< 2 Kings 5 >

1 Now Naaman, the commander of the army of the king of Aram, was a great man in his master’s sight and highly regarded, for through him the LORD had given victory to Aram. And he was a mighty man of valor, but he was a leper.
Namani, mokonzi ya basoda ya mokonzi ya Siri, azalaki moto monene mpe moto ya lokumu mingi na miso ya nkolo na ye, pamba te, na nzela na ye, Yawe apesaki bato ya Siri elonga. Azalaki soda ya mpiko, kasi azalaki na bokono ya maba.
2 At this time the Arameans had gone out in bands and had taken a young girl from the land of Israel, and she was serving Naaman’s wife.
Nzokande, tango mampinga ya bato ya Siri babimaki na bitumba, bakangaki na bowumbu elenge mwasi moko ya Isalaele. Boye akomaki kosalela mwasi ya Namani.
3 She said to her mistress, “If only my master would go to the prophet who is in Samaria, he would cure him of his leprosy.”
Elenge mwasi yango alobaki na nkolo na ye ya mwasi: — Ah, soki kaka nkolo na ngai, Namani, akokaki komona mosakoli oyo azali kati na Samari! Akoki penza kobikisa ye na bokono na ye ya maba.
4 And Naaman went and told his master what the girl from the land of Israel had said.
Namani akendeki epai ya nkolo na ye mpe abetelaki ye lisolo ya makambo oyo elenge mwasi ya Isalaele alobaki.
5 “Go now,” said the king of Aram, “and I will send you with a letter to the king of Israel.” So Naaman departed, taking with him ten talents of silver, six thousand shekels of gold, and ten sets of clothing.
Mokonzi ya Siri alobaki na ye: — Malamu! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo.
6 And the letter that he took to the king of Israel stated: “With this letter I am sending my servant Naaman, so that you may cure him of his leprosy.”
Apesaki epai ya mokonzi ya Isalaele mokanda oyo elobaki: « Na nzela ya mokanda oyo, natindeli yo mosali na ngai, Namani, mpo ete obikisa ye na bokono na ye ya maba. »
7 When the king of Israel read the letter, he tore his clothes and asked, “Am I God, killing and giving life, that this man expects me to cure a leper? Surely you can see that he is seeking a quarrel with me!”
Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki: « Boni, ngai nazali Nzambe? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo! »
8 Now when Elisha the man of God heard that the king of Israel had torn his clothes, he sent a message to the king: “Why have you torn your clothes? Please let the man come to me, and he will know that there is a prophet in Israel.”
Tango Elize, moto na Nzambe, ayokaki ete mokonzi ya Isalaele apasolaki bilamba na ye, atindelaki ye liloba oyo: « Mpo na nini opasoli bilamba na yo? Tika ete moto wana aya epai na ngai, mpe akoyeba ete ezali na mosakoli moko kati na Isalaele! »
9 So Naaman came with his horses and chariots and stood at the door of Elisha’s house.
Boye Namani akendeki elongo na bampunda na ye mpe shar na ye, mpe atelemaki na ekotelo ya ndako ya Elize.
10 Then Elisha sent him a messenger, who said, “Go and wash yourself seven times in the Jordan, and your flesh will be restored, and you will be clean.”
Elize atindaki moto moko mpo na koyebisa Namani: — Kende kosukola mbala sambo na ebale Yordani; bongo nzoto na yo ekobongwana, mpe okokoma peto.
11 But Naaman went away angry, saying, “I thought that he would surely come out, stand and call on the name of the LORD his God, and wave his hand over the spot to cure my leprosy.
Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki: — Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba!
12 Are not the Abanah and Pharpar, the rivers of Damascus, better than all the waters of Israel? Could I not have washed in them and been cleansed?” So he turned and went away in a rage.
Boni, bibale Abana mpe Paripari kati na Damasi ezali motuya te koleka miluka nyonso ya Isalaele? Nakokaki te kosukola na bibale wana mpe kokoma peto? Boye, abalukaki mpe akendeki na kanda.
13 Naaman’s servants, however, approached him and said, “My father, if the prophet had told you to do some great thing, would you not have done it? How much more, then, when he tells you, ‘Wash and be cleansed’?”
Kasi basali na ye bapusanaki mpe balobaki na ye: — Nkolo, soki mosakoli ayebisaki yo ete osala likambo moko ya monene, boni, olingaki kosala yango te? Bongo mpo na nini te koleka, tango azali koloba na yo: « Sukola, mpe okokoma peto! »
14 So Naaman went down and dipped himself in the Jordan seven times, according to the word of the man of God, and his flesh was restored and became like that of a little child, and he was clean.
Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali.
15 Then Naaman and all his attendants went back to the man of God, stood before him, and declared, “Now I know for sure that there is no God in all the earth except in Israel. So please accept a gift from your servant.”
Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki: — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo.
16 But Elisha replied, “As surely as the LORD lives, before whom I stand, I will not accept it.” And although Naaman urged him to accept it, he refused.
Mosakoli Elize azongisaki: — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka.
17 “If you will not,” said Naaman, “please let me, your servant, be given as much soil as a pair of mules can carry. For your servant will never again make a burnt offering or a sacrifice to any other god but the LORD.
Namani alobaki: — Lokola oboyi, pesa nzela ete napesa mosali na yo ndambo ya mabele oyo bamile mibale ekoki komema, pamba te mosali na yo akoki te kobonzela banzambe mosusu bambeka ya kotumba to bambeka ya boyokani, bobele Yawe.
18 Yet may the LORD forgive your servant this one thing: When my master goes into the temple of Rimmon to worship there, and he leans on my arm, and I bow down in the temple of Rimmon, may the LORD forgive your servant in this matter.”
Kasi tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na likambo oyo: tango nkolo na ngai akotaka na ndako ya nzambe Rimoni mpo na kogumbama, nagumbamaka elongo na ye, pamba te alalelaka loboko na ngai. Tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na yango.
19 “Go in peace,” said Elisha. But after Naaman had traveled a short distance,
Elize alobaki na ye: — Kende na kimia! Tango Namani akomaki mwa mosika,
20 Gehazi, the servant of Elisha the man of God, said, “Look, my master has spared this Aramean, Naaman, while not accepting what he brought. As surely as the LORD lives, I will run after him and get something from him.”
Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki: « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. »
21 So Gehazi pursued Naaman. And when Naaman saw him running toward him, he got down from the chariot to meet him and asked, “Is everything all right?”
Boye Geazi alandaki Namani mbangu. Tango Namani amonaki ye kopota mbangu na sima na ye, akitaki na shar na ye mpo na kokutana na ye mpe atunaki ye: — Boni, nyonso ezali malamu?
22 “Everything is all right,” Gehazi replied. “My master has sent me to say, ‘I have just now discovered that two young men from the sons of the prophets have come to me from the hill country of Ephraim. Please give them a talent of silver and two sets of clothing.’”
Geazi azongisaki: — Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo: « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. »
23 But Naaman insisted, “Please, take two talents.” And he urged Gehazi to accept them. Then he tied up two talents of silver in two bags along with two sets of clothing and gave them to two of his servants, who carried them ahead of Gehazi.
Namani alobaki: — Kamata bakilo ya palata, tuku sambo. Atungisaki Geazi ete azwa yango. Boye, atiaki bakilo ya palata, tuku sambo kati na basaki mibale elongo na bilamba mibale ya talo. Namani apesaki yango epai ya basali na ye mibale oyo bamemaki yango liboso ya Geazi.
24 When Gehazi came to the hill, he took the gifts from the servants and stored them in the house. Then he dismissed the men, and they departed.
Tango Geazi akomaki na ngomba, azwaki biloko na maboko ya basali ya Namani mpe atiaki yango kati na ndako. Azongisaki basali yango, mpe bakendeki.
25 When Gehazi went in and stood before his master, Elisha asked him, “Gehazi, where have you been?” “Your servant did not go anywhere,” he replied.
Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye: — Geazi, okendeki wapi? Geazi azongisaki: — Mosali na yo akendeki epai moko te.
26 But Elisha questioned him, “Did not my spirit go with you when the man got down from his chariot to meet you? Is this the time to accept money and clothing, olive groves and vineyards, sheep and oxen, menservants and maidservants?
Kasi Elize alobaki na ye: — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi?
27 Therefore, the leprosy of Naaman will cling to you and your descendants forever!” And as Gehazi left his presence, he was leprous—as white as snow.
Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela. Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe.

< 2 Kings 5 >