< 2 Samuel 6 >

1 David again gathered together all the chosen men of Israel, thirty thousand.
Davidi asangisaki basoda ya mpiko ya Isalaele, bazalaki nkoto tuku misato.
2 David arose and went with all the people who were with him from Baale Judah, to bring up from there God’s ark, which is called by the Name, even the name of the LORD of Armies who sits above the cherubim.
Davidi elongo na basoda na ye nyonso bakendeki na Baale-Yuda mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo moko, Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka kati na basheribe na likolo ya Sanduku.
3 They set God’s ark on a new cart, and brought it out of Abinadab’s house that was on the hill; and Uzzah and Ahio, the sons of Abinadab, drove the new cart.
Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ezalaki Uza mpe Ayiyo, bana mibali mibale ya Abinadabi, nde bazalaki kotambolisa shario yango oyo ya sika.
4 They brought it out of Abinadab’s house which was in the hill, with God’s ark; and Ahio went before the ark.
Bamemaki shario elongo na Sanduku ya Nzambe, wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ayiyo azalaki kotambola liboso ya shario.
5 David and all the house of Israel played before the LORD with all kinds of instruments made of cypress wood, with harps, with stringed instruments, with tambourines, with castanets, and with cymbals.
Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela na liboso ya Yawe, na kobeta lolenge nyonso ya bibetelo mindule basala na mabaya ya sipele, mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, makembe mpe manzanza.
6 When they came to the threshing floor of Nacon, Uzzah reached for God’s ark and took hold of it, for the cattle stumbled.
Tango bakomaki na etando ya Nakoni, Uza asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe, pamba te bangombe elingaki kokweyisa Sanduku.
7 The LORD’s anger burned against Uzzah, and God struck him there for his error; and he died there by God’s ark.
Yawe asilikelaki Uza makasi, mpe Nzambe abetaki ye mpo na mbeba na ye. Boye Uza akufaki kaka wana, pembeni ya Sanduku ya Nzambe.
8 David was displeased because the LORD had broken out against Uzzah; and he called that place Perez Uzzah to this day.
Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza. »
9 David was afraid of the LORD that day; and he said, “How could the LORD’s ark come to me?”
Na mokolo wana, Davidi abangaki Yawe mpe amitunaki: « Ndenge nini Sanduku ya Yawe eya epai na ngai? »
10 So David would not move the LORD’s ark to be with him in David’s city; but David carried it aside into Obed-Edom the Gittite’s house.
Boye, Davidi aboyaki komema Sanduku ya Yawe epai na ye, kati na engumba ya Davidi; akendeki kotia yango kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati.
11 The LORD’s ark remained in Obed-Edom the Gittite’s house three months; and the LORD blessed Obed-Edom and all his house.
Sanduku ya Yawe evandaki sanza misato kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati; mpe Yawe apambolaki Obedi-Edomi elongo na libota na ye nyonso.
12 King David was told, “The LORD has blessed the house of Obed-Edom, and all that belongs to him, because of God’s ark.” So David went and brought up God’s ark from the house of Obed-Edom into David’s city with joy.
Tango bayaki koyebisa mokonzi Davidi ete Yawe apamboli ndako ya Obedi-Edomi mpe biloko na ye nyonso mpo na Sanduku ya Nzambe, Davidi akendeki kozwa na esengo Sanduku ya Nzambe wuta na ndako ya Obedi-Edomi, mpe bakendeki na yango kati na engumba ya Davidi.
13 When those who bore the LORD’s ark had gone six paces, he sacrificed an ox and a fattened calf.
Tango bato oyo bazalaki komema Sanduku ya Yawe batindikaki makolo na bango mbala motoba, batelemaki, mpe Davidi abonzaki lokola mbeka ngombe moko ya mobali mpe mwana ngombe moko ya mafuta.
14 David danced before the LORD with all his might; and David was clothed in a linen ephod.
Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe.
15 So David and all the house of Israel brought up the LORD’s ark with shouting and with the sound of the trumpet.
Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Yawe na kobeta milolo ya esengo mpe na kobeta bakelelo.
16 As the LORD’s ark came into David’s city, Michal the daughter of Saul looked out through the window and saw King David leaping and dancing before the LORD; and she despised him in her heart.
Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye.
17 They brought in the LORD’s ark, and set it in its place in the middle of the tent that David had pitched for it; and David offered burnt offerings and peace offerings before the LORD.
Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango. Mpe Davidi abonzaki liboso ya Yawe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani.
18 When David had finished offering the burnt offering and the peace offerings, he blessed the people in the name of the LORD of Armies.
Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga.
19 He gave to all the people, even among the whole multitude of Israel, both to men and women, to everyone a portion of bread, dates, and raisins. So all the people departed, each to his own house.
Bongo apesaki na bato nyonso, na lisanga mobimba ya Isalaele, mibali mpe basi, lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati, gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka. Sima na yango, bato nyonso bazongaki na bandako na bango.
20 Then David returned to bless his household. Michal the daughter of Saul came out to meet David, and said, “How glorious the king of Israel was today, who uncovered himself today in the eyes of his servants’ maids, as one of the vain fellows shamelessly uncovers himself!”
Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki: — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala?
21 David said to Michal, “It was before the LORD, who chose me above your father, and above all his house, to appoint me prince over the people of the LORD, over Israel. Therefore I will celebrate before the LORD.
Davidi alobaki na Mikali: — Nazalaki nde kosepela liboso ya Yawe oyo aponaki ngai mpe asepelaki na ngai koleka tata na yo mpe moto nyonso ya ndako na ye, tango akomisaki ngai mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe.
22 I will be yet more undignified than this, and will be worthless in my own sight. But the maids of whom you have spoken will honor me.”
Nakokoma lisusu moto pamba koleka mpe nakomikitisa lisusu koleka na miso na ngai moko. Kasi liboso ya basi oyo yo ozali kolobela, ngai nakozwa lokumu.
23 Michal the daughter of Saul had no child to the day of her death.
Mpo na yango, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotaki te kino na mokolo na ye ya kufa.

< 2 Samuel 6 >