< Genesis 50 >

1 Then Joseph fell upon his father’s face, wept over him, and kissed him.
Jozefi amibwakaki na nzoto ya tata na ye, alelaki ye mpe apesaki ye beze.
2 And Joseph directed the physicians in his service to embalm his father Israel. So they embalmed him,
Bongo Jozefi apesaki mitindo na minganga oyo bazalaki kosala epai na ye ete bakawusa nzoto ya Isalaele, tata na ye. Boye minganga bakawusaki nzoto ya Isalaele,
3 taking the forty days required to complete the embalming. And the Egyptians mourned for him seventy days.
bakokisaki mikolo tuku minei oyo esengelaki mpo na kokawusa nzoto ya mowei. Bato ya Ejipito basalelaki ye matanga mikolo tuku sambo.
4 When the days of mourning had passed, Joseph said to Pharaoh’s court, “If I have found favor in your eyes, please tell Pharaoh that
Tango mikolo ya matanga esilaki, Jozefi alobaki na bakonzi oyo basalaka na ndako ya Faraon: — Soki nazwi ngolu na miso na bino, bolobela ngai epai ya Faraon. Boyebisa ye
5 my father made me swear an oath when he said, ‘I am about to die. You must bury me in the tomb that I dug for myself in the land of Canaan.’ Now let me go and bury my father, and then return.”
ete tata na ngai alapisaki ngai ndayi: « Nakomi pembeni ya kokufa, bokunda ngai kati na kunda oyo natobolaki na libanga, na mokili ya Kanana. » Mpe sik’oyo, tika ete apesa ngai nzela mpo ete nakende kokunda tata na ngai, bongo na sima nde nakozonga.
6 Pharaoh replied, “Go up and bury your father, as he made you swear to do.”
Faraon azongisaki: — Kende mpe kunda tata na yo ndenge alapisaki yo ndayi.
7 Then Joseph went to bury his father, and all the servants of Pharaoh accompanied him—the elders of Pharaoh’s household and all the elders of the land of Egypt—
Boye Jozefi akendeki kokunda tata na ye; bakalaka nyonso ya lokumu ya Faraon bakendeki elongo na ye: bakonzi oyo bazalaki kosala na ndako na ye mpe bakonzi nyonso ya Ejipito
8 along with all of Joseph’s household, and his brothers, and his father’s household. Only their children and flocks and herds were left in Goshen.
elongo na bato nyonso ya ndako ya Jozefi, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya tata na ye. Bana na bango kaka nde batikalaki na Gosheni na bameme, bantaba mpe bangombe na bango.
9 Chariots and horsemen alike went up with him, and it was an exceedingly large procession.
Jozefi atambolaki lisusu elongo na bashareti mpe bato oyo batambolaka likolo ya bampunda. Ezalaki mobembo ya bato ebele penza.
10 When they reached the threshing floor of Atad, which is across the Jordan, they lamented and wailed loudly, and Joseph mourned for his father seven days.
Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye.
11 When the Canaanites of the land saw the mourning at the threshing floor of Atad, they said, “This is a solemn ceremony of mourning by the Egyptians.” Thus the place across the Jordan is called Abel-mizraim.
Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki: « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani.
12 So Jacob’s sons did as he had charged them.
Bana mibali ya Jakobi basalaki ndenge tata na bango atindaki bango.
13 They carried him to the land of Canaan and buried him in the cave at Machpelah in the field near Mamre, which Abraham had purchased from Ephron the Hittite as a burial site.
Bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lidusu ya mabanga oyo ezali na elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, elanga oyo Abrayami asombaki epai ya Efroni, moto ya Iti, mpo ete akomisa yango lilita na ye.
14 After Joseph had buried his father, he returned to Egypt with his brothers and all who had gone with him to bury his father.
Sima na kokunda tata na ye, Jozefi azongaki na Ejipito elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kokunda tata na ye.
15 When Joseph’s brothers saw that their father was dead, they said, “What if Joseph bears a grudge? Then he will surely repay us for all the evil that we did to him.”
Tango bandeko mibali ya Jozefi bamonaki ete tata na bango asili kokufa, balobaki: « Tango mosusu Jozefi akoyina biso mpe akozongisela biso mabe nyonso oyo tosalaki ye! »
16 So they sent word to Joseph, saying, “Before he died, your father commanded,
Boye batindelaki Jozefi maloba oyo: « Liboso ete tata na yo akufa, atikaki maloba oyo: ‹ Tala makambo oyo bokoyebisa Jozefi:
17 ‘This is what you are to say to Joseph: I beg you, please forgive the transgression and sin of your brothers, for they did you wrong.’ So now, Joseph, please forgive the transgression of the servants of the God of your father.” When their message came to him, Joseph wept.
‘Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo!’ › » Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki.
18 His brothers also came to him, bowed down before him, and said, “We are your slaves!”
Bandeko na ye bayaki, bamibwakaki liboso na ye mpe balobaki: — Tozali bawumbu na yo.
19 But Joseph replied, “Do not be afraid. Am I in the place of God?
Kasi Jozefi alobaki na bango: — Bobanga te! Boni, ngai nazali na esika ya Nzambe?
20 As for you, what you intended against me for evil, God intended for good, in order to accomplish a day like this—to preserve the lives of many people.
Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.
21 Therefore do not be afraid. I will provide for you and your little ones.” So Joseph reassured his brothers and spoke kindly to them.
Yango wana, bobanga te! Nakokokisa posa na bino mpe ya bana na bino. Akitisaki bango mitema mpe alobelaki bango na boboto nyonso.
22 Now Joseph and his father’s household remained in Egypt, and Joseph lived to the age of 110.
Jozefi avandaki na Ejipito elongo na libota nyonso ya tata na ye. Awumelaki na bomoi mibu nkama moko na zomi.
23 He saw Ephraim’s sons to the third generation, and indeed the sons of Machir son of Manasseh were brought up on Joseph’s knees.
Amonaki bakitani ya Efrayimi kino na molongo ya misato. Amonaki lisusu bana ya Makiri, mwana mobali ya Manase, ba-oyo babotamaki na mabolongo ya Jozefi.
24 Then Joseph said to his brothers, “I am about to die, but God will surely visit you and bring you up from this land to the land He promised on oath to Abraham, Isaac, and Jacob.”
Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali: « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. »
25 And Joseph made the sons of Israel take an oath and said, “God will surely attend to you, and then you must carry my bones up from this place.”
Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango: « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. »
26 So Joseph died at the age of 110. And they embalmed his body and placed it in a coffin in Egypt.
Bongo Jozefi akufaki tango akokisaki mibu ya mbotama nkama moko na zomi. Tango basilisaki kokawusa nzoto na ye, batiaki ye na sanduku na Ejipito.

< Genesis 50 >