< Genesis 19 >

1 Now the two angels arrived at Sodom in the evening, and Lot was sitting in the gateway of the city. When Lot saw them, he got up to meet them, bowed facedown,
Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele.
2 and said, “My lords, please turn aside into the house of your servant; wash your feet and spend the night. Then you can rise early and go on your way.” “No,” they answered, “we will spend the night in the square.”
Alobaki na bango: — Nabondeli bino, bankolo na ngai, boya na ndako ya mosali na bino. Bokoki kosukola kuna makolo na bino mpe kolekisa butu, bongo na tongo, bokoki kokoba mobembo na bino. Bazongiselaki ye: — Te, tokolala kaka libanda.
3 But Lot insisted so strongly that they followed him into his house. He prepared a feast for them and baked unleavened bread, and they ate.
Kasi Loti abondelaki bango mingi; boye bandimaki kokende na ye elongo mpe bakotaki na ndako na ye. Alambelaki bango bilei ya kitoko, atumbaki mapa ezanga levire mpe baliaki.
4 Before they had gone to bed, all the men of the city of Sodom, both young and old, surrounded the house.
Liboso ete bakende kolala, mibali nyonso ya engumba Sodome, bilenge mpe mibange, bawutaki bipai na bipai mpe bayaki kozingela ndako.
5 They called out to Lot, saying, “Where are the men who came to you tonight? Send them out to us so we can have relations with them!”
Babelelaki Loti: — Wapi mibali oyo bayaki epai na yo na butu oyo? Bimisela biso bango mpo ete tosangisa na bango nzoto.
6 Lot went outside to meet them, shutting the door behind him.
Loti abimaki mpo na kosolola na bango; akangaki ekuke sima na ye.
7 “Please, my brothers,” he pleaded, “don’t do such a wicked thing!
Alobaki: — Te, baninga na ngai, bosala mabe te!
8 Look, I have two daughters who have never slept with a man. Let me bring them to you, and you can do to them as you please. But do not do anything to these men, for they have come under the protection of my roof.”
Boyoka! Nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete namemela bino bango libanda! Bosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi bosala bato oyo eloko moko te mpo ete bayei kovanda na ndako na ngai.
9 “Get out of the way!” they replied. And they declared, “This one came here as a foreigner, and he is already acting like a judge! Now we will treat you worse than them.” And they pressed in on Lot and moved in to break down the door.
Bazongisaki: — Longwa wana. Balobaki lisusu: — Botala moto oyo, ayaki awa lokola mopaya; sik’oyo alingi komikomisa mosambisi. Tokosala yo mabe koleka bango. Bongo batindikaki Loti na makasi mpe bapusanaki pene ya ekuke mpo na koluka kobuka yango.
10 But the men inside reached out, pulled Lot into the house with them, and shut the door.
Kasi mibali oyo bazalaki kati na ndako babimisaki maboko mpe babendaki Loti na kati ya ndako mpe bakangaki ekuke.
11 And they struck the men at the entrance, young and old, with blindness, so that they wearied themselves trying to find the door.
Bakangaki miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya ndako, ezala bilenge to mibange; boye bazalaki lisusu komona ekuke te.
12 Then the two men said to Lot, “Do you have anyone else here—a son-in-law, your sons or daughters, or anyone else in the city who belongs to you? Get them out of here,
Mibali yango mibale balobaki na Loti: — Ozali lisusu na moto mosusu na engumba oyo, ndakisa: mibali ya bana na yo ya basi, bana na yo ya mibali mpe ya basi to mpe ndeko mosusu? Bimisa bango libanda ya esika oyo
13 because we are about to destroy this place. For the outcry to the LORD against its people is so great that He has sent us to destroy it.”
mpo ete tolingi kobebisa yango. Sango ya makambo mabe ya bato oyo ekomi kino epai na Yawe; yango wana Yawe atindi biso mpo na kobebisa engumba oyo.
14 So Lot went out and spoke to the sons-in-law who were pledged in marriage to his daughters. “Get up,” he said. “Get out of this place, for the LORD is about to destroy the city!” But his sons-in-law thought he was joking.
Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki: « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo! » Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki.
15 At daybreak the angels hurried Lot along, saying, “Get up! Take your wife and your two daughters who are here, or you will be swept away in the punishment of the city.”
Tango kaka tongo etanaki, ba-anjelu batungisaki Loti mpe balobaki: — Sala noki, kamata mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya basi oyo bazali awa; soki te, bokobebisama tango engumba oyo ekozwa etumbu.
16 But when Lot hesitated, the men grabbed his hand and the hands of his wife and his two daughters. And they led them safely out of the city, because of the LORD’s compassion for them.
Lokola azalaki kowumela, mibali yango bakangaki na makasi loboko na ye, maboko ya mwasi mpe ya bana na ye ya basi; mpe bamemaki bango na libanda ya engumba, pamba te Yawe ayokelaki bango mawa.
17 As soon as the men had brought them out, one of them said, “Run for your lives! Do not look back, and do not stop anywhere on the plain! Flee to the mountains, or you will be swept away!”
Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki: — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama!
18 But Lot replied, “No, my lords, please!
Kasi Loti azongisaki: — Te, nkolo na ngai, tika ete esalema bongo te!
19 Your servant has indeed found favor in your sight, and you have shown me great kindness by sparing my life. But I cannot run to the mountains; the disaster will overtake me, and I will die.
Mosali na yo azwi ngolu na miso na yo, mpe otalisi ngai bolamu makasi na ndenge obikisi bomoi na ngai. Kasi nakokoka te kokima na likolo ya bangomba, noki te likama ekokomela ngai mpe nakokufa.
20 Look, there is a town nearby where I can flee, and it is a small place. Please let me flee there—is it not a small place? Then my life will be saved.”
Tala, ezali na engumba moko pene awa mpo na kokimela, yango ezali penza moke. Tika ngai nakimela kuna atako ezali moke mpo ete nabikisa bomoi na ngai!
21 “Very well,” he answered, “I will grant this request as well, and will not demolish the town you indicate.
Anjelu alobaki na ye: — Malamu mingi, nakokokisela yo lisusu bosenga oyo. Nakobebisa te engumba oyo ozali kolobela.
22 Hurry! Run there quickly, for I cannot do anything until you reach it.” That is why the town was called Zoar.
Kasi kima noki, pamba te nakoki kosala eloko moko te soki okomi nanu kuna te. Yango wana babengaka engumba yango Tsoari.
23 And by the time the sun had risen over the land, Lot had reached Zoar.
Loti akomaki na Tsoari tango tongo etanaki.
24 Then the LORD rained down sulfur and fire on Sodom and Gomorrah—from the LORD out of the heavens.
Boye wuta na likolo, Yawe anokisaki mvula ya moto makasi ya fofolo, na sodome mpe na Gomore.
25 Thus He destroyed these cities and the entire plain, including all the inhabitants of the cities and everything that grew on the ground.
Abebisaki bingumba yango, etando nyonso elongo na bato nyonso oyo bazalaki kovanda kuna mpe banzete nyonso.
26 But Lot’s wife looked back, and she became a pillar of salt.
Kasi mwasi ya Loti atalaki na sima mpe akomaki ekeko ya mungwa.
27 Early the next morning, Abraham got up and returned to the place where he had stood before the LORD.
Na tongo makasi, Abrayami amataki na esika oyo atelemaki liboso ya Yawe;
28 He looked down toward Sodom and Gomorrah and all the land of the plain, and he saw the smoke rising from the land like smoke from a furnace.
atalaki na ngambo ya Sodome mpe ya Gomore, mpe na ngambo ya mokili ya etando; amonaki molinga makasi komata wuta na mokili lokola molinga ya fulu monene ya moto.
29 So when God destroyed the cities of the plain, He remembered Abraham, and He brought Lot out of the catastrophe that destroyed the cities where he had lived.
Boye, tango Nzambe abebisaki bingumba ya etando, akanisaki Abrayami mpe abikisaki Loti na likama oyo atindelaki bingumba epai wapi Loti azalaki kovanda.
30 Lot and his two daughters left Zoar and settled in the mountains—for he was afraid to stay in Zoar—where they lived in a cave.
Loti mpe bana na ye mibale ya basi babimaki na Tsoari, bakendeki kovanda na bangomba, pamba te azalaki kobanga kotikala kuna. Ye elongo na bana na ye mibale ya basi bakendeki kovanda kati na lidusu ya libanga.
31 One day the older daughter said to the younger, “Our father is old, and there is no man in the land to sleep with us, as is the custom over all the earth.
Mokolo moko, kulutu alobaki na leki na ye: « Tata na biso akomi mobange, mpe na etuka oyo, mobali oyo akosangisa na biso nzoto ndenge esalemaka na mokili mobimba, azali te.
32 Come, let us get our father drunk with wine so we can sleep with him and preserve his line.”
Tika ete tomelisa tata na biso masanga ya vino mpe tosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. »
33 So that night they got their father drunk with wine, and the firstborn went in and slept with her father; he was not aware when she lay down or when she got up.
Na butu wana, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango. Boye kulutu akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye, mpe tata na ye atikalaki koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki.
34 The next day the older daughter said to the younger, “Look, I slept with my father last night. Let us get him drunk with wine again tonight so you can go in and sleep with him and we can preserve our father’s line.”
Mokolo oyo elandaki, kulutu alobaki na leki: « Na butu oyo ewuti koleka, nasangisaki nzoto na tata na ngai. Tika ete topesa ye lisusu masanga ya vino na butu ya lelo, mpe yo okokende kosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. »
35 So again that night they got their father drunk with wine, and the younger daughter went in and slept with him; he was not aware when she lay down or when she got up.
Na butu wana lisusu, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango; bongo leki akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye. Tata na ye atikalaki kaka koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki.
36 Thus both of Lot’s daughters became pregnant by their father.
Boye bana basi oyo mibale ya Loti bakomaki na zemi ya tata na bango.
37 The older daughter gave birth to a son and named him Moab. He is the father of the Moabites of today.
Kulutu abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Moabi; » azali tata ya ekolo ya Moabi, kino na mokolo ya lelo.
38 The younger daughter also gave birth to a son, and she named him Ben-ammi. He is the father of the Ammonites of today.
Leki mpe abotaki lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Beni-Ami; » azali tata ya ekolo ya Amoni, kino na mokolo ya lelo.

< Genesis 19 >