< Proverbs 1 >

1 The proverbs of Solomon the son of David, king of Israel,
Masese ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele:
2 to know wisdom and instruction, to discern the words of understanding,
mpo na koyeba bwanya, kozwa mateya mpe kososola maloba ya mayele;
3 to receive instruction in wise dealing, in righteousness and justice and equity,
mpo na kozwa mateya ya bwanya oyo epesaka bizaleli ya sembo, ya boyengebene mpe makambo ya alima;
4 to give prudence to the simple, to the young man knowledge and discretion,
mpo na kopesa mayele epai ya bazoba, mpe boyebi epai ya bilenge.
5 that the wise man may hear, and increase in learning, and that the man of understanding may attain to sound counsels,
Tika ete moto ya bwanya ayoka yango, mpe akobakisa bwanya na ye, bongo moto ya mayele akoyeba mayele ya kotambolisa bato;
6 to understand a proverb, and a figure, the words of the wise, and their dark sayings.
mpo na kososola masese mpe sambole, maloba ya bwanya mpe kolimbola makambo.
7 The fear of Jehovah is the beginning of knowledge. The foolish despise wisdom and instruction.
Kotosa Yawe ezali mosisa ya mayele; bato oyo bazangi mayele batiolaka bwanya mpe toli.
8 My son, hear the instruction of thy father, and forsake not the law of thy mother.
Mwana na ngai ya mobali, yoka toli ya tata na yo, mpe kobwaka te mateya ya mama na yo;
9 For they shall be a garland of grace to thy head, and chains about thy neck.
Pamba te ekozala lokola ekoti ya ngolu na moto na yo, mpe lokola mayaka ya kitoko na kingo na yo.
10 My son, if sinners entice thee, consent thou not.
Mwana na ngai ya mobali, soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.
11 If they say, Come with us. Let us lay wait for blood. Let us lurk secretly for the innocent without cause.
Soki balobi na yo: « Yaka elongo na biso, tika ete tosala motambo mpo na koboma bato, tokosepela mpo na kokanga moto oyo ayebi likambo te!
12 Let us swallow them up alive as Sheol, and whole, as those who go down into the pit. (Sheol h7585)
Ndenge mokili ya bakufi esalaka, tokomela ye ya bomoi, tokomela ye mobimba lokola bato oyo bakitaka na libulu ya kufa; (Sheol h7585)
13 We shall find all precious substance. We shall fill our houses with spoil.
tokozwa biloko ya talo ya ndenge na ndenge, mpe tokotondisa bandako na biso na bomengo ya bitumba;
14 Thou shall cast thy lot among us. We will all have one bag.
okozwa ndambo na yo epai na biso, pamba te biso nyonso tokosangisa biloko na biso esika moko; »
15 My son, walk not thou in the way with them. Restrain thy foot from their path.
mwana na ngai ya mobali, kokende elongo na bango te, longola makolo na yo na nzela na bango;
16 For their feet run to evil, and they make haste to shed blood.
pamba te makolo na bango ekimaka mbangu mpo na kolanda mabe, mpe bapotaka mbangu mpo na kosopa makila.
17 For in vain is the net spread in the sight of any bird,
Solo, ezali pamba kotia monyama liboso ya miso ya bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu.
18 and these lay wait for their own blood. They lurk secretly for their own lives.
Kasi bango, batiaka mitambo mpo na kosopa makila na bango moko, bamilukelaka pasi na bomoi na bango.
19 So are the ways of everyone who is greedy of gain. It takes away the life of the owners of it.
Moto oyo alukaka kozwa bomengo na nzela ya lokuta asukaka kaka bongo, mpe bomengo yango ebomaka kaka ye moko.
20 Wisdom cries aloud in the street. She utters her voice in the broad places.
Bwanya azali koganga na libanda, atomboli mongongo na ye na bisika oyo bato ebele bakutanaka;
21 She cries in the chief place of concourse, at the entrance of the gates, in the city. She utters her words:
azali koganga na bisika ya loyenge mpe azali koloba liboso ya ekuke ya engumba:
22 How long, ye simple ones, will ye love simplicity? And scoffers delight them in scoffing, and fools hate knowledge?
« Yo moto oyo ozangi mayele, kino tango nini okolinga bozoba na yo? Kino tango nini batioli bakokoba kosepela kotiola? Mpe bino bazoba, kino tango nini bokokoba koyina mayele?
23 Turn back at my reproof. Behold, I will pour out my spirit upon you. I will make my words known to you.
Soki boyoki makebisi na Ngai, nakosopela bino Molimo na Ngai mpe nakososolisa bino maloba na Ngai.
24 Because I have called, and ye have refused, I have stretched out my hand, and no man has regarded,
Kasi lokola bosundolaki Ngai tango nazalaki kobelela mpe moto moko te asalaki keba tango natandaki loboko,
25 but ye have made all my counsel void, and want none of my reproof,
lokola bobwakaki toli na Ngai mpe boboyaki kondima pamela na Ngai,
26 I also will laugh at your calamity. I will mock when your fear comes,
Ngai mpe nakoseka bino tango pasi ekoyela bino, nakotiola bino tango minyoko ekokomela bino,
27 when your fear comes as a storm, and your calamity comes on as a whirlwind, when distress and anguish come upon you.
tango minyoko ekokomela bino na pwasa lokola mvula ya kake makasi, tango somo ekoyela bino lokola ekumbaki, tango mawa mpe somo ekokomela bino.
28 Then they will call upon me, but I will not answer. They will seek me diligently, but they shall not find me,
Bakoganga epai na Ngai, kasi nakoyanola bango te; bakoluka Ngai na ngonga ya malamu, kasi bakomona Ngai te.
29 because they hated knowledge, and did not choose the fear of Jehovah.
Lokola bayinaki boyebi mpe baponaki te nzela ya kotosa Yawe,
30 They wanted none of my counsel. They despised all my reproof.
lokola baboyaki kondima toli na Ngai mpe batiolaki pamela na Ngai,
31 Therefore they shall eat of the fruit of their own way, and be filled with their own devices.
bakolia mbuma ya etamboli na bango mpe bakotonda na mabongisi ya mitema na bango moko.
32 For the backsliding of the simple shall kill them, and the careless ease of fools shall destroy them.
Pamba te kotomboka ya bato oyo bazangi mayele ekoboma bango, mpe bozangi bokebi ya bato oyo bazangi mayele ekoboma kaka bango moko;
33 But he who hearkens to me shall dwell securely, and shall be quiet without fear of evil.
kasi moto oyo ayokaka Ngai akovanda na kimia mpe akobanga mabe moko te. »

< Proverbs 1 >