasi pamela moninga mpo ete omema ngambo te na likambo na ye.
18 Do not seek revenge or bear a grudge against any of your people, but love your neighbor as yourself. I am the LORD.
Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe.
19 You are to keep My statutes. You shall not crossbreed two different kinds of livestock; you shall not sow your fields with two kinds of seed; and you shall not wear clothing made of two kinds of material.
Okobatela bikateli na ngai: okosangisa nzoto te ya banyama mibale ya lolenge mibale ekesana; okolona mpe te na elanga na yo nkona mibale ekesana. Okolata te elamba oyo batongi na basinga mibale ekesana.
20 If a man lies carnally with a slave girl promised to another man but who has not been redeemed or given her freedom, there must be due punishment. But they are not to be put to death, because she had not been freed.
Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi oyo azali mobandami ya mobali mosusu, kasi nanu bapeseli ye te biloko ya libala to kopesa ye bonsomi, esengeli mobali wana afuta lomande. Nzokande bango mibale, bakoboma bango te mpo ete mwasi yango asikolamaki nanu te.
21 The man, however, must bring a ram to the entrance to the Tent of Meeting as his guilt offering to the LORD.
Mpe mobali asengeli komema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani meme ya mobali oyo akobonza epai na Yawe lokola mbeka mpo na masumu.
22 The priest shall make atonement on his behalf before the LORD with the ram of the guilt offering for the sin he has committed, and he will be forgiven the sin he has committed.
Bongo na nzela ya meme yango ya mbeka mpo na masumu, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mobali yango liboso ya Yawe, mpe masumu oyo asilaki kosala ekolimbisama.
23 When you enter the land and plant any kind of tree for food, you shall regard the fruit as forbidden. For three years it will be forbidden to you and must not be eaten.
Tango bokokota na mokili ya Kanana, bokolona banzete ya lolenge nyonso oyo ebotaka mbuma. Na mibu misato, bokozwa bambuma na yango nyonso lokola bambuma ya mbindo; boye bokolia yango te.
24 In the fourth year all its fruit must be consecrated as a praise offering to the LORD.
Na mobu ya minei, bokobulisa bambuma na yango nyonso ekozala bule mpo na Yawe lokola litatoli ya kozongisa matondi epai na Ye.
25 But in the fifth year you may eat its fruit; thus your harvest will be increased. I am the LORD your God.
Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
26 You must not eat anything with blood still in it. You must not practice divination or sorcery.
Bokolia te nyama oyo ezali na makila kati na yango. Bokosalela soloka to kindoki te.
27 You must not cut off the hair at the sides of your head or clip off the edges of your beard.
Okokata suki te na bangambo nyonso ya moto na yo, okokata mpe te mandefu na bapembeni na yango.
28 You must not make any cuts in your bodies for the dead or put tattoo marks on yourselves. I am the LORD.
Soki bozwi matanga, bomikata-kata banzoto na bino te to bomikatisa banzoloko te. Nazali Yawe.
29 You must not defile your daughter by making her a prostitute, or the land will be prostituted and filled with depravity.
Bobebisa te lokumu ya bana na bino ya basi na kokomisa bango basi ya ndumba, noki te mboka mobimba ekomipesa na kindumba mpe ekotonda na mabe.
30 You must keep My Sabbaths and have reverence for My sanctuary. I am the LORD.
Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe.
31 You must not turn to mediums or spiritists; do not seek them out, or you will be defiled by them. I am the LORD your God.
Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino.
32 You are to rise in the presence of the elderly, honor the aged, and fear your God. I am the LORD.
Bokotelema liboso ya bato oyo banuni, bokolakisa botosi na bino epai ya mibange; na nzela wana, bokokumisa Nzambe na bino. Nazali Yawe.
33 When a foreigner resides with you in your land, you must not oppress him.
Soki mopaya moko ayei kovanda kati na bino, na mokili na bino, bonyokola ye te.
34 You must treat the foreigner living among you as native-born and love him as yourself, for you were foreigners in the land of Egypt. I am the LORD your God.
Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino.
35 You must not use dishonest measures of length, weight, or volume.
Bokosalela lokuta te tango bokomeka molayi, bakilo mpe tango bokoluka koyeba ebele oyo ekoki kozala na kati.
36 You shall maintain honest scales and weights, an honest ephah, and an honest hin. I am the LORD your God, who brought you out of the land of Egypt.
Bokosalela bimekelo ya malamu, bakilo ya malamu, efa ya malamu; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito.
37 You must keep all My statutes and all My ordinances and follow them. I am the LORD.”
Bokobatela bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso mpe bokosalela yango. Nazali Yawe. › »

< Leviticus 19 >