< Genesis 27 >

1 When Isaac was old and his eyes were so weak that he could no longer see, he called his older son Esau and said to him, “My son.” “Here I am,” Esau replied.
Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye: — Mwana na ngai! Ezawu azongisaki: — Ngai oyo!
2 “Look,” said Isaac, “I am now old, and I do not know the day of my death.
Izaki alobaki: — Nakomi mobange mpe nayebi mokolo ya kufa na ngai te.
3 Take your weapons—your quiver and bow—and go out into the field to hunt some game for me.
Yango wana, zwa sik’oyo mandoki na yo ya bokila, saki ya bokila mpe tolotolo; kende na zamba mpe bomela ngai nyama.
4 Then prepare a tasty dish that I love and bring it to me to eat, so that I may bless you before I die.”
Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa.
5 Now Rebekah was listening to what Isaac told his son Esau. So when Esau went into the field to hunt game and bring it back,
Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango,
6 Rebekah said to her son Jacob, “Behold, I overheard your father saying to your brother Esau,
Rebeka ayebisaki Jakobi, mwana na ye ya mibale: — Tala, nayokaki tata na yo koyebisa Ezawu, ndeko na yo:
7 ‘Bring me some game and prepare me a tasty dish to eat, so that I may bless you in the presence of the LORD before I die.’
« Memela ngai nyama! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. »
8 Now, my son, listen to my voice and do exactly as I tell you.
Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo:
9 Go out to the flock and bring me two choice young goats, so that I can make them into a tasty dish for your father—the kind he loves.
Kende na etonga ya bibwele mpe pona bana ntaba mibale mpe memela ngai yango mpo ete nalambela tata na yo elubu ya kitoko ndenge alingaka.
10 Then take it to your father to eat, so that he may bless you before he dies.”
Bongo, okomemela yango tata na yo; akolia yango mpo ete apambola yo liboso ete akufa.
11 Jacob answered his mother Rebekah, “Look, my brother Esau is a hairy man, but I am smooth-skinned.
Jakobi azongiselaki Rebeka, mama na ye: — Ezawu, ndeko na ngai, azali na bapwale ebele na nzoto, kasi ngai nazali na yango te.
12 What if my father touches me? Then I would be revealed to him as a deceiver, and I would bring upon myself a curse rather than a blessing.”
Soki tata na ngai asimbi ngai, akososola ete nalingi kokosa ye; wana nakomibendela bilakeli mabe na esika ete napambolama.
13 His mother replied, “Your curse be on me, my son. Just obey my voice and go get them for me.”
Mama na ye alobaki: — Mwana na ngai, tika ete bilakeli mabe yango ekweya likolo na ngai; yo, sala kaka makambo oyo ngai nayebisi yo.
14 So Jacob went and got two goats and brought them to his mother, who made the tasty food his father loved.
Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga.
15 And Rebekah took the finest clothes in the house that belonged to her older son Esau, and she put them on her younger son Jacob.
Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka.
16 She also put the skins of the young goats on his hands and on the smooth part of his neck.
Azipaki ye maboko mpe kingo na poso ya bana ntaba.
17 Then she handed her son Jacob the tasty food and bread she had made.
Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki.
18 So Jacob went to his father and said, “My father.” “Here I am!” he answered. “Which one are you, my son?”
Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki: — Tata na ngai! Izaki azongisaki: — Ngai oyo, mwana na ngai; yo nani?
19 Jacob said to his father, “I am Esau, your firstborn. I have done as you told me. Please sit up and eat some of my game, so that you may bless me.”
Jakobi alobaki na tata na ye: — Nazali Ezawu, mwana na yo ya liboso. Nasali ndenge oyebisaki ngai. Nabondeli yo, lamuka, vanda mpe lia nyama, mpo ete opambola ngai.
20 But Isaac asked his son, “How did you ever find it so quickly, my son?” “Because the LORD your God brought it to me,” he replied.
Izaki atunaki mwana na ye: — Mwana na ngai, osali ndenge nini mpo ete ozwa nyama noki? Jakobi azongisaki: — Ezali Yawe, Nzambe na yo, nde atindaki yango na nzela na ngai.
21 Then Isaac said to Jacob, “Please come closer so I can touch you, my son. Are you really my son Esau, or not?”
Izaki alobaki na Jakobi: — Mwana na ngai, pusana pembeni na ngai mpo ete nasimba yo mpe nayeba soki ozali solo mwana na ngai Ezawu.
22 So Jacob came close to his father Isaac, who touched him and said, “The voice is the voice of Jacob, but the hands are the hands of Esau.”
Jakobi akendeki pembeni na ye, bongo Izaki asimbaki ye mpe alobaki: — Mongongo ezali ya Jakobi, kasi maboko ezali ya Ezawu.
23 Isaac did not recognize him, because his hands were hairy like those of his brother Esau; so he blessed him.
Tata na ye ayebaki ye te, pamba te maboko ya Jakobi ezalaki na bapwale lokola ya Ezawu, ndeko na ye; boye apambolaki ye.
24 Again he asked, “Are you really my son Esau?” And he replied, “I am.”
Kasi liboso, atunaki ye: — Ozali penza mwana na ngai Ezawu? Jakobi azongisaki: — Iyo, ezali ngai solo.
25 “Serve me,” said Isaac, “and let me eat some of my son’s game, so that I may bless you.” Jacob brought it to him, and he ate; then he brought him wine, and he drank.
Izaki alobaki: — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki.
26 Then his father Isaac said to him, “Please come near and kiss me, my son.”
Sima, tata na ye, Izaki, alobaki na ye: — Mwana na ngai, yaka awa mpe pesa ngai beze.
27 So he came near and kissed him. When Isaac smelled his clothing, he blessed him and said: “Ah, the smell of my son is like the smell of a field that the LORD has blessed.
Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo: « Ah! Solo ya mwana na ngai ezali lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli.
28 May God give to you the dew of heaven and the richness of the earth— an abundance of grain and new wine.
Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi; apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza!
29 May peoples serve you and nations bow down to you. May you be the master of your brothers, and may the sons of your mother bow down to you. May those who curse you be cursed, and those who bless you be blessed.”
Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama! »
30 As soon as Isaac had finished blessing him and Jacob had left his father’s presence, his brother Esau returned from the hunt.
Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila.
31 He too made some tasty food, brought it to his father, and said to him, “My father, sit up and eat of your son’s game, so that you may bless me.”
Ye mpe alambaki elubu mpe amemaki yango epai ya tata na ye. Alobaki na ye: — Tata na ngai, telema mpe lia nyama na ngai mpo ete opambola ngai.
32 But his father Isaac replied, “Who are you?” “I am Esau, your firstborn son,” he answered.
Tata na ye, Izaki, atunaki ye: — Yo nani? Azongisaki: — Ngai Ezawu, mwana na yo ya liboso.
33 Isaac began to tremble violently and said, “Who was it, then, who hunted the game and brought it to me? Before you came in, I ate it all and blessed him—and indeed, he will be blessed!”
Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki: — Nani wana abomaki nyama mpe amemelaki ngai yango? Naliaki yango liboso ete yo oya, mpe napambolaki ye. Boye apambolami solo!
34 When Esau heard his father’s words, he let out a loud and bitter cry and said to his father, “Bless me too, O my father!”
Tango Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, atombolaki mongongo makasi mpe agangaki. Alobaki na tata na ye: — Ah! Tata na ngai, pambola ngai, pambola ngai mpe lokola!
35 But Isaac replied, “Your brother came deceitfully and took your blessing.”
Izaki alobaki: — Ndeko na yo ayaki na mayele mabe, ayibi mapamboli na yo.
36 So Esau declared, “Is he not rightly named Jacob? For he has cheated me twice. He took my birthright, and now he has taken my blessing.” Then he asked, “Haven’t you saved a blessing for me?”
Ezawu alobaki: — Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai! Bongo atunaki: — Boni, obombelaki ngai mapamboli te?
37 But Isaac answered Esau: “Look, I have made him your master and given him all his relatives as servants; I have sustained him with grain and new wine. What is left that I can do for you, my son?”
Izaki azongiselaki Ezawu: — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo?
38 Esau said to his father, “Do you have only one blessing, my father? Bless me too, O my father!” Then Esau wept aloud.
Ezawu alobaki na tata na ye: — Tata na ngai, ozalaki kaka na lipamboli moko wana? Tata na ngai, pambola ngai mpe! Ezawu atombolaki mongongo na ye mpe alelaki makasi.
39 His father Isaac answered him: “Behold, your dwelling place shall be away from the richness of the land, away from the dew of heaven above.
Tata na ye, Izaki, alobaki na ye: — Okovanda mosika ya mabele oyo ebotaka malamu, mpe mosika ya mvula ya likolo.
40 You shall live by the sword and serve your brother. But when you rebel, you will tear his yoke from your neck.”
Okobika na nzela ya mopanga na yo mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. Kasi tango okotambola bipai na bipai, okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo.
41 Esau held a grudge against Jacob because of the blessing his father had given him. And Esau said in his heart, “The days of mourning for my father are at hand; then I will kill my brother Jacob.”
Ezawu ayinaki Jakobi likolo ya mapamboli oyo azwaki epai ya tata na ye mpe amilobelaki: « Etikali moke tata na ngai akufa; bongo nakoboma ndeko na ngai Jakobi. »
42 When the words of her older son Esau were relayed to Rebekah, she sent for her younger son Jacob and told him, “Look, your brother Esau is consoling himself by plotting to kill you.
Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye: « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo.
43 So now, my son, obey my voice and flee at once to my brother Laban in Haran.
Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo: ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani.
44 Stay with him for a while, until your brother’s fury subsides—
Vanda mwa mikolo epai na ye kino kanda ya ndeko na yo ekosila.
45 until your brother’s rage against you wanes and he forgets what you have done to him. Then I will send for you and bring you back from there. Why should I lose both of you in one day?”
Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko? › »
46 Then Rebekah said to Isaac, “I am weary of my life because of these Hittite women. If Jacob takes a Hittite wife from among them, what good is my life?”
Rebeka akendeki koyebisa Izaki: « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. »

< Genesis 27 >