< Joshua 5 >

1 Now when all the Amorite kings west of the Jordan and all the Canaanite kings along the coast heard how the LORD had dried up the waters of the Jordan before the Israelites until they had crossed over, their hearts melted and their spirits failed for fear of the Israelites.
Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.
2 At that time the LORD said to Joshua, “Make flint knives and circumcise the sons of Israel once again.”
Na tango wana, Yawe alobaki na Jozue: — Sala bambeli ya mabanga mpe kata lisusu bana mibali ya Isalaele ngenga.
3 So Joshua made flint knives and circumcised the sons of Israel at Gibeath-haaraloth.
Jozue asalaki bambeli ya mabanga mpe akataki bana mibali ya Isalaele ngenga, pene ya ngomba moke ya Araloti.
4 Now this is why Joshua circumcised them: All those who came out of Egypt—all the men of war—had died on the journey in the wilderness after they had left Egypt.
Tala mpo na nini Jozue asengelaki kokata bango ngenga: Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito mpe bakokisaki mibu ya kobunda bitumba bakufaki na nzela, kati na esobe, sima na bango kobima na Ejipito.
5 Though all who had come out were circumcised, none of those born in the wilderness on the journey from Egypt had been circumcised.
Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito bakatamaki ngenga; kasi bato nyonso oyo babotamaki na nzela, kati na esobe, bakatamaki ngenga te.
6 For the Israelites had wandered in the wilderness forty years, until all the nation’s men of war who had come out of Egypt had died, since they did not obey the LORD. So the LORD vowed never to let them see the land He had sworn to their fathers to give us, a land flowing with milk and honey.
Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi.
7 And Joshua raised up their sons in their place, and these were the ones he circumcised. Until this time they were still uncircumcised, since they had not been circumcised along the way.
Boye, atombolaki bana na esika ya batata na bango; yango wana Jozue akataki bango ngenga, pamba te bakatamaki ngenga te na nzela.
8 And after all the nation had been circumcised, they stayed there in the camp until they were healed.
Sima na ekolo mobimba kokatama ngenga, batikalaki esika moko kati na molako kino tango bapota na bango ekawukaki.
9 Then the LORD said to Joshua, “Today I have rolled away the reproach of Egypt from you.” So that place has been called Gilgal to this day.
Yawe alobaki na Jozue: — Lelo, natindiki soni ya Ejipito mosika na bino. Babengaki esika yango « Giligali » kino na mokolo ya lelo.
10 On the evening of the fourteenth day of the month, while the Israelites were camped at Gilgal on the plains of Jericho, they kept the Passover.
Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko.
11 The day after the Passover, on that very day, they ate unleavened bread and roasted grain from the produce of the land.
Mokolo oyo elandaki feti ya Pasika, baliaki biloko ya mokili ya Kanana: mapa ezanga levire mpe bambuma ya ble oyo bakalingaki kaka mokolo wana.
12 And the day after they had eaten from the produce of the land, the manna ceased. There was no more manna for the Israelites, so that year they began to eat the crops of the land of Canaan.
Mokolo oyo elandaki mokolo oyo baliaki biloko ya mokili ya Kanana, mana etikaki kokweya; mana ezalaki lisusu te mpo na bana ya Isalaele. Boye, na mobu wana, baliaki biloko ya mokili ya Kanana.
13 Now when Joshua was near Jericho, he looked up and saw a man standing in front of him with a drawn sword in His hand. Joshua approached Him and asked, “Are You for us or for our enemies?”
Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye: — Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso?
14 “Neither,” He replied. “I have now come as Commander of the LORD’s army.” Then Joshua fell facedown in reverence and asked Him, “What does my Lord have to say to His servant?”
Azongiselaki Jozue: — Te, kasi nazali mokonzi ya mampinga ya Yawe; nayei kaka sik’oyo. Boye, Jozue akweyaki elongi kino na mabele mpe alobaki na ye: — Sango nini nkolo na ngai azali na yango mpo na mosali na ye?
15 The Commander of the LORD’s army replied, “Take off your sandals, for the place where you are standing is holy.” And Joshua did so.
Mokonzi ya mampinga ya Yawe alobaki na ye: — Longola basapato na yo na makolo, pamba te esika oyo ozali ezali bule. Jozue asalaki se bongo.

< Joshua 5 >