< Joshua 14 >

1 These are the inheritances which the children of Israel took in the land of Canaan, which Eleazar the priest, Joshua the son of Nun, and the heads of the fathers’ houses of the tribes of the children of Israel, distributed to them,
Nzokande, tala mabele oyo bana ya Isalaele bazwaki lokola libula kati na mokili ya Kanana; mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka ya mabota ya bana ya Isalaele bakabolelaki bango.
2 by the lot of their inheritance, as the LORD commanded by Moses, for the nine tribes, and for the half-tribe.
Bakabolelaki bango yango na nzela ya zeke, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota.
3 For Moses had given the inheritance of the two tribes and the half-tribe beyond the Jordan; but to the Levites he gave no inheritance among them.
Moyize apesaki epai ya mabota mibale mpe ndambo ya libota mabele na bango, na ngambo ya este ya Yordani; kasi epai ya bato ya libota ya Levi, apesaki mabele te kati na mabota mosusu;
4 For the children of Joseph were two tribes, Manasseh and Ephraim. They gave no portion to the Levites in the land, except cities to dwell in, with their pasture lands for their livestock and for their property.
pamba te bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bakomaki mabota mibale. Bato ya libota ya Levi bazwaki libula te kati na mokili longola kaka bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele mpe biloko na bango.
5 The children of Israel did as the LORD commanded Moses, and they divided the land.
Boye, bana ya Isalaele bakabolaki mokili, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
6 Then the children of Judah came near to Joshua in Gilgal. Caleb the son of Jephunneh the Kenizzite said to him, “You know the thing that the LORD spoke to Moses the man of God concerning me and concerning you in Kadesh Barnea.
Bato ya libota ya Yuda bayaki epai ya Jozue, na Giligali. Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi, ayebisaki Jozue: « Oyebi malamu makambo oyo Yawe alobaki na Moyize, moto na Nzambe, na Kadeshi-Barinea na tina na yo mpe na tina na ngai.
7 I was forty years old when Moses the servant of the LORD sent me from Kadesh Barnea to spy out the land. I brought him word again as it was in my heart.
Nazalaki nanu na mibu tuku minei tango Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki ngai wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kononga mokili. Mpe napesaki ye sango kolanda ndenge motema na ngai ezalaki kondima.
8 Nevertheless, my brothers who went up with me made the heart of the people melt; but I wholly followed the LORD my God.
Bandeko na ngai, oyo tomataki na bango elongo balembisaki bato nzoto; nzokande ngai nalandaki bobele Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba.
9 Moses swore on that day, saying, ‘Surely the land where you walked shall be an inheritance to you and to your children forever, because you have wholly followed the LORD my God.’
Na mokolo wana, Moyize alapaki ndayi: ‹ Solo, nalapi ndayi ete mokili oyo matambe na yo esilaki konyata ekozala libula na yo mpe ya bakitani na yo mpo na libela, pamba te olandaki Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. ›
10 “Now, behold, the LORD has kept me alive, as he spoke, these forty-five years, from the time that the LORD spoke this word to Moses, while Israel walked in the wilderness. Now, behold, I am eighty-five years old, today.
Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama,
11 As yet I am as strong today as I was in the day that Moses sent me. As my strength was then, even so is my strength now for war, to go out and to come in.
mpe nazali na makasi lokola na tango oyo Moyize atindaki ngai; nazali na nguya ya kobunda bitumba ndenge kaka nazalaki na yango na kala.
12 Now therefore give me this hill country, of which the LORD spoke in that day; for you heard in that day how the Anakim were there, and great and fortified cities. It may be that the LORD will be with me, and I shall drive them out, as the LORD said.”
Pesa ngai mokili ya bangomba wana oyo Yawe alakaki ngai na mokolo wana. Mokolo wana, yo moko oyokaki ete bato ya Anaki bazalaki kovanda kuna mpe bingumba na bango ezalaki minene mpe batonga makasi. Kasi na lisungi na Yawe, nakobengana bango ndenge Yawe alobaki. »
13 Joshua blessed him; and he gave Hebron to Caleb the son of Jephunneh for an inheritance.
Jozue apambolaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe apesaki ye engumba Ebron lokola libula.
14 Therefore Hebron became the inheritance of Caleb the son of Jephunneh the Kenizzite to this day, because he followed the LORD, the God of Israel wholeheartedly.
Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba.
15 Now the name of Hebron before was Kiriath Arba, after the greatest man among the Anakim. Then the land had rest from war.
Liboso, bazalaki kobenga Ebron « Kiriati-Ariba. » Ariba azalaki elombe oyo alekaki bato nyonso ya Anaki na makasi. Bongo, mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te.

< Joshua 14 >