< 1 Samuel 15 >

1 Then Samuel said to Saul, “The LORD sent me to anoint you king over His people Israel. Now therefore, listen to the words of the LORD.
Samuele alobaki na Saulo: « Yawe atindaki ngai kopakola yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya bato na Ye, Isalaele. Boye, yoka sik’oyo makambo oyo ewuti epai na Yawe.
2 This is what the LORD of Hosts says: ‘I witnessed what the Amalekites did to the Israelites when they ambushed them on their way up from Egypt.
Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi: ‹ Nakopesa bato ya Amaleki etumbu mpo na makambo oyo basalaki Isalaele tango bawutaki na Ejipito: bakangelaki Isalaele nzela.
3 Now go and attack the Amalekites and devote to destruction all that belongs to them. Do not spare them, but put to death men and women, children and infants, oxen and sheep, camels and donkeys.’”
Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › »
4 So Saul summoned the troops and numbered them at Telaim—200,000 foot soldiers and 10,000 men of Judah.
Boye Saulo abengisaki basoda, mpe atangaki bango na Telayimi: basoda oyo babundaka na makolo, nkoto nkama mibale; mpe basoda oyo bawutaki na Yuda, nkoto zomi.
5 Saul came to the city of Amalek and lay in wait in the valley.
Saulo akendeki kino na engumba ya Amaleki mpe atiaki basoda na bisika ya kobombama, na lubwaku.
6 And he warned the Kenites, “Since you showed kindness to all the Israelites when they came up out of Egypt, go on and get away from the Amalekites. Otherwise I will sweep you away with them.” So the Kenites moved away from the Amalekites.
Bongo Saulo alobaki na bato ya Keni: « Bokende na bino, bolongwa na milongo ya bato ya Amaleki mpo ete nabebisa bino te elongo na bango, pamba te bosalelaki bato nyonso ya Isalaele bolamu tango babimaki na Ejipito. » Boye bato ya Keni balongwaki na milongo ya bato ya Amaleki.
7 Then Saul struck down the Amalekites all the way from Havilah to Shur, which is east of Egypt.
Saulo abundisaki bato ya Amaleki nzela mobimba, longwa na Avila kino na Shuri, na ngambo ya este ya Ejipito.
8 He captured Agag king of Amalek alive, but devoted all the others to destruction with the sword.
Akangaki ya bomoi Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki, mpe abebisaki bato nyonso na mopanga.
9 Saul and his troops spared Agag, along with the best of the sheep and cattle, the fat calves and lambs, and the best of everything else. They were unwilling to destroy them, but they devoted to destruction all that was despised and worthless.
Kasi Saulo mpe basoda babatelaki Agagi elongo na bibwele oyo elekaki kitoko kati na bameme, bantaba mpe bangombe, bibwele oyo eleki minene, bana meme oyo ya minene mpe nyonso oyo ezalaki malamu. Baboyaki kobebisa yango; babebisaki kaka oyo ezalaki ya mabe mpe ya kokonda.
10 Then the word of the LORD came to Samuel, saying,
Yawe alobaki na Samuele:
11 “I regret that I have made Saul king, for he has turned away from following Me and has not carried out My instructions.” And Samuel was distressed and cried out to the LORD all that night.
— Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba.
12 Early in the morning Samuel got up to confront Saul, but he was told, “Saul has gone to Carmel, and behold, he has set up a monument for himself and has turned and gone down to Gilgal.”
Na tongo-tongo, Samuele atelemaki mpo na kokende kokutana na Saulo. Kasi bayebisaki ye: « Saulo akei na Karimeli, atongi kuna ekeko mpo na ye moko, bongo alongwe kuna mpe akei kino na Giligali. »
13 When Samuel reached him, Saul said to him, “May the LORD bless you. I have carried out the LORD’s instructions.”
Samuele akendeki epai ya Saulo, mpe Saulo alobaki na ye: — Tika ete Yawe apambola yo! Natosaki mitindo ya Yawe.
14 But Samuel replied, “Then what is this bleating of sheep and lowing of cattle that I hear?”
Kasi Samuele alobaki: — Makelele oyo nazali koyoka ezali te koganga ya bameme mpe ya bangombe?
15 Saul answered, “The troops brought them from the Amalekites; they spared the best sheep and cattle to sacrifice to the LORD your God, but the rest we devoted to destruction.”
Saulo azongisaki: — Basoda babotolaki yango na maboko ya bato ya Amaleki; babatelaki kati na bibwele bameme mpe bangombe oyo elekaki kitoko mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na biso; kasi nyonso wana mosusu, tobebisaki yango penza.
16 “Stop!” exclaimed Samuel. “Let me tell you what the LORD said to me last night.” “Tell me,” Saul replied.
Samuele alobaki na Saulo: — Kata! Tika ete nayebisa yo makambo oyo Yawe alobaki na ngai na butu oyo ewuti koleka. Saulo alobaki na ye: — Yebisa ngai yango!
17 And Samuel said, “Although you were once small in your own eyes, have you not become the head of the tribes of Israel? The LORD anointed you king over Israel
Samuele alobaki: — Atako ozalaki komimona moto pamba na miso na yo moko, kasi boni, okomaki te mokonzi ya bikolo ya Isalaele? Yawe apakolaki yo mafuta mpo ete ozala mokonzi ya Isalaele.
18 and sent you on a mission, saying, ‘Go and devote to destruction the sinful Amalekites. Fight against them until you have wiped them out.’
Yawe apesaki yo etinda mpe alobaki: « Kende mpe bebisa penza bato oyo ya masumu, bato ya Amaleki; bundisa bango kino okosilisa koboma bango. »
19 So why did you not obey the LORD? Why did you rush upon the plunder and do evil in the sight of the LORD?”
Mpo na nini otosaki Yawe te? Mpo na nini owelaki kozwa bomengo ya bitumba, mpe osalaki mabe na miso ya Yawe?
20 “But I did obey the LORD,” Saul replied. “I went on the mission that the LORD gave me. I brought back Agag king of Amalek and devoted the Amalekites to destruction.
Saulo azongiselaki Samuele: — Ngai natosaki Yawe, nakokisaki etinda oyo apesaki ngai: Nabebisaki penza bato ya Amaleki, namemaki kutu Agagi, mokonzi na bango.
21 The troops took sheep and cattle from the plunder, the best of the things devoted to destruction, in order to sacrifice them to the LORD your God at Gilgal.”
Kasi basoda bazwaki kati na bomengo ya bitumba bameme mpe bangombe oyo elekaki malamu kati na oyo Nzambe asengaki ete ebebisama, mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na yo, na Giligali.
22 But Samuel declared: “Does the LORD delight in burnt offerings and sacrifices as much as in obedience to His voice? Behold, obedience is better than sacrifice, and attentiveness is better than the fat of rams.
Samuele alobaki: — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye? Te! Botosi eleki mbeka; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali.
23 For rebellion is like the sin of divination, and arrogance is like the wickedness of idolatry. Because you have rejected the word of the LORD, He has rejected you as king.”
Pamba te botomboki ekokani na lisumu ya kosambela banzambe ya bikeko. Lokola obwaki Liloba na Yawe, Ye mpe abwaki yo; ozali lisusu mokonzi te.
24 Then Saul said to Samuel, “I have sinned; I have transgressed the LORD’s commandment and your instructions, because I feared the people and obeyed their voice.
Bongo Saulo alobaki na Samuele: — Nasali lisumu, nabuki mobeko ya Yawe mpe malako na Ye. Nabangaki bato, yango wana natosaki bango.
25 Now therefore, please forgive my sin and return with me so I can worship the LORD.”
Sik’oyo nabondeli yo, limbisa masumu na ngai; mpe zonga elongo na ngai, mpo ete nakoka kogumbamela Yawe.
26 “I will not return with you,” Samuel replied. “For you have rejected the word of the LORD, and He has rejected you as king over Israel.”
Kasi Samuele alobaki na Saulo: — Nakozonga elongo na yo te; pamba te lokola obwakaki Liloba na Yawe, Yawe mpe abwaki yo mpe ozali lisusu mokonzi ya Isalaele te.
27 As Samuel turned to go, Saul grabbed the hem of his robe, and it tore.
Lokola Samuele abalukaki mpo na kokende, Saulo akangaki ye na songe ya kazaka na ye, mpe kazaka epasukaki.
28 So Samuel said to him, “The LORD has torn the kingdom of Israel from you today and has given it to your neighbor who is better than you.
Bongo Samuele alobaki na ye: — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo.
29 Moreover, the Glory of Israel does not lie or change His mind, for He is not a man, that He should change His mind.”
Ye oyo azali nkembo ya Isalaele akosaka te mpe abongolaka makanisi na Ye te, pamba te azali moto te mpo ete abongola makanisi na Ye.
30 “I have sinned,” Saul replied. “Please honor me now before the elders of my people and before Israel. Come back with me, so that I may worship the LORD your God.”
Saulo alobaki: — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo: pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo.
31 So Samuel went back with Saul, and Saul worshiped the LORD.
Boye Samuele akendeki elongo na Saulo, mpe Saulo agumbamelaki Yawe.
32 Then Samuel said, “Bring me Agag king of the Amalekites.” Agag came to him cheerfully, for he thought, “Surely the bitterness of death is past.”
Kasi Samuele alobaki na ye: « Memela ngai Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki. » Agagi ayaki na esengo, pamba te azalaki komilobela: « Solo, pasi ya kufa elongwe mpe ekeyi mosika na ngai. »
33 But Samuel declared: “As your sword has made women childless, so your mother will be childless among women.” And Samuel hacked Agag to pieces before the LORD at Gilgal.
Kasi Samuele alobaki: « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali.
34 Then Samuel went to Ramah, but Saul went up to his home in Gibeah of Saul.
Bongo Samuele azongaki na Rama, mpe Saulo akendeki na ndako na ye, na Gibea ya Saulo.
35 And to the day of his death, Samuel never again visited Saul. Samuel mourned for Saul, and the LORD regretted that He had made Saul king over Israel.
Kino na mokolo oyo Samuele akufaki, atikalaki komona lisusu Saulo te. Samuele asalaki matanga mpo na Saulo. Mpe Yawe ayokaki mawa na ndenge akomisaki Saulo mokonzi ya Isalaele.

< 1 Samuel 15 >