< 2 Samuel 19 >

1 Then it was reported to Joab, “The king is weeping and mourning over Absalom.”
Sango ekomelaki Joabi na koloba: « Mokonzi azali kolela mpe asali matanga mpo na Abisalomi. »
2 And that day’s victory was turned into mourning for all the people, because on that day they were told, “The king is grieving over his son.”
Mokolo wana, elonga ebongwanaki matanga mpo na bato nyonso, pamba te bato bayokaki na mokolo wana sango koloba: « Mokonzi azali na mawa makasi mpo na mwana na ye ya mobali. »
3 So they returned to the city quietly that day, as people steal away in humiliation after fleeing a battle.
Na mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba.
4 But the king covered his face and cried out at the top of his voice, “O my son Absalom! O Absalom, my son, my son!”
Mokonzi azipaki elongi mpe alelaki makasi: « Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi! Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi! Mwana na ngai ya mobali! »
5 Then Joab went into the house and said to the king, “Today you have disgraced all your servants who have saved your life and the lives of your sons and daughters, of your wives, and of your concubines.
Joabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye: « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo.
6 You love those who hate you and hate those who love you! For you have made it clear today that the commanders and soldiers mean nothing to you. I know today that if Absalom were alive and all of us were dead, it would have pleased you!
Olingaka bato oyo bayinaka yo mpe oyinaka bato oyo balingaka yo. Lelo penza, otalisi yango polele ete bakonzi ya basoda mpe basoda na bango bazali pamba na miso na yo. Namoni ete olingaki kosepela lelo soki Abisalomi azalaki na bomoi mpe soki biso nyonso tokufaki.
7 Now therefore get up! Go out and speak comfort to your servants, for I swear by the LORD that if you do not go out, not a man will remain with you tonight. This will be worse for you than all the adversity that has befallen you from your youth until now!”
Sik’oyo, bima mpe pesa longonya na basoda na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Yawe ete soki obimi te, soda moko te akotikala elongo na yo kino butu eya. Ekozala mpo na yo pasi, koleka makama nyonso oyo ekweyela yo wuta na bolenge na yo kino lelo. »
8 So the king got up and sat in the gate, and all the people were told: “Behold, the king is sitting in the gate.” So they all came before the king. Meanwhile, the Israelites had fled, each man to his home.
Boye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye. Mpe na tango wana, bana ya Isalaele bakimaki moto na moto na ndako na ye.
9 And all the people throughout the tribes of Israel were arguing, “The king rescued us from the hand of our enemies and delivered us from the hand of the Philistines, but now he has fled the land because of Absalom.
Kati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba: « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi;
10 But Absalom, the man we anointed over us, has died in battle. So why do you say nothing about restoring the king?”
mpe Abisalomi oyo topakolaki mafuta mpo ete akamba biso asili kokufa na bitumba. Boye mpo na nini bozali koloba eloko te mpo na kozongisa mokonzi na Yelusalemi? »
11 Then King David sent this message to Zadok and Abiathar, the priests: “Say to the elders of Judah, ‘Why should you be the last to restore the king to his palace, since the talk of all Israel has reached the king at his quarters?
Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari: « Botuna na bampaka ya Yuda: mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi?
12 You are my brothers, my own flesh and blood. So why should you be the last to restore the king?’
Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi?
13 And say to Amasa, ‘Aren’t you my flesh and blood? May God punish me, and ever so severely, if from this time you are not the commander of my army in place of Joab!’”
Mpe boloba na Amasa: ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › »
14 So he swayed the hearts of all the men of Judah as though they were one man, and they sent word to the king: “Return, you and all your servants.”
Makambo oyo Davidi alobaki ekotaki na mitema ya bato nyonso ya Yuda lokola moto moko. Boye batindaki maloba epai ya mokonzi mpo na koloba na ye: « Zonga, yo elongo na basali na yo nyonso. »
15 So the king returned, and when he arrived at the Jordan, the men of Judah came to Gilgal to meet him and escort him across the Jordan.
Mokonzi azongaki mpe akomaki kino na Yordani. Bato ya Yuda bayaki na Giligali mpo na kokende kokutana na mokonzi mpe kokatisa ye mayi ya Yordani.
16 Then Shimei son of Gera, a Benjamite from Bahurim, hurried down with the men of Judah to meet King David,
Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi.
17 along with a thousand men of Benjamin, as well as Ziba the steward of the house of Saul and his fifteen sons and twenty servants. They rushed down to the Jordan before the king
Azalaki elongo na bato ya Benjame, nkoto moko, mpe Tsiba, moto oyo azalaki kosala kati na libota ya Saulo, elongo na bana na ye ya mibali zomi na mitano mpe basali na ye, tuku mibale. Bakendeki mbangu na Yordani epai wapi mokonzi azalaki.
18 and crossed at the ford to carry over the king’s household and to do what was good in his sight. When Shimei son of Gera crossed the Jordan, he fell down before the king
Bamataki na bwato mpo na kokatisa libota ya mokonzi mpe mpo na kosala nyonso oyo ezali malamu na miso ya mokonzi. Tango Shimei, mwana mobali ya Gera, akatisaki Yordani, akweyaki liboso ya mokonzi
19 and said, “My lord, do not hold me guilty, and do not remember your servant’s wrongdoing on the day my lord the king left Jerusalem. May the king not take it to heart.
mpe alobaki na ye: « Tika ete nkolo na ngai atangela ngai ngambo te, akanisa te mabe oyo mosali na ye asalaki mokolo oyo mokonzi, nkolo na ngai, alongwaki na Yelusalemi. Tika ete mokonzi alongola likambo yango na makanisi na ye.
20 For your servant knows that I have sinned, so here I am today as the first of all the house of Joseph to come down to meet my lord the king.”
Pamba te ngai, mosali na yo, nayebi ete nasalaki masumu, mpe lelo nayei awa lokola moto ya liboso kati na libota mobimba ya Jozefi mpo na kokutana na mokonzi, nkolo na ngai. »
21 But Abishai son of Zeruiah said, “Shouldn’t Shimei be put to death for this, because he cursed the LORD’s anointed?”
Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki: — Boni, Shimei asengelaki te kokufa mpo na likambo oyo, pamba te alakelaki mabe mopakolami na Yawe?
22 And David replied, “Sons of Zeruiah, what have I to do with you, that you should be my adversaries today? Should any man be put to death in Israel today? Am I not indeed aware that today I am king over Israel?”
Davidi azongisaki: — Likambo nini kati na ngai mpe bino bana mibali ya Tseruya? Bokomi lelo banguna na ngai! Boni, basengeli koboma moto moko lelo kati na Isalaele? Nayebi te ete ngai nde nazali lelo mokonzi ya Isalaele?
23 So the king said to Shimei, “You shall not die.” And the king swore an oath to him.
Bongo mokonzi alobaki na Shimei: — Okokufa te. Mpe mokonzi alakaki Shimei na nzela ya ndayi.
24 Then Mephibosheth, Saul’s grandson, went down to meet the king. He had not cared for his feet or trimmed his mustache or washed his clothes from the day the king had left until the day he returned safely.
Mefibosheti, koko ya Saulo, akendeki mpe kokutana na mokonzi. Banda mokolo oyo mokonzi abimaki kino azongaki, Mefibosheti atikalaki kosukola makolo na ye te, akataki mandefu te mpe asukolaki bilamba na ye te.
25 And he came from Jerusalem to meet the king, who asked him, “Mephibosheth, why did you not go with me?”
Tango akomaki na Yelusalemi mpo na kokutana na mokonzi, Davidi atunaki ye: — Mefibosheti, mpo na nini okendeki te elongo na ngai?
26 “My lord the king,” he replied, “because I am lame, I said, ‘I will have my donkey saddled so that I may ride on it and go with the king.’ But my servant Ziba deceived me,
Mefibosheti azongisaki: — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki: « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. »
27 and he has slandered your servant to my lord the king. Yet my lord the king is like the angel of God, so do what is good in your eyes.
Kasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu.
28 For all the house of my grandfather deserves death from my lord the king, yet you have set your servant among those who eat at your table. What further right, then, do I have to keep appealing to the king?”
Pamba te na makanisi ya mokonzi, nkolo na ngai, esengelaki koboma bato nyonso ya libota ya koko na ngai, Saulo; kasi atako bongo, ondimaki mosali na yo na mesa, kati na bato oyo bazali kolia elongo na yo. Boye makoki nini nakoki lisusu kozala na yango ya kosenga eloko epai ya mokonzi?
29 The king replied, “Why say any more? I hereby declare that you and Ziba are to divide the land.”
Mokonzi alobaki na ye: — Mpo na nini maloba ebele boye? Nasili kopesa mitindo ete yo mpe Tsiba bokabola bilanga.
30 And Mephibosheth said to the king, “Instead, since my lord the king has safely come to his own house, let Ziba take it all!”
Mefibosheti alobaki na ye: — Lokola mokonzi, nkolo na ngai, azongi mobimba na ndako na ye, tika ete akamata na ye ata nyonso.
31 Now Barzillai the Gileadite had come down from Rogelim to cross the Jordan with the king and send him on his way from there.
Barizilayi, moto ya Galadi, awutaki na Rogelimi mpo na kokatisa ebale Yordani elongo na mokonzi mpe kotika ye kokoba mobembo na ye.
32 Barzillai was quite old, eighty years of age, and since he was a very wealthy man, he had provided for the king while he stayed in Mahanaim.
Nzokande, Barizilayi akomaki mobange, azalaki na mibu tuku mwambe, mpe ezalaki ye nde asungaki mokonzi na mikolo nyonso oyo mokonzi avandaki na Maanayimi, pamba te azalaki moto ya bozwi mingi.
33 The king said to Barzillai, “Cross over with me, and I will provide for you at my side in Jerusalem.”
Mokonzi alobaki na Barizilayi: — Katisa elongo na ngai mpe vanda epai na ngai na Yelusalemi, mpe ngai nakosunga yo.
34 But Barzillai replied, “How many years of my life remain, that I should go up to Jerusalem with the king?
Kasi Barizilayi azongiselaki mokonzi: — Natikali na mibu boni mpo ete nakende elongo na mokonzi na Yelusalemi?
35 I am now eighty years old. Can I discern what is good and what is not? Can your servant taste what he eats or drinks? Can I still hear the voice of singing men and women? Why should your servant be an added burden to my lord the king?
Nazali sik’oyo na mibu tuku mwambe. Boni, nakoki na ngai lisusu kokesenisa malamu mpe mabe? Mosali na yo akoki koyoka lisusu elengi ya biloko oyo azali kolia mpe komela? Nakoki lisusu koyoka mongongo ya bayembi ya mibali mpe ya basi? Bongo mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, akoki lisusu komitungisa mpo na mosali na yo?
36 Your servant could go with the king only a short distance past the Jordan; why should the king repay me with such a reward?
Mosali na yo akokatisa Yordani elongo na mokonzi mpo na mwa tango moke kaka. Kasi mpo na nini mokonzi akoki kopesa ngai lifuti ya boye?
37 Please let your servant return, that I may die in my own city near the tomb of my father and mother. But here is your servant Chimham. Let him cross over with my lord the king, and do for him what is good in your sight.”
Nabondeli yo, tika ete mosali na yo azonga mpo na kokufa na engumba na ngai pene ya kunda ya tata mpe mama na ngai! Kasi tala mwana na ngai ya mobali, mosali na yo, Kimeami. Tika ete akende elongo na mokonzi, nkolo na ngai, mpe salela ye makambo oyo yo omoni ete ezali malamu.
38 The king replied, “Chimham will cross over with me, and I will do for him what seems good in your sight, and I will do for you whatever you desire of me.”
Mokonzi azongisaki: — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai.
39 So all the people crossed the Jordan, and then the king crossed over. The king kissed Barzillai and blessed him, and Barzillai returned home.
Sima na bato nyonso kokatisa ebale Yordani, mokonzi mpe akatisaki. Bongo mokonzi apesaki Barizilayi beze mpe apambolaki ye. Mpe Barizilayi azongaki na ndako na ye.
40 Then the king went on to Gilgal, and Chimham crossed over with him. All the troops of Judah and half the troops of Israel escorted the king.
Tango mokonzi akatisaki na Giligali, Kimeami mpe akatisaki elongo na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ndambo ya mabota ya Isalaele balekisaki mokonzi.
41 Soon all the men of Israel came to the king and asked, “Why did our brothers, the men of Judah, take you away secretly and bring the king and his household across the Jordan, together with all of David’s men?”
Kasi na mbala moko, bato nyonso ya Isalaele bayaki epai ya mokonzi mpe balobaki na ye: — Mpo na nini bandeko na biso, bato ya Yuda, bazwaki yo na kobombama? Mpo na nini balekisaki mokonzi na ebale Yordani, elongo na libota na ye mpe bato nyonso ya Davidi elongo na ye?
42 And all the men of Judah replied to the men of Israel, “We did this because the king is our relative. Why does this anger you? Have we ever eaten at the king’s expense or received anything for ourselves?”
Bato nyonso ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele: — Tosalaki bongo, pamba te mokonzi azali ndeko na biso ya mosika te. Bongo mpo na nini kosilika na tina na yango? Boni, tobikaki bomoi na biso mpo na mokonzi? Tozwaki ata eloko moko mpo na biso?
43 “We have ten shares in the king,” answered the men of Israel, “so we have more claim to David than you. Why then do you despise us? Were we not the first to speak of restoring our king?” But the men of Judah pressed even harder than the men of Israel.
Bato ya Isalaele bazongiselaki bato ya Yuda: — Tozali na makoki kati na mokonzi koleka mbala zomi, mpe biso nde tozali na makoki mingi koleka bino na tina na Davidi. Mpo na nini bozali komona biso lokola bato pamba. Tozalaki bato ya liboso te na koluka ndenge nini kozongisa mokonzi na biso? Kasi bato ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele na maloba makasi.

< 2 Samuel 19 >