< Jeremiah 14 >

1 This is the word of the LORD that came to Jeremiah concerning the drought:
Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi na tina na bokawuki:
2 “Judah mourns and her gates languish. Her people wail for the land, and a cry goes up from Jerusalem.
« Bato ya Yuda bazali na matanga, bingumba na bango esili kobebisama, bazali kolela mpo na mokili na bango, mpe koganga ezali koyokana wuta na Yelusalemi.
3 The nobles send their servants for water; they go to the cisterns, but find no water; their jars return empty. They are ashamed and humiliated; they cover their heads.
Bakambi bazali kotinda basali na bango mpo ete bakende kotoka mayi; kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te, bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba, bazipi bilongi na soni mpe na mawa.
4 The ground is cracked because no rain has fallen on the land. The farmers are ashamed; they cover their heads.
Mabele esili kokawuka, pamba te mvula ezali konoka lisusu te, basali bilanga bakomi na pasi mpe bazipi bilongi na bango mpo na soni.
5 Even the doe in the field deserts her newborn fawn because there is no grass.
Ezala mboloko kati na zamba ekomi kokima ata mwana na yango oyo esili kobota, pamba te matiti ya kolia ezali lisusu te.
6 Wild donkeys stand on barren heights; they pant for air like jackals; their eyes fail for lack of pasture.”
Ba-ane ya zamba etelemi na basonge ya bangomba ekawuka mpe ezali kobenda mopepe lokola mbwa ya zamba; miso na yango elembi kotala, pamba te matiti ya kolia ezali te. »
7 Although our iniquities testify against us, O LORD, act for the sake of Your name. Indeed, our rebellions are many; we have sinned against You.
Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, pamba te towangani Yo mpe mingi, tosalaki masumu liboso na Yo.
8 O Hope of Israel, its Savior in times of distress, why are You like a stranger in the land, like a traveler who stays but a night?
Oh Elikya ya Isalaele, Mobikisi na ye na tango ya pasi, mpo na nini ozali kosala makambo lokola mopaya kati na mboka oyo to lokola moleki nzela oyo atelemaka kaka na mboka mpo na kolekisa butu?
9 Why are You like a man taken by surprise, like a warrior powerless to save? Yet You are among us, O LORD, and we are called by Your name. Do not forsake us!
Mpo na nini ozali kosala makambo lokola moto oyo asutuki to lokola elombe oyo azangi makoki ya kobikisa moto? Nzokande, Yo, Yawe, ozali kati na biso mpe tobengami solo na Kombo na Yo! Kosundola biso te!
10 This is what the LORD says about this people: “Truly they love to wander; they have not restrained their feet. So the LORD does not accept them; He will now remember their guilt and call their sins to account.”
Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo: « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, bavandaka esika moko te. Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, akobosana mabe na bango te mpe akopesa bango etumbu mpo na masumu na bango. »
11 Then the LORD said to me, “Do not pray for the well-being of this people.
Bongo, Yawe alobaki na ngai: — Kosambela mpo na bolamu ya bato oyo te!
12 Although they may fast, I will not listen to their cry; although they may offer burnt offerings and grain offerings, I will not accept them. Instead, I will finish them off by sword and famine and plague.”
Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka.
13 “Ah, Lord GOD!” I replied, “Look, the prophets are telling them, ‘You will not see the sword or suffer famine, but I will give you lasting peace in this place.’”
Kasi nazongiselaki Ye: — Oh Nkolo Yawe, basakoli bazali kokoba koloba na bango: « Te! Bokotikala komona mopanga to nzala makasi te, kasi nakopesa bino kimia ya solo na esika oyo. »
14 “The prophets are prophesying lies in My name,” replied the LORD. “I did not send them or appoint them or speak to them. They are prophesying to you a false vision, a worthless divination, the futility and delusion of their own minds.
Yawe alobaki na ngai: — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko.
15 Therefore this is what the LORD says about the prophets who prophesy in My name: I did not send them, yet they say, ‘No sword or famine will touch this land.’ By sword and famine these very prophets will meet their end!
Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na basakoli oyo bazali koloba na Kombo na Ngai: « Natindaki bango te, atako bazali koloba: ‹ Mopanga mpe nzala makasi ekokweya na mokili oyo te. › Basakoli yango bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi.
16 And the people to whom they prophesy will be thrown into the streets of Jerusalem because of famine and sword. There will be no one to bury them or their wives, their sons or their daughters. I will pour out their own evil upon them.
Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki.
17 You are to speak this word to them: ‘My eyes overflow with tears; day and night they do not cease, for the virgin daughter of my people has been shattered by a crushing blow, a severely grievous wound.
Loba na bango maloba oyo: ‹ Butu mpe moyi, miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, ezali kokawuka te! Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, bazali na pasi mingi mpo ete babetami makasi.
18 If I go out to the country, I see those slain by the sword; if I enter the city, I see those ravaged by famine! For both prophet and priest travel to a land they do not know.’”
Soki nakeyi na zamba, nazali komona bibembe ya bato oyo babomi na mopanga; soki nakoti kati na engumba, nazali komona bato oyo bazali kokufa na nzala. Basakoli mpe Banganga-Nzambe bazali kososola likambo moko te tango bazali kotambola na mokili. › »
19 Have You rejected Judah completely? Do You despise Zion? Why have You stricken us so that we are beyond healing? We hoped for peace, but no good has come, and for the time of healing, but there was only terror.
Boni, obwaki solo Yuda? Oyini penza Siona? Mpo na nini otindeli biso pasi makasi oyo ezangeli nzela ya kobika? Tokanisaki ete tokozwa kimia; nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te! Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono; nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi!
20 We acknowledge our wickedness, O LORD, the guilt of our fathers; indeed, we have sinned against You.
Oh Yawe, tososoli solo mabe na biso mpe masumu ya batata na biso! Solo, tosali penza masumu liboso na Yo.
21 For the sake of Your name do not despise us; do not disgrace Your glorious throne. Remember Your covenant with us; do not break it.
Koyina biso te mpo na lokumu ya Kombo na Yo! Kobebisa te nkembo ya Kiti ya Bokonzi na Yo! Kanisa boyokani oyo osalaki elongo na biso mpe kobebisa yango te!
22 Can the worthless idols of the nations bring rain? Do the skies alone send showers? Is this not by You, O LORD our God? So we put our hope in You, for You have done all these things.
Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, oyo enokisaka mvula? Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula? Te! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso! Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso.

< Jeremiah 14 >