< 2 Samuel 11 >

1 In the spring, at the time when kings march out to war, David sent out Joab and his servants with the whole army of Israel. They destroyed the Ammonites and besieged Rabbah, but David remained in Jerusalem.
Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Davidi atindaki Joabi elongo na basali na ye mpe mampinga nyonso ya Isalaele. Babomaki bato ya Amoni mpe bazingelaki Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi.
2 One evening David got up from his bed and strolled around on the roof of the palace. And from the roof he saw a woman bathing—a very beautiful woman.
Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi.
3 So David sent and inquired about the woman, and he was told, “This is Bathsheba, the daughter of Eliam and the wife of Uriah the Hittite.”
Davidi atindaki moto moko kokende koluka koyeba soki mwasi yango azali nani. Moto yango alobaki: « Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Eliami, mwasi ya Iri, moto ya Iti. »
4 Then David sent messengers to get her, and when she came to him, he slept with her. (Now she had just purified herself from her uncleanness.) Then she returned home.
Davidi atindaki bantoma mpo na kozwa ye. Batisheba ayaki epai ya Davidi, mpe Davidi asangisaki na ye nzoto. Sima na ye komipetola na mbindo na ye, Batisheba azongaki na ndako na ye.
5 And the woman conceived and sent word to David, saying, “I am pregnant.”
Akomaki na zemi, mpe atindaki maloba epai ya Davidi: « Nazali na zemi. »
6 At this, David sent orders to Joab: “Send me Uriah the Hittite.” So Joab sent him to David.
Davidi atindaki maloba epai ya Joabi: « Tindela ngai Iri, moto ya Iti. » Joabi atindaki Iri epai ya Davidi.
7 When Uriah came to him, David asked how Joab and the troops were doing with the war.
Tango Iri akomaki epai na ye, Davidi atunaki ye soki Joabi azali malamu, soki basoda bazali malamu mpe soki bitumba ezali koleka ndenge nini.
8 Then he said to Uriah, “Go down to your house and wash your feet.” So Uriah left the palace, and a gift from the king followed him.
Bongo Davidi alobaki na Iri: « Kende na ndako na yo mpe sukola makolo na yo. » Iri atikaki ndako ya mokonzi; mpe sima na ye, mokonzi atindelaki ye kado.
9 But Uriah slept at the door of the palace with all his master’s servants; he did not go down to his house.
Kasi Iri alalaki na ekotelo ya ndako ya mokonzi elongo na basali nyonso ya mokonzi na ye; akendeki te na ndako na ye.
10 And David was told, “Uriah did not go home.” “Haven’t you just arrived from a journey?” David asked Uriah. “Why didn’t you go home?”
Tango bayebisaki Davidi ete Iri akendeki na ndako te, atunaki ye: — Boni, yo owuti mosika te? Mpo na nini oboyi kozonga na ndako na yo?
11 Uriah answered, “The ark and Israel and Judah are dwelling in tents, and my master Joab and his soldiers are camped in the open field. How can I go to my house to eat and drink and sleep with my wife? As surely as you live, and as your soul lives, I will not do such a thing!”
Iri azongiselaki Davidi: — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te.
12 “Stay here one more day,” David said to Uriah, “and tomorrow I will send you back.” So Uriah stayed in Jerusalem that day and the next.
Davidi alobaki na Iri: — Vanda lisusu awa lelo, bongo lobi nakozongisa yo. Iri avandaki na Yelusalemi mokolo wana mpe mokolo oyo elandaki.
13 Then David invited Uriah to eat and drink with him, and he got Uriah drunk. And in the evening Uriah went out to lie down on his cot with his master’s servants, but he did not go home.
Davidi abengisaki ye. Iri aliaki mpe amelaki elongo na ye, mpe Davidi alangwisaki ye. Kasi na pokwa, Uri abimaki mpo na kokende kolala na mbeto na ye elongo na basali ya mokonzi, kasi akendeki na ndako na ye te.
14 The next morning David wrote a letter to Joab and sent it with Uriah.
Na tongo, Davidi akomelaki Joabi mokanda mpe atindaki yango na nzela ya Iri.
15 In the letter he wrote: “Put Uriah at the front of the fiercest battle; then withdraw from him, so that he may be struck down and killed.”
Kati na mokanda yango, akomaki boye: « Tia Iri na molongo ya liboso, na esika oyo bitumba ezali makasi. Mpe bino, bozonga sima na ye mpo ete babeta ye mpe akufa. »
16 So as Joab besieged the city, he assigned Uriah to a place where he saw the strongest enemy soldiers.
Joabi oyo azalaki kokengela engumba, atiaki Iri na esika oyo ayebaki ete ezali penza na basoda ya mpiko.
17 And when the men of the city came out and fought against Joab, some of David’s servants fell, and Uriah the Hittite also died.
Bongo tango bato ya engumba babimaki mpo na kobundisa Joabi, ndambo ya basoda kati na mampinga ya Davidi bakufaki; Iri, moto ya Iti, mpe akufaki.
18 Joab sent to David a full account of the battle
Joabi atindelaki Davidi sango nyonso ya bitumba.
19 and instructed the messenger, “When you have finished giving the king all the details of the battle,
Apesaki mitindo oyo epai ya ntoma: « Tango okosilisa kopesa sango ya bitumba epai ya mokonzi,
20 if the king’s anger flares, he may ask you, ‘Why did you get so close to the city to fight? Did you not realize they would shoot from atop the wall?
mokonzi akoki kotomboka mpe kotuna yo: ‹ Mpo na nini bopusanaki makasi pembeni ya engumba mpo na kobunda? Boyebaki te ete bakokaki kobeta batolotolo wuta na mir?
21 Who was the one to strike Abimelech son of Jerubbesheth? Was it not a woman who dropped an upper millstone on him from the wall, so that he died in Thebez? Why did you get so close to the wall?’ If so, then you are to say, ‘Your servant Uriah the Hittite is dead as well.’”
Nani abomaki Abimeleki, mwana mobali ya Yerubesheti? Ezalaki te mwasi oyo, wuta na likolo ya mir, abwakelaki ye libanga oyo banikelaka ble, yango wana akufaki na Tebesi? Mpo na nini bopusanaki pembeni ya mir? › Soki atuni yo bongo, loba na ye: ‹ Mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufi. › »
22 So the messenger set out and reported to David all that Joab had sent him to say.
Motindami akendeki, mpe tango akomaki, ayebisaki Davidi makambo nyonso oyo Joabi atindaki ye koloba.
23 The messenger said to David, “The men overpowered us and came out against us in the field, but we drove them back to the entrance of the gate.
Alobaki na Davidi: — Bato yango bazalaki makasi koleka biso, bayaki kobundisa biso na libanda, mpe tobenganaki bango kino na ekotelo ya engumba.
24 Then the archers shot at your servants from the wall, and some of the king’s servants were killed. And your servant Uriah the Hittite is dead as well.”
Bongo basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki na batolotolo na bango basali na yo wuta na likolo ya mir. Ndambo ya bato ya mokonzi bakufaki, ezala mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufaki.
25 Then David told the messenger, “Say this to Joab: ‘Do not let this matter upset you, for the sword devours one as well as another. Strengthen your attack against the city and demolish it.’ Encourage him with these words.”
Davidi alobaki na ntoma: — Tala makambo oyo okoloba na Joabi: « Tika ete likambo oyo etungisa yo te. Mopanga ekoki koboma songolo to pakala. Sala makasi mpo na kobundisa engumba mpe bebisa yango. » Loba makambo oyo mpo na kolendisa Joabi.
26 When Uriah’s wife heard that her husband was dead, she mourned for him.
Tango mwasi ya Iri ayokaki ete mobali na ye akufi, asalelaki ye matanga.
27 And when the time of mourning was over, David had her brought to his house, and she became his wife and bore him a son. But the thing that David had done was evil in the sight of the LORD.
Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te.

< 2 Samuel 11 >