< 1 Samuel 29 >

1 Now the Philistines brought all their forces together at Aphek, while Israel camped by the spring in Jezreel.
Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli.
2 As the Philistine leaders marched out their units of hundreds and thousands, David and his men marched behind them with Achish.
Wana bakambi ya bato ya Filisitia batambolaki liboso ya mampinga na bango ya bankama mpe ya bankoto ya basoda, Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na sima elongo na mokonzi Akishi.
3 Then the commanders of the Philistines asked, “What about these Hebrews?” Achish replied, “Is this not David, the servant of King Saul of Israel? He has been with me all these days, even years, and from the day he defected until today I have found no fault in him.”
Bakonzi ya basoda ya Filisitia batunaki: — Ba-Ebre oyo bazali kosala nini awa? Akishi alobaki na bango: — Ezali Davidi, mosali ya Saulo, mokonzi ya Isalaele. Azali elongo na ngai wuta mibu mpe mikolo; mpe natikali nanu kokanga ye ata na mbeba moko te.
4 But the commanders of the Philistines were angry with Achish and told him, “Send that man back and let him return to the place you assigned him. He must not go down with us into battle only to become our adversary during the war. What better way for him to regain the favor of his master than with the heads of our men?
Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia batombokelaki Akishi mpe balobaki: — Zongisa moto oyo! Tika ete azonga na esika oyo otiaki ye; asengeli te kokende elongo na biso na bitumba, noki te akobalukela biso na tango ya bitumba. Mpe ndenge nini moto oyo akoki kosepelisa lisusu mokonzi na ye, soki na komema mito ya bato na biso moko te?
5 Is this not the David about whom they sing in their dances: ‘Saul has slain his thousands, and David his tens of thousands’?”
Ezali Davidi wana te oyo na tina na ye babandaki koyemba mpe kobina: « Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi. »
6 So Achish summoned David and told him, “As surely as the LORD lives, you have been upright in my sight, and it seems right that you should march in and out with me in the army, because I have found no fault in you from the day you came to me until this day. But you have no favor in the sight of the leaders.
Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye: — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te.
7 Therefore turn back now and go in peace, so that you will not do anything to displease the leaders of the Philistines.”
Boye, zonga mpe kende na kimia; kosala eloko moko te oyo ekosepelisa te bakambi ya bato ya Filisitia.
8 “But what have I done?” David replied. “What have you found against your servant, from the day I came to you until today, to keep me from going along to fight against the enemies of my lord the king?”
Davidi atunaki Akishi: — Nasali nini? Eloko nini ya mabe oyo omoni epai ya mosali na yo wuta mokolo oyo nayaki epai na yo kino lelo? Mpo na nini nakoki te kokende kobundisa banguna ya mokonzi, nkolo na ngai?
9 Achish replied, “I know that you are as pleasing in my sight as an angel of God. But the commanders of the Philistines have said, ‘He must not go into battle with us.’
Akishi azongiselaki Davidi: — Nayebi ete osepelisaka ngai lokola Anjelu na Nzambe, Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia balobi: « Asengeli te kokende elongo na biso na bitumba. »
10 Now then, get up early in the morning, along with your master’s servants who came with you, and go as soon as it is light.”
Boye, lamuka na tongo makasi, yo mpe basoda ya nkolo na yo, oyo bayaki elongo na yo. Bolamuka na tongo makasi mpe bokende wana moyi ekobima.
11 So David and his men got up early in the morning to return to the land of the Philistines. And the Philistines went up to Jezreel.
Boye, Davidi mpe bato na ye batelemaki na tongo makasi mpo na kozonga na mokili ya bato ya Filisitia; mpe bato ya Filisitia bakendeki na Jizireyeli.

< 1 Samuel 29 >