< Joshua 21 >

1 Now the family heads of the Levites approached Eleazar the priest, Joshua son of Nun, and the heads of the other tribes of Israel
Bakonzi ya mabota ya bakitani ya Levi bayaki epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakonzi ya bituka ya mabota mosusu ya Isalaele,
2 at Shiloh in the land of Canaan and said to them, “The LORD commanded through Moses that we be given cities in which to live, together with pasturelands for our livestock.”
na Silo, kati na mokili ya Kanana, mpo na koloba na bango: « Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize ete bopesa biso bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele na biso. »
3 So by the command of the LORD, the Israelites gave the Levites these cities and their pasturelands out of their own inheritance:
Boye, kolanda mitindo ya Yawe, bana ya Isalaele balongolaki kati na libula na bango ndambo ya bingumba elongo na mabele na yango, mpe bapesaki yango epai ya bakitani ya Levi.
4 The first lot came out for the Kohathite clans. The Levites who were descendants of Aaron the priest received thirteen cities by lot from the tribes of Judah, Simeon, and Benjamin.
Zeke ya liboso ekweyaki epai ya etuka ya Keati. Bato ya Levi oyo bazalaki bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na libota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame.
5 The remaining descendants of Kohath received ten cities by lot from the tribes of Ephraim, Dan, and the half-tribe of Manasseh.
Bakitani ya Keati oyo batikalaki bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi kati na mabele ya libota ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
6 The descendants of Gershon received thirteen cities by lot from the tribes of Issachar, Asher, Naphtali, and the half-tribe of Manasseh in Bashan.
Bakitani ya Gerishoni bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na mabele ya libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe ya ndambo ya libota ya Manase, kati na Bashani.
7 And the descendants of Merari received twelve cities from the tribes of Reuben, Gad, and Zebulun.
Bakitani ya Merari, kolanda bituka na bango, bazwaki bingumba zomi na mibale kati na mabele ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Zabuloni.
8 So the Israelites allotted to the Levites these cities, together with their pasturelands, as the LORD had commanded through Moses.
Boye, ndenge Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize, bana ya Isalaele babetaki zeke mpo na kopesa bingumba wana elongo na mabele na yango epai ya bakitani ya Levi.
9 From the tribes of Judah and Simeon, they designated these cities by name
Kati na mabota ya Yuda mpe ya Simeoni, babetaki zeke mpo na kopesa bingumba oyo, kolanda bakombo na yango,
10 to the descendants of Aaron from the Kohathite clans of the Levites, because the first lot fell to them:
epai ya bakitani ya Aron, oyo babimelaki na bituka ya Keati kati na bana mibali ya Levi, pamba te zeke ya liboso ekweyaki epai na bango:
11 They gave them Kiriath-arba (that is, Hebron), with its surrounding pasturelands, in the hill country of Judah. (Arba was the father of Anak.)
Bapesaki bango Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, elongo na mabele na yango, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. (Ariba azalaki koko ya Anaki);
12 But they had given the fields and villages around the city to Caleb son of Jephunneh as his possession.
kasi bapesaki bilanga ya engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, lokola libula epai ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune.
13 So to the descendants of Aaron the priest they gave these cities, together with their pasturelands: Hebron, a city of refuge for the manslayer, Libnah,
Epai ya bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, bapesaki Ebron lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Libina,
14 Jattir, Eshtemoa,
Yatiri, Eshitemoa,
15 Holon, Debir,
Oloni, Debiri,
16 Ain, Juttah, and Beth-shemesh—nine cities from these two tribes, together with their pasturelands.
Ayini, Yuta mpe Beti-Shemeshi, elongo na mabele na yango. Bazwaki bingumba libwa kati na bituka ya mabota oyo mibale: Yuda mpe Simeoni.
17 And from the tribe of Benjamin they gave them Gibeon, Geba,
Kati na libota ya Benjame, bapesaki bango bingumba oyo: Gabaoni, Geba,
18 Anathoth, and Almon—four cities, together with their pasturelands.
Anatoti, Alimoni, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
19 In all, thirteen cities, together with their pasturelands, were given to the priests, the descendants of Aaron.
Bingumba nyonso ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango.
20 The remaining Kohathite clans of the Levites were allotted these cities: From the tribe of Ephraim
Babetaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani mosusu ya Levi, oyo bazali ya bituka ya Keati, moko kati na bana mibali ya Levi, bingumba oyo, kati na mabele ya libota ya Efrayimi.
21 they were given Shechem in the hill country of Ephraim (a city of refuge for the manslayer), Gezer,
Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, bapesaki bango: Sishemi lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Gezeri,
22 Kibzaim, and Beth-horon—four cities, together with their pasturelands.
Kibitsayimi mpe Beti-Oroni, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
23 From the tribe of Dan they were given Elteke, Gibbethon,
Kati na libota ya Dani, bapesaki bango bingumba oyo: Eliteke, Gibetoni,
24 Aijalon, and Gath-rimmon—four cities, together with their pasturelands.
Ayaloni, Gati-Rimoni, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
25 And from the half-tribe of Manasseh they were given Taanach and Gath-rimmon—two cities, together with their pasturelands.
Kati na ndambo ya libota ya Manase, bapesaki bango bingumba oyo: Taanaki, Gati-Rimoni elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba mibale.
26 In all, ten cities, together with their pasturelands, were given to the rest of the Kohathite clans.
Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bituka mosusu ya bakitani ya Keati ezalaki zomi, elongo na mabele na yango.
27 This is what the Levite clans of the Gershonites were given: From the half-tribe of Manasseh they were given Golan in Bashan, a city of refuge for the manslayer, and Beeshterah—two cities, together with their pasturelands.
Epai ya bakitani ya Gerishoni kati na bituka ya bakitani ya Levi, bapesaki bingumba oyo: Kati na ndambo ya libota ya Manase: kati na Bashani, Golani lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, mpe Beyeshitira, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba mibale.
28 From the tribe of Issachar they were given Kishion, Daberath,
Kati na libota ya Isakari: Kishioni, Dabirati,
29 Jarmuth, and En-gannim—four cities, together with their pasturelands.
Yarimuti, Eyini-Ganimi, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
30 From the tribe of Asher they were given Mishal, Abdon,
Kati na libota ya Aseri: Misheali, Abidoni,
31 Helkath, and Rehob—four cities, together with their pasturelands.
Elikati, Reobi, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
32 And from the tribe of Naphtali they were given Kedesh in Galilee (a city of refuge for the manslayer), Hammoth-dor, and Kartan—three cities, together with their pasturelands.
Kati na libota ya Nefitali: Kedeshi, kati na mokili ya Galile, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi; Amoti-Dori mpe Karitani, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba misato.
33 In all, thirteen cities, together with their pasturelands, were given to the Gershonite clans.
Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bakitani ya Gerishoni, kolanda bituka na bango, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango.
34 This is what the Merarite clan (the rest of the Levites) were given: From the tribe of Zebulun they were given Jokneam, Kartah,
Epai ya bituka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, bapesaki bingumba oyo: Kati na libota ya Zabuloni: Yokineami, Karita,
35 Dimnah, and Nahalal—four cities, together with their pasturelands.
Dimina mpe Naalali, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
36 From the tribe of Reuben they were given Bezer, Jahaz,
Kati na libota ya Ribeni: Betseri lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Yakatsi,
37 Kedemoth, and Mephaath—four cities, together with their pasturelands.
Kedemoti mpe Mefati, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
38 And from the tribe of Gad they were given Ramoth in Gilead, a city of refuge for the manslayer, Mahanaim,
Kati na libota ya Gadi: Ramoti, kati na Galadi, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Maanayimi,
39 Heshbon, and Jazer—four cities in all, together with their pasturelands.
Eshiboni mpe Yaezeri, elongo na mabele na yango; ezalaki bongo bingumba minei.
40 In all, twelve cities were allotted to the clans of Merari, the remaining Levite clans.
Bingumba nyonso oyo babetelaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani ya etuka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, ezalaki zomi na mibale.
41 For the Levites, then, there were forty-eight cities in all, together with their pasturelands, within the territory of the Israelites.
Bingumba nyonso ya bakitani ya Levi kati na mabele oyo epesamelaki bana ya Isalaele ezalaki tuku minei na mwambe, elongo na mabele na yango.
42 Each of these cities had its own surrounding pasturelands; this was true for all the cities.
Engumba moko na moko ezingelamaki na mabele na yango; ezalaki penza bongo mpo na bingumba yango nyonso.
43 Thus the LORD gave Israel all the land He had sworn to give their fathers, and they took possession of it and settled in it.
Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna.
44 And the LORD gave them rest on every side, just as He had sworn to their fathers. None of their enemies could stand against them, for the LORD delivered all their enemies into their hand.
Yawe apesaki bango kimia na bangambo nyonso, kolanda nyonso oyo alakaki batata na bango na nzela ya ndayi. Monguna moko te kati na banguna na bango alongaki lisusu kotelemela bango. Yawe akabaki banguna na bango nyonso na maboko na bango.
45 Not one of all the LORD’s good promises to the house of Israel had failed; everything was fulfilled.
Kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe apesaki na libota ya Isalaele, moko te etikalaki kokweya; solo, nyonso ekokisamaki.

< Joshua 21 >