< Job 19 >

1 Then Job answered:
Yobo azongisaki:
2 “How long will you torment me and crush me with your words?
« Kino tango nini bokotungisa ngai mpe kolembisa ngai na maloba na bino?
3 Ten times now you have reproached me; you shamelessly mistreat me.
Tala, botioli ngai mbala zomi, mpe bozali kobundisa ngai na soni te.
4 Even if I have truly gone astray, my error concerns me alone.
Soki ezali penza ya solo ete nabungi nzela, mbeba na ngai etali kaka ngai moko.
5 If indeed you would exalt yourselves above me and use my disgrace against me,
Soki mpe bolingi komimona likolo na ngai mpe kosalela pasi na ngai mpo na kotiola ngai,
6 then understand that it is God who has wronged me and drawn His net around me.
wana boyeba ete Nzambe nde asali ngai mabe mpe azingeli ngai na monyama na Ye.
7 Though I cry out, ‘Violence!’ I get no response; though I call for help, there is no justice.
Atako nagangi ete basali ngai mabe, nazali kozwa ata eyano moko te; ata soki nabeleli ete basunga ngai, moto oyo akokata likambo azali te.
8 He has blocked my way so I cannot pass; He has veiled my paths with darkness.
Akangi nzela na ngai mpo ete nakoka koleka te, atondisi nzela na ngai nyonso na molili,
9 He has stripped me of my honor and removed the crown from my head.
alongoli ngai lokumu, mpe alongoli motole na moto na ngai,
10 He tears me down on every side until I am gone; He uproots my hope like a tree.
asasi-sasi ngai na bangambo nyonso kino nakomi pene ya kokufa, apikoli elikya na ngai ndenge bapikolaka nzete;
11 His anger burns against me, and He counts me among His enemies.
kanda na Ye ezali kotumba ngai, mpe azali kotanga ngai na molongo ya banguna na Ye;
12 His troops advance together; they construct a ramp against me and encamp around my tent.
mampinga na Ye ezali kopusana na makasi penza, ezingeli ngai mpe ndako na ngai mpo na kosala ngai mabe.
13 He has removed my brothers from me; my acquaintances have abandoned me.
Akaboli ngai na bandeko na ngai, bongo bato oyo bayebi ngai bapesi ngai mokongo,
14 My kinsmen have failed me, and my friends have forgotten me.
balingami na ngai balimwe, mpe baninga na ngai babosani ngai;
15 My guests and maidservants count me as a stranger; I am a foreigner in their sight.
bato oyo nayambaki na ndako na ngai mpe basali na ngai ya basi, bango nyonso bakomi kotala ngai lokola mopaya, bakomi komona ngai lokola moto oyo batikala koyeba te.
16 I call for my servant, but he does not answer, though I implore him with my own mouth.
Nazali kobenga mosali na ngai, kasi azali ata koyanola ngai te, atako monoko na ngai moko nde ezali kobondela ye.
17 My breath is repulsive to my wife, and I am loathsome to my own family.
Solo ya monoko na ngai ekomi kokimisa ata mwasi na ngai, bongo bandeko na ngai moko penza bayini ngai.
18 Even little boys scorn me; when I appear, they deride me.
Ata bilenge mibali ya mike bakomi koseka ngai; soki kaka nabimi, bakomi kosambwisa ngai.
19 All my best friends despise me, and those I love have turned against me.
Balingami na ngai nyonso ya motema bayini ngai, bato oyo nazalaki kolinga babalukeli ngai;
20 My skin and flesh cling to my bones; I have escaped by the skin of my teeth.
nakomi eloko pamba, natikali kaka poso ya nzoto mpe mikuwa, nazali kobika kaka na misuni ya minu na ngai.
21 Have pity on me, my friends, have pity, for the hand of God has struck me.
Balingami na ngai, boyokela ngai mawa, nabondeli bino penza, boyokela ngai mawa, pamba te loboko ya Nzambe ebeti ngai.
22 Why do you persecute me as God does? Will you never get enough of my flesh?
Mpo na nini bozali kolandela ngai boye, ndenge kaka Nzambe azali kolandela ngai? Botondi mosuni na ngai te?
23 I wish that my words were recorded and inscribed in a book,
Ah, soki ata maloba na ngai ekomamaki, soki ekomamaki na buku!
24 by an iron stylus on lead, or chiseled in stone forever.
Elingaki kokomama na ekomeli ya ebende, ya ebende oyo ya songe penza, mpo na kotobola makomi yango na mabanga mpo ete etikala wana mpo na libela.
25 But I know that my Redeemer lives, and in the end He will stand upon the earth.
Ngai, nayebi na ngai malamu ete Mosikoli na ngai azali na bomoi, mpe, awa na mokili, akotelema ya suka mpo na kokata likambo na ngai.
26 Even after my skin has been destroyed, yet in my flesh I will see God.
Sima na kobebisama ya poso ya nzoto na ngai, ngai, na nzoto na ngai, nakomona Nzambe.
27 I will see Him for myself; my eyes will behold Him, and not as a stranger. How my heart yearns within me!
Solo, nakomona Ye, miso na ngai moko ekomona Ye, ngai moko penza, moto mosusu te.
28 If you say, ‘Let us persecute him, since the root of the matter lies with him,’
Bino oyo bozali koloba: ‹ Tokolanda ye ndenge nini? › Mpe bino bato oyo bomoni mabe kati na ngai,
29 then you should fear the sword yourselves, because wrath brings punishment by the sword, so that you may know there is a judgment.”
bolenga bino moko liboso ya mopanga, pamba te mopanga ezali esalelo ya kanda mpo na masumu, mpe bokoyeba ete kosambisama ezali. »

< Job 19 >