< Leviticus 8 >

1 And Jehovah spoke to Moses, saying,
Yawe alobaki na Moyize:
2 Take Aaron and his sons with him, and the garments, and the anointing oil, and the bullock of the sin offering, and the two rams, and the basket of unleavened bread,
« Mema Aron mpe bana na ye ya mibali, bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe, mafuta ya epakolami, mwana ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu, bameme mibale ya mibali, mpe kitunga oyo ezali na mapa ezanga levire;
3 and assemble thou all the congregation at the door of the tent of meeting.
mpe sangisa lisanga mobimba na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. »
4 And Moses did as Jehovah commanded him, and the congregation was assembled at the door of the tent of meeting.
Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe lisanga esanganaki na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani.
5 And Moses said to the congregation, This is the thing which Jehovah has commanded to be done.
Moyize alobaki na lisanga makambo oyo Yawe atindaki ye kosala.
6 And Moses brought Aaron and his sons, and washed them with water.
Moyize amemaki Aron elongo na bana na ye ya mibali liboso mpe asukolaki bango na mayi.
7 And he put upon him the tunic, and girded him with the sash, and clothed him with the robe, and put the ephod upon him, and he girded him with the skillfully woven band of the ephod, and bound it to him therewith.
Alatisaki Aron nzambala mpe akangaki ye mokaba na loketo; alatisaki ye kazaka mpe efode, azingelaki ye na mokaba ya efode.
8 And he placed the breastplate upon him, and he put the Urim and the Thummim in the breastplate.
Alatisaki Aron elamba ya tolo mpe atiaki Urimi mpe tumimi likolo ya elamba yango.
9 And he set the miter upon his head. And upon the miter, in front, he set the golden plate, the holy crown, as Jehovah commanded Moses.
Akangaki kitendi na moto ya Aron; bongo liboso na yango, atiaki medaye ya wolo, elembo ya libulisi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
10 And Moses took the anointing oil, and anointed the tabernacle and all that was in it, and sanctified them.
Moyize azwaki mafuta ya epakolami mpe apakolaki Mongombo elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango; na bongo nde abulisaki yango.
11 And he sprinkled of it upon the altar seven times, and anointed the altar and all its vessels, and the laver and its base, to sanctify them.
Asopaki na etumbelo ndambo ya mafuta mbala sambo mpe apakolaki mafuta mpo na kobulisa etumbelo, bisalelo na yango nyonso, sani monene mpe se na yango.
12 And he poured of the anointing oil upon Aaron's head, and anointed him, to sanctify him.
Asopaki ndambo ya mafuta ya epakolami na moto ya Aron mpe apakolaki ye mafuta yango mpo na kobulisa ye.
13 And Moses brought Aaron's sons, and clothed them with tunics, and girded them with sashes, and bound head-coverings upon them, as Jehovah commanded Moses.
Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, alatisaki bango banzambala, akangaki bango mikaba na loketo mpe alatisaki bango bikoti, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
14 And he brought the bullock of the sin offering. And Aaron and his sons laid their hands upon the head of the bullock of the sin offering,
Bongo amemaki ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu; Aron elongo na bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto ya ngombe yango.
15 and he killed it. And Moses took the blood, and put it upon the horns of the altar round about with his finger, and purified the altar, and poured out the blood at the base of the altar, and sanctified it, to make atonement for it.
Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu.
16 And he took all the fat that was upon the innards, and the caul of the liver, and the two kidneys, and their fat, and Moses burned it upon the altar.
Moyize azwaki lisusu mafuta nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango, atumbaki yango na etumbelo.
17 But the bullock, and its skin, and its flesh, and its dung, he burnt with fire outside the camp, as Jehovah commanded Moses.
Kasi atumbaki na libanda ya molako ngombe yango ya mobali, poso na yango, misuni na yango mpe nyei na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
18 And he presented the ram of the burnt offering. And Aaron and his sons laid their hands upon the head of the ram,
Bongo amemaki meme ya mobali mpo na kobonza yango lokola mbeka ya kotumba; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango.
19 and he killed it. And Moses sprinkled the blood upon the altar round about.
Moyize akataki kingo ya meme yango mpe asopaki makila na yango na bapembeni nyonso ya etumbelo.
20 And he cut the ram into its pieces, and Moses burnt the head, and the pieces, and the fat.
Akataki-kataki meme yango na biteni. Moyize atumbaki biteni yango, moto mpe mafuta.
21 And he washed the innards and the legs with water. And Moses burnt the whole ram upon the altar. It was a burnt offering for a sweet savor. It was an offering made by fire to Jehovah, as Jehovah commanded Moses.
Asukolaki na mayi biloko ya kati mpe makolo, atumbaki meme yango mobimba na likolo ya etumbelo; ezalaki mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaki Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
22 And he presented the other ram, the ram of consecration. And Aaron and his sons laid their hands upon the head of the ram,
Bongo amemaki meme mosusu ya mobali mpo na libulisi; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango.
23 and he killed it. And Moses took of the blood of it, and put it upon the tip of Aaron's right ear, and upon the thumb of his right hand, and upon the great toe of his right foot.
Moyize akataki yango kingo, azwaki ndambo ya makila na yango mpe atiaki yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron, na mosapi ya monene ya loboko ya mobali ya Aron mpe na mosapi ya monene ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron.
24 And he brought Aaron's sons, and Moses put of the blood upon the tip of their right ear, and upon the thumb of their right hand, and upon the great toe of their right foot. And Moses sprinkled the blood upon the altar round about.
Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, atiaki ndambo ya makila na basonge ya matoyi na bango ya ngambo ya loboko ya mobali, na misapi ya minene ya maboko na bango ya mobali mpe na misapi ya minene ya makolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali. Sima, asopaki makila na bangambo nyonso ya etumbelo.
25 And he took the fat, and the fat tail, and all the fat that was upon the innards, and the caul of the liver, and the two kidneys, and their fat, and the right thigh,
Azwaki biteni oyo ya mafuta: mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali.
26 and out of the basket of unleavened bread, that was before Jehovah, he took one unleavened cake, and one cake of oiled bread, and one wafer, and placed them on the fat, and upon the right thigh.
Kati na kitunga ya mapa ezanga levire oyo ezalaki liboso ya Yawe, azwaki lipa moko, gato moko balamba na mafuta mpe galeti moko; atiaki yango likolo ya biteni ya mafuta mpe ya mopende ya ngambo ya loboko ya mobali.
27 And he put the whole upon the hands of Aaron, and upon the hands of his sons, and waved them for a wave offering before Jehovah.
Atiaki biloko yango nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali; bongo ayebisaki bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola.
28 And Moses took them from off their hands, and burnt them on the altar upon the burnt offering. They were a consecration for a sweet savor. It was an offering made by fire to Jehovah.
Moyize azwaki yango lisusu na maboko na bango mpe atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba. Ezalaki mbeka ya libulisi, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
29 And Moses took the breast, and waved it for a wave offering before Jehovah. It was Moses' portion of the ram of consecration, as Jehovah commanded Moses.
Moyize azwaki tolo ya meme ya libulisi, atombolaki yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola ndenge kaka Yawe atindaki Moyize.
30 And Moses took of the anointing oil, and of the blood which was upon the altar, and sprinkled it upon Aaron, upon his garments, and upon his sons, and upon his sons' garments with him, and sanctified Aaron, his garments, and his sons, and his sons' garments with him.
Moyize azwaki na etumbelo, mafuta ya epakolami mpe ndambo ya makila; asopelaki yango Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. Bongo abulisaki Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango.
31 And Moses said to Aaron and to his sons, Boil the flesh at the door of the tent of meeting, and there eat it and the bread that is in the basket of consecration, as I commanded, saying, Aaron and his sons shall eat it.
Moyize alobaki na Aron mpe na bana na ye ya mibali: « Bolamba mosuni na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe bolia yango wana elongo na lipa oyo ezali kati na kitunga oyo ezali na mbeka ya libulisi, ndenge kaka natindaki tango nalobaki: ‹ Aron mpe bana na ye ya mibali nde bakolia yango. ›
32 And that which remains of the flesh and of the bread ye shall burn with fire.
Oyo ekotikala kati na mosuni ya mbeka ya libulisi mpe lipa, bokotumba yango na moto.
33 And ye shall not go out from the door of the tent of meeting seven days, until the days of your consecration be fulfilled, for he shall consecrate you seven days.
Mikolo sambo, bokolongwa te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani kino mikolo ya libulisi na bino ekokoka, pamba te libulisi na bino ekowumela mikolo sambo.
34 As has been done this day, so Jehovah has commanded to do, to make atonement for you.
Makambo oyo esalemi lelo, yango nde Yawe atindi mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na bino.
35 And ye shall remain at the door of the tent of meeting day and night seven days, and keep the charge of Jehovah, that ye not die, for so I am commanded.
Bokovanda mikolo sambo, butu mpe moyi, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bokosala makambo oyo Yawe atindi mpo ete bokufa te. Pamba te, yango nde epesamelaki ngai lokola mitindo. »
36 And Aaron and his sons did all the things which Jehovah commanded by Moses.
Aron mpe bana na ye ya mibali basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize.

< Leviticus 8 >