< Judges 9 >

1 Now Abimelech son of Jerubbaal went to his mother’s brothers at Shechem and said to them and to all the clan of his mother,
Abimeleki, mwana mobali ya Yerubali, akendeki na Sishemi epai ya banoko na ye mpe na ndako mobimba ya tata ya mama na ye. Alobaki:
2 “Please ask all the leaders of Shechem, ‘Is it better for you that seventy men, all the sons of Jerubbaal, rule over you, or just one man?’ Remember that I am your own flesh and blood.”
« Botuna nanu motuna oyo epai ya bakambi nyonso ya engumba Sishemi: ‹ Eloko nini eleki malamu mpo na bino? Bakamba bino na bana mibali tuku sambo ya Yerubali to na mwana mobali moko? › Boyeba ete ngai mpe bino tozali makila moko mpe nzoto moko. »
3 And when his mother’s brothers spoke all these words about him in the presence of all the leaders of Shechem, their hearts were inclined to follow Abimelech, for they said, “He is our brother.”
Tango banoko na ye balobaki maloba nyonso ya Abimeleki epai ya bakambi nyonso ya Sishemi, mitema na bango nyonso ekendeki epai ya Abimeleki, pamba te balobaki ete azali ndeko na bango ya mobali.
4 So they gave him seventy shekels of silver from the temple of Baal-berith, with which Abimelech hired some worthless and reckless men to follow him.
Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye.
5 He went to his father’s house in Ophrah, and on one stone murdered his seventy brothers, the sons of Jerubbaal. But Jotham, the youngest son of Jerubbaal, survived, because he hid himself.
Akendeki na Ofira, na ndako ya tata na ye, mpe abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo, bana ya Yerubali na likolo ya libanga moko ya monene. Kasi Yotami, mwana mobali ya suka ya Yerubali, abikaki mpo ete amibombaki.
6 Then all the leaders of Shechem and Beth-millo gathered beside the oak at the pillar in Shechem and proceeded to make Abimelech their king.
Bakambi nyonso ya Sishemi mpe ndako nyonso ya Milo basanganaki mpo na kokende kokomisa Abimeleki mokonzi, pembeni ya terebente, na likonzi ya mabanga kati na Sishemi.
7 When this was reported to Jotham, he climbed to the top of Mount Gerizim, raised his voice, and cried out: “Listen to me, O leaders of Shechem, and may God listen to you.
Tango bayebisaki makambo yango epai ya Yotami, amataki likolo ya ngomba Garizimi mpe agangaki makasi: « Bino bakambi ya Sishemi, boyoka ngai, mpo ete Nzambe ayoka bino.
8 One day the trees set out to anoint a king for themselves. They said to the olive tree, ‘Reign over us.’
Mokolo moko, banzete ebimaki mpo na kokomisa moko kati na yango mokonzi. Elobaki na nzete ya Olive: ‹ Zala mokonzi na biso. ›
9 But the olive tree replied, ‘Should I stop giving my oil that honors both God and man, to hold sway over the trees?’
Nzete ya Olive ezongiselaki yango: ‹ Natika penza mafuta na ngai, oyo bapesaka na yango Nzambe mpe bato lokumu, mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu? ›
10 Then the trees said to the fig tree, ‘Come and reign over us.’
Banzete elobaki na nzete ya figi: ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
11 But the fig tree replied, ‘Should I stop giving my sweetness and my good fruit, to hold sway over the trees?’
Nzete ya figi ezongiselaki yango: ‹ Natika penza elengi na ngai mpe mbuma na ngai ya kitoko mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu? ›
12 Then the trees said to the grapevine, ‘Come and reign over us.’
Banzete elobaki na nzete ya vino: ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
13 But the grapevine replied, ‘Should I stop giving my wine that cheers both God and man, to hold sway over the trees?’
Kasi nzete ya vino ezongiselaki yango: ‹ Natika penza vino na ngai, oyo esepelisaka banzambe mpe bato mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu? ›
14 Finally all the trees said to the thornbush, ‘Come and reign over us.’
Sima, banzete nyonso elobaki na nzete ya nzube: ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. ›
15 But the thornbush replied, ‘If you really are anointing me as king over you, come and find refuge in my shade. But if not, may fire come out of the thornbush and consume the cedars of Lebanon.’
Nzete ya nzube ezongiselaki yango: ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani! ›
16 Now if you have acted faithfully and honestly in making Abimelech king, if you have done well by Jerubbaal and his family, and if you have done to him as he deserves—
Soki penza bosaleli na bosembo mpe na bosolo, wana bokomisi Abimeleki mokonzi; soki bozalaki na motema malamu liboso ya Yerubali mpe libota na ye, soki bosalelaki ye kolanda misala malamu oyo ye asalelaki bino,
17 for my father fought for you and risked his life to deliver you from the hand of Midian,
bobosana te ete tata na ngai abundelaki bino, andimaki ata kokufa mpo na kokangola bino wuta na loboko ya Madiani.
18 but you have risen up against my father’s house this day and killed his seventy sons on a single stone, and you have made Abimelech, the son of his maidservant, king over the leaders of Shechem because he is your brother—
Kasi na mokolo ya lelo, botombokeli libota ya tata na ngai, bobomi bana na ye ya mibali tuku sambo, na libanga moko, mpe botie Abimeleki, mwana mobali ya mwasi mowumbu na ye, mokonzi ya bato ya Sishemi, pamba te azali ndeko na bino ya mobali.
19 if you have acted faithfully and honestly toward Jerubbaal and his house this day, then may you rejoice in Abimelech, and he in you.
Soki bosaleli na bosembo mpe bosolo liboso ya Yerubali mpe libota na ye, na mokolo ya lelo, tika ete Abimeleki asepela na bino, mpe bino bosepela na ye!
20 But if not, may fire come from Abimelech and consume the leaders of Shechem and Beth-millo, and may fire come from the leaders of Shechem and Beth-millo and consume Abimelech.”
Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki! »
21 Then Jotham ran away, escaping to Beer, and he lived there for fear of his brother Abimelech.
Yotami abimaki, akendeki na Beri mpe avandaki kuna, pamba te azalaki kobanga Abimeleki, ndeko na ye ya mobali.
22 After Abimelech had reigned over Israel for three years,
Sima, Abimeleki akambaki Isalaele mibu misato.
23 God sent a spirit of animosity between Abimelech and the leaders of Shechem and caused them to treat Abimelech deceitfully,
Nzambe atindaki molimo mabe kati na Abimeleki mpe bavandi ya Sishemi, mpe bavandi ya Sishemi basalelaki Abimeleki likita.
24 in order that the crime against the seventy sons of Jerubbaal might come to justice and their blood be avenged on their brother Abimelech and on the leaders of Shechem, who had helped him murder his brothers.
Nzambe asalaki bongo mpo na kozongisa mabe na mabe na oyo basalaki tango babomaki bana mibali tuku sambo ya Yerubali, mpo ete makila na bango etangama na moto ya ndeko na bango ya mobali, Abimeleki, mpe na mito ya bato ya Sishemi oyo basungaki ye mpo na koboma bandeko na ye ya mibali.
25 The leaders of Shechem set up an ambush against Abimelech on the hilltops, and they robbed all who passed by them on the road. So this was reported to Abimelech.
Bavandi ya Sishemi batielaki Abimeleki motambo na likolo ya bangomba: batiaki bato na esika ya kobombama mpo na kobotola biloko epai ya baleki nzela nyonso oyo bazalaki koleka pene na bango. Mpe bamemelaki Abimeleki sango yango.
26 Meanwhile, Gaal son of Ebed came with his brothers and crossed into Shechem, and the leaders of Shechem put their confidence in him.
Nzokande Gali, mwana mobali ya Ebedi, akendeki na Sishemi, elongo na bandeko na ye ya mibali; mpe bato ya Sishemi batielaki ye motema.
27 And after they had gone out into the fields, gathered grapes from their vineyards, and trodden them, they held a festival and went into the house of their god; and as they ate and drank, they cursed Abimelech.
Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe.
28 Then Gaal son of Ebed said, “Who is Abimelech, and who is Shechem, that we should serve him? Is he not the son of Jerubbaal, and is not Zebul his officer? You are to serve the men of Hamor, the father of Shechem. Why should we serve Abimelech?
Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki: « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te? Zebuli azali molobeli na ye te? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki?
29 If only this people were under my authority, I would remove Abimelech; I would say to him, ‘Muster your army and come out!’”
Oh soki kaka nazalaki kokamba bato oyo, mbele nalingaki kobengana Abimeleki, mpe nalingaki koloba na ye: ‹ Bakisa lisusu makasi ya mampinga na yo, mpe yaka tobunda. › »
30 When Zebul the governor of the city heard the words of Gaal son of Ebed, he burned with anger.
Tango Zebuli, moyangeli ya engumba, ayokaki makambo oyo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki, asilikaki makasi.
31 So he covertly sent messengers to Abimelech to say, “Look, Gaal son of Ebed and his brothers have come to Shechem and are stirring up the city against you.
Atindaki bantoma na nkuku epai ya Abimeleki mpo na koloba na ye: « Gali, mwana mobali ya Ebedi, mpe bandeko na ye ya mibali bayaki na Sishemi, mpe bazali kotindika bato ya engumba mpo ete batombokela yo.
32 Now then, tonight you and the people with you are to come and lie in wait in the fields.
Sik’oyo telema, na butu, yo elongo na bato na yo; bokende kovanda kati na elanga, na esika ya kobombama.
33 And in the morning at sunrise, get up and advance against the city. When Gaal and his men come out against you, do to them whatever you are able.”
Bongo, na tongo-tongo, wana moyi ezali kobima, okokende mpe okobundisa engumba. Tango Gali elongo na bato na ye nyonso bakobima mpo na kokutana na yo, sala nyonso oyo loboko na yo ekoki kosala. »
34 So Abimelech and all his troops set out by night and lay in wait against Shechem in four companies.
Na butu, Abimeleki elongo na mampinga na ye nyonso batelemaki, bakabwanaki na biteni minei mpe bakendeki kovanda kati na esika ya kobombama, pene ya Sishemi.
35 Now Gaal son of Ebed went out and stood at the entrance of the city gate just as Abimelech and his men came out from their hiding places.
Tango Gali, mwana mobali ya Ebedi, abimaki mpe atelemaki na ekuke ya engumba, Abimeleki elongo na basoda na ye babimaki na esika oyo babombamaki.
36 When Gaal saw the people, he said to Zebul, “Look, people are coming down from the mountains!” But Zebul replied, “The shadows of the mountains look like men to you.”
Tango Gali amonaki bato, alobaki na Zebuli: — Tala, bato bazali kokita wuta na likolo na bangomba. Kasi Zebuli alobaki na ye: — Oyo ozali komona lokola bato, ezali nde bililingi ya bangomba.
37 Then Gaal spoke up again, “Look, people are coming down from the center of the land, and one company is coming by way of the Diviners’ Oak.”
Kasi Gali alobaki lisusu: — Tala, bato bazali kokita elongo na basoda wuta na likolo ya ngomba ya kati-kati ya engumba, mpe bamosusu bazali koya na nzela ya terebente ya bamoni makambo.
38 “Where is your gloating now?” Zebul replied. “You said, ‘Who is Abimelech that we should serve him?’ Are these not the people you ridiculed? Go out now and fight them!”
Zebuli alobaki na Gali: — Sik’oyo, tia lisusu monoko! Mpe loba lisusu: « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye? » Ezali te bato oyo yo otiolaki? Kende sik’oyo kobunda!
39 So Gaal went out before the leaders of Shechem and fought against Abimelech,
Boye, Gali amemaki bavandi ya Sishemi mpe abundisaki Abimeleki.
40 but Abimelech pursued him, and Gaal fled before him. And many Shechemites fell wounded all the way to the entrance of the gate.
Abimeleki alandaki Gali, mpe Gali akimaki liboso ya Abimeleki, mpe bato ebele penza bakufaki kino na ekotelo ya ekuke.
41 Abimelech stayed in Arumah, and Zebul drove Gaal and his brothers out of Shechem.
Abimeleki avandaki na Aruma, mpe Zebuli abenganaki Gali elongo na bandeko na ye ya mibali mpo ete bavanda lisusu te na Sishemi.
42 The next day the people of Shechem went out into the fields, and this was reported to Abimelech.
Mokolo oyo elandaki, bato ya Sishemi babimaki mpe bakendeki na bilanga. Bato bamemaki sango epai ya Abimeleki.
43 So he took his men, divided them into three companies, and lay in wait in the fields. When he saw the people coming out of the city, he rose up against them and attacked them.
Abimeleki azwaki bato na ye mpe akabolaki bango na biteni misato ya basoda, mpe atiaki bango kati na bilanga, na esika ya kobombama. Tango amonaki bato kobima longwa na engumba, atelemaki mpo na kobundisa bango.
44 Then Abimelech and the companies with him rushed forward and took their stand at the entrance of the city gate. The other two companies rushed against all who were in the fields and struck them down.
Nzokande, tango Abimeleki mpe masanga ya mampinga oyo bazalaki elongo na ye bakendeki na lombangu mpe batelemaki na ekuke ya engumba, masanga mibale mosusu ya mampinga balandaki bato kino na bilanga mpe babomaki bango nyonso.
45 And all that day Abimelech fought against the city until he had captured it and killed its people. Then he demolished the city and sowed it with salt.
Abimeleki abundisaki engumba mokolo mobimba, abotolaki engumba yango mpe abomaki bato oyo bazalaki kuna. Bongo abebisaki engumba mpe asopelaki yango mungwa.
46 On hearing of this, all the leaders in the tower of Shechem entered the inner chamber of the temple of El-berith.
Tango bavandi nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bayokaki makambo yango, bakendeki kobombama kati na libulu ya mabanga ya tempelo ya Beriti, nzambe na bango.
47 And when Abimelech was told that all the leaders in the tower of Shechem were gathered there,
Bamemelaki Abimeleki sango ete bavandi ya ndako molayi ya Sishemi basangani wana.
48 he and all his men went up to Mount Zalmon. Abimelech took his axe in his hand and cut a branch from the trees, which he lifted to his shoulder, saying to his men, “Hurry and do what you have seen me do.”
Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye: « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. »
49 So each man also cut his own branch and followed Abimelech. Then they piled the branches against the inner chamber and set it on fire above them, killing everyone in the tower of Shechem, about a thousand men and women.
Boye bato nyonso bakataki, moto na moto etape na ye ya nzete. Balandaki Abimeleki, batiaki bitape ya nzete na libulu ya mabanga mpe batumbaki libulu yango ya mabanga elongo na bato nyonso oyo bazalaki kati na yango. Boye bato nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bakufaki: bato pene nkoto moko, mibali mpe basi.
50 Then Abimelech went to Thebez, encamped against it, and captured it.
Sima na yango, Abimeleki akendeki na Tebesi, azingelaki mpe abotolaki yango.
51 But there was a strong tower inside the city, and all the men, women, and leaders of the city fled there. They locked themselves in and went up to the roof of the tower.
Nzokande, ezalaki na ndako moko ya molayi mpe ya makasi kati na engumba. Bavandi nyonso, mibali mpe basi, bakimelaki kuna; bakangaki ekuke sima na bango mpe bamataki na likolo ya ndako yango.
52 When Abimelech came to attack the tower, he approached its entrance to set it on fire.
Abimeleki ayaki kino na ndako molayi mpo na kobundisa yango, mpe apusanaki kino na ekuke ya ndako yango mpo na kotumba yango.
53 But a woman dropped an upper millstone on Abimelech’s head, crushing his skull.
Na tango yango, mwasi moko abwakaki libanga oyo banikelaka ble na moto ya Abimeleki mpe epanzaki ye moto.
54 He quickly called his armor-bearer, saying, “Draw your sword and kill me, lest they say of me, ‘A woman killed him.’” So Abimelech’s armor-bearer ran his sword through him, and he died.
Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye: « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai: ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki.
55 And when the Israelites saw that Abimelech was dead, they all went home.
Tango bana ya Isalaele bamonaki ete Abimeleki akufi, bazongaki moto na moto epai na ye.
56 In this way God repaid the wickedness that Abimelech had done to his father in murdering his seventy brothers.
Boye, Nzambe azongiselaki Abimeleki mabe oyo asalaki tata na ye tango abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo.
57 And God also brought all the wickedness of the men of Shechem back upon their own heads. So the curse of Jotham son of Jerubbaal came upon them.
Nzambe azongiselaki bato ya Sishemi mabe nyonso oyo basalaki. Ezali ndenge wana nde elakeli mabe oyo Yotami, mwana mobali ya Yerubali, asakolaki ekokisamaki.

< Judges 9 >