< 1 Samuel 16 >
1 Now the LORD said to Samuel, “How long are you going to mourn for Saul, since I have rejected him as king over Israel? Fill your horn with oil and go. I am sending you to Jesse of Bethlehem, for I have selected from his sons a king for Myself.”
Yawe alobaki na Samuele: — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi.
2 “How can I go?” Samuel asked. “Saul will hear of it and kill me!” The LORD answered, “Take a heifer with you and say, ‘I have come to sacrifice to the LORD.’
Samuele alobaki: — Nakokende ndenge nini? Soki Saulo ayoki bongo akoboma ngai. Yawe azongiselaki ye: — Kamata mwana ngombe ya mwasi elongo na yo mpe loba: « Nakeyi kobonzela Yawe mbeka. »
3 Then invite Jesse to the sacrifice, and I will show you what you are to do. You are to anoint for Me the one I indicate.”
Bongo tango okotumba mbeka, okobengisa Izayi; mpe Ngai moko nakolakisa yo nini oyo osengeli kosala. Moto oyo nakolakisa yo, okopakola ye mafuta mpo na Ngai.
4 So Samuel did what the LORD had said and went to Bethlehem. When the elders of the town met him, they trembled and asked, “Do you come in peace?”
Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye: — Boni, koya na yo ezali ya kimia?
5 “In peace,” he replied. “I have come to sacrifice to the LORD. Consecrate yourselves and come with me to the sacrifice.” Then he consecrated Jesse and his sons and invited them to the sacrifice.
Samuele azongisaki: — Solo, koya na ngai ezali ya kimia. Nayei mpo na kobonzela Yawe mbeka. Bomibulisa mpe boya kotumba mbeka elongo na ngai. Bongo abulisaki Izayi elongo na bana na ye ya mibali mpe abengisaki bango na kotumba mbeka elongo na ye.
6 When they arrived, Samuel saw Eliab and said, “Surely here before the LORD is His anointed.”
Tango bakomaki, Samuele atalaki Eliabi mpe amilobelaki: « Solo, mopakolami na Yawe atelemi awa liboso na Ye. »
7 But the LORD said to Samuel, “Do not consider his appearance or height, for I have rejected him; the LORD does not see as man does. For man sees the outward appearance, but the LORD sees the heart.”
Kasi Yawe alobaki na Samuele: — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.
8 Then Jesse called Abinadab and presented him to Samuel, who said, “The LORD has not chosen this one either.”
Bongo Izayi abengisaki Abinadabi mpe alekisaki ye liboso ya Samuele. Kasi Samuele alobaki: « Ezali ye te nde Yawe aponi. »
9 Next Jesse presented Shammah, but Samuel said, “The LORD has not chosen this one either.”
Izayi alekisaki lisusu Shama liboso ya Samuele, kasi Samuele alobaki: « Ezali ye te nde Yawe aponi. »
10 Thus Jesse made seven of his sons pass before Samuel, but Samuel told him, “The LORD has not chosen any of these.”
Izayi alekisaki liboso ya Samuele bana sambo na ye ya mibali. Kasi Samuele alobaki na ye: « Yawe aponi moko te kati na bango. »
11 And Samuel asked him, “Are these all the sons you have?” “There is still the youngest,” Jesse replied, “but he is tending the sheep.” “Send for him,” Samuel replied. “For we will not sit down to eat until he arrives.”
Bongo Samuele atunaki Izayi: — Boni, bana na yo ya mibali bakoki bango nyonso? Izayi azongisaki: — Te! Ezali lisusu na moko oyo aleki bolenge, kasi azali koleisa bampate. Samuele alobaki: — Bengisa ye, pamba te tokovanda na mesa te soki akomi nanu te.
12 So Jesse sent for his youngest son and brought him in. He was ruddy, with beautiful eyes and a handsome appearance. And the LORD said, “Rise and anoint him, for he is the one.”
Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele: « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. »
13 So Samuel took the horn of oil and anointed him in the presence of his brothers, and the Spirit of the LORD rushed upon David from that day forward. Then Samuel set out and went to Ramah.
Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama.
14 After the Spirit of the LORD had departed from Saul, a spirit of distress from the LORD began to torment him.
Molimo na Yawe alongwaki na Saulo, mpe molimo mabe kowuta na Yawe etungisaki ye.
15 Saul’s servants said to him, “Surely a spirit of distress from God is tormenting you.
Basali ya Saulo bayebisaki ye: — Tala, molimo moko ya mabe ewuti na Yawe mpe ezali kotungisa yo.
16 Let our lord command your servants here to seek out someone who can skillfully play the harp. Whenever the spirit of distress from God is upon you, he is to play it, and you will be well.”
Tika ete nkolo na biso atinda basali na ye, oyo bazali awa mpo ete balukela ye moto moko oyo ayebi kobeta lindanda. Wana molimo mabe oyo ewuti na Yawe ekoya kotungisa yo, ye akobeta lindanda na ye, mpe yo okoyoka nzoto malamu.
17 And Saul commanded his servants, “Find me someone who plays well, and bring him to me.”
Boye Saulo alobaki na basali na ye: — Bolukela ngai moto moko oyo ayebi kobeta lindanda malamu, mpe boya na ye epai na ngai.
18 One of the servants answered, “I have seen a son of Jesse of Bethlehem who knows how to play the harp. He is a mighty man of valor, a warrior, eloquent and handsome, and the LORD is with him.”
Moko kati na basali na ye azongisaki: — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza; Yawe mpe azalaka elongo na ye.
19 So Saul sent messengers to Jesse and said, “Send me your son David, who is with the sheep.”
Saulo atindaki bantoma epai ya Izayi mpo na koloba na ye: « Tindela ngai Davidi, mwana na yo ya mobali, oyo azali koleisa bampate. »
20 And Jesse took a donkey loaded with bread, a skin of wine, and one young goat, and sent them to Saul with his son David.
Izayi azwaki ane moko; atiaki na likolo na yango mapa, mbeki moko ya vino mpe mwana ntaba, mpe atindaki yango epai ya Saulo elongo na Davidi, mwana na ye ya mobali.
21 When David came to Saul and entered his service, Saul admired him greatly, and David became his armor-bearer.
Davidi ayaki epai ya Saulo mpe akomaki kosala epai na ye. Saulo alingaki ye makasi, mpe Davidi akomaki komemela Saulo bibundeli.
22 Then Saul sent word to Jesse, saying, “Let David remain in my service, for I am pleased with him.”
Saulo atindaki maloba epai ya Izayi: « Nabondeli yo, tika ete Davidi akoba kosala epai na ngai, pamba te nazali kosepela na ye. »
23 And whenever the spirit from God came upon Saul, David would pick up his harp and play, and Saul would become well, and the spirit of distress would depart from him.
Tango nyonso molimo mabe kowuta na Nzambe ezalaki koya kotungisa Saulo, Davidi azalaki kozwa lindanda na ye mpe kobeta yango. Mpe pema ya Saulo ezalaki kokita, azalaki koyoka nzoto malamu, mpe molimo mabe yango ezalaki kolongwa kati na ye.