< 2 Chronicles 11 >

1 When Rehoboam arrived in Jerusalem, he mobilized the house of Judah and Benjamin—180,000 chosen warriors—to fight against Israel and restore the kingdom to Rehoboam.
Tango Roboami azongaki na Yelusalemi, asangisaki mabota ya Yuda mpe ya Benjame, aponaki bilombe ya bitumba nkoto nkama moko na tuku mwambe mpo na kobundisa Isalaele mpe kozongisa bokonzi na maboko ya Roboami.
2 But the word of the LORD came to Shemaiah the man of God:
Kasi Yawe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe:
3 “Tell Rehoboam son of Solomon king of Judah and all the Israelites in Judah and Benjamin
— Yebisa Roboami, mwana mobali ya Salomo, mokonzi ya Yuda, mpe bana nyonso ya Isalaele oyo bazali kati na Yuda mpe Benjame:
4 that this is what the LORD says: ‘You are not to go up and fight against your brothers. Each of you must return home, for this word is from Me.’” So they listened to the words of the LORD and turned back from going against Jeroboam.
« Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Bokende te kobundisa bandeko na bino! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › » Batosaki Liloba na Yawe, bazongaki na bandako na bango mpe batikaki mabongisi ya kobundisa Jeroboami.
5 Rehoboam continued to live in Jerusalem, and he built up cities for defense in Judah.
Wana Roboami avandaki na Yelusalemi, atongaki bamir zingazinga ya bingumba ebele ya Yuda mpo na kolendisa yango.
6 He built up Bethlehem, Etam, Tekoa,
Alendisaki Beteleemi, Etami, Tekoa,
7 Beth-zur, Soco, Adullam,
Beti-Tsuri, Soko, Adulami,
8 Gath, Mareshah, Ziph,
Gati, Maresha, Zifi,
9 Adoraim, Lachish, Azekah,
Adorayimi, Lakishi, Azeka,
10 Zorah, Aijalon, and Hebron, the fortified cities in Judah and Benjamin.
Tsorea, Ayaloni mpe Ebron. Oyo nde ezalaki bingumba batonga makasi kati na Yuda mpe Benjame.
11 He strengthened their fortresses and put officers in them, with supplies of food, oil, and wine.
Atongaki zingazinga na yango bamir, atiaki kuna bayangeli mpe bibombelo ya biloko ya kolia, ya mafuta mpe ya vino.
12 He also put shields and spears in all the cities and strengthened them greatly. So Judah and Benjamin belonged to him.
Kati na bingumba yango nyonso, atiaki banguba minene mpe makonga mpo na kokomisa yango makasi koleka. Boye Yuda mpe Benjame ekomaki ya Roboami.
13 Moreover, the priests and Levites from all their districts throughout Israel stood with Rehoboam.
Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bazalaki kati na Isalaele mobimba bayaki kosangana na Roboami wuta na bituka na bango nyonso.
14 For the Levites left their pasturelands and their possessions and went to Judah and Jerusalem, because Jeroboam and his sons had rejected them as priests of the LORD.
Balevi batikaki bandako mpe mabele na bango, bakendeki na Yuda mpe na Yelusalemi, pamba te Jeroboami mpe bana na ye ya mibali bapekisaki bango kosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe ya Yawe.
15 And Jeroboam appointed his own priests for the high places and for the goat demons and calf idols he had made.
Boye, ye moko Jeroboami aponaki banganga-nzambe mpo na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe mpo na banzambe ya bikeko oyo asalaki na lolenge ya bantaba ya mibali mpe ya bana ngombe.
16 Those from every tribe of Israel who had set their hearts to seek the LORD their God followed the Levites to Jerusalem to sacrifice to the LORD, the God of their fathers.
Bato ya mabota nyonso ya Isalaele, oyo balukaka Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mitema na bango mobimba balandaki Balevi, na Yelusalemi, mpo na kobonzela Yawe, Nzambe ya batata na bango, mbeka.
17 So they strengthened the kingdom of Judah and supported Rehoboam son of Solomon for three years, because they walked for three years in the way of David and Solomon.
Mibu misato, balendisaki bokonzi ya Yuda mpe nguya ya Roboami, mwana mobali ya Salomo; pamba te mibu misato yango, balandaki ndakisa ya Davidi mpe ya Salomo.
18 And Rehoboam married Mahalath, who was the daughter of David’s son Jerimoth and of Abihail, the daughter of Jesse’s son Eliab.
Roboami abalaki Maalati, mwana mwasi ya Yerimoti, mwana mobali ya Davidi mpe ya Abiyaili, mwana mwasi ya Eliabi, mwana mobali ya Izayi.
19 She bore sons to him: Jeush, Shemariah, and Zaham.
Maalati abotelaki Roboami bana mibali oyo: Yewushi, Shemaria mpe Zaami.
20 After her, he married Maacah daughter of Absalom, and she bore to him Abijah, Attai, Ziza, and Shelomith.
Sima, Roboami abalaki Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, oyo abotelaki ye: Abiya, Atayi, Ziza mpe Shelomiti.
21 Rehoboam loved Maacah daughter of Absalom more than all his wives and concubines. In all, he had eighteen wives and sixty concubines, and he was the father of twenty-eight sons and sixty daughters.
Roboami alingaki mingi Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, koleka basi mpe bamakangu na ye nyonso. Azalaki na basi zomi na mwambe mpe bamakangu tuku motoba; mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mwambe mpe bana basi tuku motoba.
22 Rehoboam appointed Abijah son of Maacah as chief prince among his brothers, intending to make him king.
Roboami aponaki Abiya, mwana mobali ya Maaka, mpo ete azala mokambi ya liboso ya bandeko na ye ya mibali, pamba te azalaki na makanisi ya kokomisa ye mokonzi.
23 Rehoboam also acted wisely by dispersing some of his sons throughout the districts of Judah and Benjamin, and to all the fortified cities. He gave them abundant provisions and sought many wives for them.
Boye, asalelaki mayele ya kopanza bana na ye nyonso ya mibali kati na bituka nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, kati na bingumba nyonso batonga makasi; apesaki bango bilei mpe basi ebele.

< 2 Chronicles 11 >