< Numbers 8 >

1 And Jehovah spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
2 Speak to Aaron, and say to him, When thou light the lamps, the seven lamps shall give light in front of the lampstand.
« Loba na Aron mpe yebisa ye: ‹ Tango okotia minda, minda sambo esengeli kongengisa liboso ya etelemiselo ya minda. › »
3 And Aaron did so. He lit the lamps of it in front of the lampstand, as Jehovah commanded Moses.
Aron asalaki kaka bongo: atiaki minda na liboso ya etelemiselo ya minda ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
4 And this was the work of the lampstand, beaten work of gold. To the base of it, and to the flowers of it, it was beaten work. According to the pattern which Jehovah had shown Moses, so he made the lampstand.
Tala ndenge basalaki etelemiselo ya minda: basalaki yango na wolo batuta wuta na likonzi kino na bafololo na yango; basalaki yango ndenge kaka Yawe alakisaki Moyize.
5 And Jehovah spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
6 Take the Levites from among the sons of Israel, and cleanse them.
« Kamata Balevi kati na bana ya Isalaele mpe petola bango.
7 And thus thou shall do to them to cleanse them: sprinkle the water of expiation upon them, and let them cause a razor to pass over all their flesh, and let them wash their clothes, and cleanse themselves.
Tala ndenge okosala mpo na kopetola bango: okobwakela bango mayi ya bopetoli; bongo bakolekisa jileti na nzoto na bango mobimba mpo na komikokola suki ya nzoto mobimba mpe bakosukola bilamba na bango. Ezali na nzela wana nde bakokoma peto.
8 Then let them take a young bullock, and its meal offering-fine flour mingled with oil. And thou shall take another young bullock for a sin offering.
Bakokamata mwana ngombe ya mobali elongo na likabo na yango ya farine oyo basangisa na mafuta; mpe okokamata mwana ngombe mosusu ya mobali mpo na mbeka ya masumu.
9 And thou shall present the Levites before the tent of meeting. And thou shall assemble the whole congregation of the sons of Israel,
Yeisa Balevi liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe sangisa lisanga mobimba ya Isalaele.
10 and thou shall present the Levites before Jehovah. And the sons of Israel shall lay their hands upon the Levites.
Okopusa Balevi liboso ya Yawe mpe bana ya Isalaele bakotia bango maboko.
11 And Aaron shall offer the Levites before Jehovah for a wave offering on the behalf of the sons of Israel, that it may be theirs to do the service of Jehovah.
Sima na yango, Aron akobonza Balevi lokola likabo oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe mpo ete bazwa makoki ya kosala mosala ya Yawe.
12 And the Levites shall lay their hands upon the heads of the bullocks, and offer thou the one for a sin offering, and the other for a burnt offering, to Jehovah, to make atonement for the Levites.
Mpe na sima, Balevi bakotia maboko na bango likolo ya mito ya bangombe ya mibali. Bonza ngombe moko lokola mbeka ya masumu epai na Yawe mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Balevi.
13 And thou shall set the Levites before Aaron, and before his sons, and offer them for a wave offering to Jehovah.
Tika ete Balevi batelema liboso ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali; bongo bonza bango lokola likabo epai na Yawe.
14 Thus shall thou separate the Levites from among the sons of Israel, and the Levites shall be mine.
Ezali na nzela wana nde okotia pembeni Balevi kati na bana ya Isalaele, mpe bakozala ya Ngai.
15 And after that the Levites shall go in to do the service of the tent of meeting. And thou shall cleanse them, and offer them for a wave offering.
Sima na yo kopetola Balevi mpe kobonza bango lokola likabo, bakozwa ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye, okopetola bango mpe okobonza bango lokola likabo epai na Yawe,
16 For they are wholly given to me from among the sons of Israel; instead of all who open the womb, even the firstborn of all the sons of Israel, I have taken them to me.
pamba te bango nde bazali bato oyo bapesameli Ngai kati na bana ya Isalaele. Ngai moko nde nazwaki bango na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele.
17 For all the firstborn among the sons of Israel are mine, both man and beast. On the day that I smote all the firstborn in the land of Egypt I sanctified them for myself.
Pamba te, bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele bazali ya Ngai, ezala bana ya liboso ya bana ya bato to ya banyama. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso na mokili ya Ejipito, natiaki bango pembeni mpo na Ngai moko.
18 And I have taken the Levites instead of all the firstborn among the sons of Israel.
Mpe nazwaki Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele.
19 And I have given the Levites as a gift to Aaron and to his sons from among the sons of Israel, to do the service of the sons of Israel in the tent of meeting, and to make atonement for the sons of Israel, that there be no plague among the sons of Israel, when the sons of Israel come near to the sanctuary.
Kati na bato nyonso ya Isalaele, napesi Balevi lokola likabo epai ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali, mpo ete basala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na bolamu ya bana ya Isalaele mpe basala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, mpo ete likama moko te ekomela bana ya Isalaele tango bakopusana pene ya Esika ya bule. »
20 Thus did Moses, and Aaron, and all the congregation of the sons of Israel, to the Levites. According to all that Jehovah commanded Moses concerning the Levites, so the sons of Israel did to them.
Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele basalaki mpo na Balevi, makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.
21 And the Levites purified themselves from sin, and they washed their clothes. And Aaron offered them for a wave offering before Jehovah, and Aaron made atonement for them to cleanse them.
Balevi bamipetolaki mpe basukolaki bilamba na bango. Aron abonzaki bango lokola likabo epai na Yawe mpe asalaki mpo na bango mosala ya bolimbisi masumu mpo na kopetola bango.
22 And after that the Levites went in to do their service in the tent of meeting before Aaron, and before his sons. As Jehovah had commanded Moses concerning the Levites, so they did to them.
Sima na yango, Balevi bazwaki ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani, na se ya bokonzi ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Basalaki mpo na Balevi, makambo oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
23 And Jehovah spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
24 This is that which belongs to the Levites: From twenty-five years old and upward they shall go in to wait upon the service in the work of the tent of meeting.
« Tala bikateli oyo etali Balevi: mobali nyonso oyo azali na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale na mitano mpe koleka asengeli koya kosala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani.
25 And from the age of fifty years they shall cease waiting upon the work, and shall serve no more,
Kasi soki akokisi mibu tuku mitano, akotika mosala oyo azalaki kosala, akosala lisusu mosala te.
26 but shall minister with their brothers in the tent of meeting, to keep the charge, and shall do no service. Thus shall thou do to the Levites concerning their charges.
Akokoma nde kosunga bandeko na ye mpo na kokokisa misala na bango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Nzokande ye moko akosala lisusu mosala te. Yango nde ekozala bikateli oyo okolanda mpo na mosala ya Balevi. »

< Numbers 8 >