< 1 Kings 13 >

1 Suddenly, as Jeroboam was standing beside the altar to burn incense, there came a man of God from Judah to Bethel by the word of the LORD.
Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.
2 And he cried out against the altar by the word of the LORD, “O altar, O altar, this is what the LORD says: ‘A son named Josiah will be born to the house of David, and upon you he will sacrifice the priests of the high places who burn incense upon you, and human bones will be burned upon you.’”
Kolanda etinda na Yawe, moto na Nzambe agangaki makasi mpo na kolakela etumbelo mabe: « Etumbelo, etumbelo! Tala liloba oyo Yawe alobi: ‹ Mwana mobali moko akobotama na ndako ya Davidi, kombo na ye ekozala Joziasi. Akotumba na likolo na yo lokola mbeka banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba, oyo batumbaka ansa na likolo na yo. Mpe na likolo na yo, etumbelo, bakotumba mikuwa ya bato! › »
3 That day the man of God gave a sign, saying, “The LORD has spoken this sign: ‘Surely the altar will be split apart, and the ashes upon it will be poured out.’”
Na mokolo wana kaka, moto na Nzambe apesaki elembo: — Tala elembo oyo elakisi ete ezali Yawe nde alobi: Etumbelo ekobukana mpe putulu oyo ezali likolo na yango ekopanzana.
4 Now when King Jeroboam, who was at the altar in Bethel, heard the word that the man of God had cried out against it, he stretched out his hand and said, “Seize him!” But the hand he stretched out toward him withered, so that he could not pull it back.
Tango mokonzi Jeroboami ayokaki bilakeli mabe oyo moto na Nzambe alobaki mpo na etumbelo ya Beteli, asembolaki loboko na ye wuta na etumbelo mpe alobaki: — Bokanga ye! Kasi loboko oyo Jeroboami asembolaki epai ya moto na Nzambe ekawukaki, mpe akokaki lisusu te kozongisa yango epai na ye.
5 And the altar was split apart, and the ashes poured out, according to the sign that the man of God had given by the word of the LORD.
Kaka na tango yango, etumbelo ebukanaki mpe putulu epanzanaki. Ezalaki penza elembo oyo moto na Nzambe apesaki kolanda etinda na Yawe.
6 Then the king responded to the man of God, “Intercede with the LORD your God and pray that my hand may be restored.” So the man of God interceded with the LORD, and the king’s hand was restored to him as it was before.
Mokonzi alobaki na moto na Nzambe: — Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpe sambela mpo na ngai ete loboko na ngai ebonga. Moto na Nzambe abondelaki Yawe, mpe loboko ya mokonzi ebongaki, ezongaki ndenge ezalaki liboso.
7 Then the king said to the man of God, “Come home with me and refresh yourself, and I will give you a reward.”
Bongo mokonzi alobaki na moto na Nzambe: — Tokende na ndako mpo ete ozwa eloko ya kolia mpe napesa yo kado.
8 But the man of God replied, “If you were to give me half your possessions, I still would not go with you, nor would I eat bread or drink water in this place.
Kasi moto na Nzambe azongiselaki mokonzi: — Ata soki opesi ngai kati-kati ya bozwi na yo, nakokende epai na yo te, nakolia lipa te mpe nakomela ata litanga ya mayi te na esika oyo.
9 For this is what I was commanded by the word of the LORD: ‘You must not eat bread or drink water or return by the way you came.’”
Pamba te Yawe apesaki ngai mitindo oyo: « Osengeli te kolia lipa, komela mayi mpe kozongela na nzela oyo oyelaki. »
10 So the man of God went another way and did not return by the way he had come to Bethel.
Boye, akendeki na nzela mosusu mpe azongaki te na nzela oyo ayelaki na Beteli.
11 Now a certain old prophet was living in Bethel, and his sons came and told him all the deeds that the man of God had done that day in Bethel. They also told their father the words that the man had spoken to the king.
Nzokande, mosakoli moko ya mobange azalaki kovanda na Beteli; bana na ye ya mibali bayaki koyebisa ye makambo nyonso oyo moto na Nzambe asalaki na Beteli, na mokolo wana, mpe oyo alobaki na mokonzi.
12 “Which way did he go?” their father asked. And his sons showed him the way taken by the man of God, who had come from Judah.
Tata na bango atunaki bango: — Azongi na nzela nini? Bana na ye ya mibali balakisaki ye nzela oyo moto na Nzambe, oyo awutaki na Yuda, azongelaki.
13 So the prophet said to his sons, “Saddle the donkey for me.” Then they saddled the donkey for him, and he mounted it
Bongo alobaki na bana na ye ya mibali: — Bobongisela ngai ane. Sima na bana na ye kobongisela ye ane, amataki likolo na yango,
14 and went after the man of God. He found him sitting under an oak tree and asked, “Are you the man of God who came from Judah?” “I am,” he replied.
alandaki moto na Nzambe mpe akutaki ye avandi na se ya nzete ya Terebente. Atunaki ye: — Ozali solo moto na Nzambe oyo awuti na Yuda? Moto na Nzambe azongisaki: — Iyo, ezali nde ngai.
15 So the prophet said to the man of God, “Come home with me and eat some bread.”
Mosakoli alobaki na ye: — Yaka kolia mesa moko na ngai, na ndako na ngai.
16 But the man replied, “I cannot return with you or eat bread or drink water with you in this place.
Moto na Nzambe alobaki: — Nakoki te kozonga to kotambola nzela moko na yo; nakoki mpe te kolia lipa to komela mayi elongo na yo na esika oyo,
17 For I have been told by the word of the LORD: ‘You must not eat bread or drink water there or return by the way you came.’”
pamba te Yawe alobaki na ngai: « Osengeli te kolia lipa, komela mayi mpe kozongela na nzela oyo oyelaki. »
18 Then the prophet replied, “I too am a prophet like you, and an angel spoke to me by the word of the LORD, saying, ‘Bring him back with you to your house, so that he may eat bread and drink water.’” The old prophet was lying to him,
Mosakoli ya mobange azongisaki: — Ngai mpe nazali mosakoli lokola yo. Anjelu moko ya Yawe alobaki na ngai kolanda etinda na Yawe: « Zonga na ye nzela moko na ndako na yo mpo ete alia lipa mpe amela mayi. » Nzokande azalaki kokosa ye.
19 but the man of God went back with him, ate bread in his house, and drank water.
Boye, moto na Nzambe azongaki nzela moko na ye na Beteli, aliaki mpe amelaki kati na ndako na ye.
20 While they were sitting at the table, the word of the LORD came to the prophet who had brought him back,
Wana bavandaki na mesa, Yawe alobaki na mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe,
21 and the prophet cried out to the man of God who had come from Judah, “This is what the LORD says: ‘Because you have defied the word of the LORD and have not kept the commandment that the LORD your God gave you,
mpe agangelaki moto na Nzambe oyo awutaki na Yuda: — Tala liloba oyo Yawe alobi: « Mpo ete otosi te Liloba na Yawe mpe obateli te etinda oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo;
22 but you went back and ate bread and drank water in the place where He told you not to do so, your body shall never reach the tomb of your fathers.’”
mpo ete ozongi, olie lipa mpe omeli mayi na esika oyo napekisaki yo kolia to komela, bakokunda ebembe na yo te kati na kunda ya batata na yo. »
23 And after the man of God had finished eating and drinking, the old prophet who had brought him back saddled the donkey for him.
Tango moto na Nzambe asilisaki kolia mpe komela, mosakoli ya mobange abongisaki ane ya moto na Nzambe oyo azongisaki sima,
24 As he went on his way, a lion met him on the road and killed him, and his body was left lying in the road, with the donkey and the lion standing beside it.
mpe moto na Nzambe azongelaki nzela na ye. Wana azalaki kokende, akutanaki na nkosi na nzela, mpe nkosi yango ebomaki ye. Ebembe na ye etikalaki na nzela, nkosi mpe ane etelemaki pembeni ya ebembe na ye.
25 And there were men passing by who saw the body lying in the road with the lion standing beside it, and they went and reported this in the city where the old prophet lived.
Bato oyo bazalaki koleka bamonaki ebembe elali na nzela mpe nkosi etelemi pembeni na yango. Bakendeki kopesa sango kati na engumba epai wapi mosakoli ya mobange azalaki kovanda.
26 When the prophet who had brought him back from his journey heard this, he said, “It is the man of God who disobeyed the command of the LORD. Therefore the LORD has delivered him to the lion, and it has mauled him and killed him, according to the word that the LORD had spoken to him.”
Tango mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe sima, na mobembo na ye, ayokaki sango yango, alobaki: — Ezali solo moto na Nzambe oyo atosaki te mitindo ya Yawe. Yawe akabi ye epai ya nkosi oyo epasoli ye mpe ebomi ye kolandisama na liloba oyo Yawe ayebisaki ye.
27 Then the old prophet instructed his sons, “Saddle the donkey for me.” So they saddled it,
Mosakoli ya mobange alobaki na bana na ye ya mibali: — Bobongisela ngai ane! Bana na ye ya mibali babongiselaki ye ane yango.
28 and he went and found the body lying in the road, with the donkey and the lion standing beside it. The lion had not eaten the body or mauled the donkey.
Abimaki mpe akutaki ebembe elali na nzela, ane mpe nkosi etelemi pembeni ya ebembe. Nkosi eliaki te ezala ebembe to ane.
29 So the old prophet lifted up the body of the man of God, laid it on the donkey, and brought it back to his own city to mourn for him and bury him.
Mosakoli ya mobange atombolaki ebembe ya moto na Nzambe, atiaki yango na likolo ya ane mpe amemaki yango na engumba na ye mpo na kosalela ye matanga mpe kokunda ye.
30 Then he laid the body in his own tomb, and they lamented over him, “Oh, my brother!”
Atiaki ebembe kati na kunda na ye moko mpe ayembelaki ye nzembo oyo ya mawa: — Ah, mawa, ndeko na ngai!
31 After he had buried him, the prophet said to his sons, “When I die, you must bury me in the tomb where the man of God is buried. Lay my bones beside his bones,
Sima na kokunda ye, alobaki na bana na ye ya mibali: — Tango nakokufa, bokokunda ngai kati na lilita epai wapi bakundi moto na Nzambe; bokotia mikuwa na ngai pembeni ya mikuwa na ye.
32 for the message that he cried out by the word of the LORD against the altar in Bethel and against all the shrines on the high places in the cities of Samaria will surely come to pass.”
Pamba te liloba oyo asakolaki kolanda etinda na Yawe mpo na kolakela mabe, etumbelo ya Beteli mpe bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba kati na engumba Samari, ekokokisama solo.
33 Even after these events, Jeroboam did not repent of his evil ways, but again he appointed priests for the high places from every class of people. He ordained anyone who desired to be a priest of the high places.
Atako bongo, Jeroboami atikaki te banzela na ye ya mabe, akobaki kaka kotia bato ya mboka na ye lokola banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba; abulisaki lokola nganga-nzambe ya esambelo ya likolo ya ngomba moto nyonso oyo alingaki kokoma nganga-nzambe.
34 And this was the sin of the house of Jeroboam that led to its extermination and destruction from the face of the earth.
Oyo nde ezalaki lisumu ya ndako ya Jeroboami, oyo ememaki kokweya mpe kobebisama ya bokonzi na ye kati na mokili.

< 1 Kings 13 >