< Joshua 7 >
1 But the sons of Israel committed a trespass in what was set apart. For Achan, the son of Carmi, the son of Zabdi, the son of Zerah, of the tribe of Judah, took from what was set apart, and the anger of Jehovah was kindled against the sons of Israel.
Bato ya Isalaele babebisaki ekila ya Yawe. Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, akamataki biloko oyo Yawe apekisaki. Bongo, kanda ya Yawe epelaki likolo ya bana ya Isalaele.
2 And Joshua sent men from Jericho to Ai, which is beside Beth-aven, on the east side of Bethel, and spoke to them, saying, Go up and spy out the land. And the men went up and spied out Ai.
Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango: « Bokende kononga mokili wana. » Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi.
3 And they returned to Joshua, and said to him, Let not all the people go up, but let about two or three thousand men go up and smite Ai. Do not make all the people to toil there, for they are but few.
Tango bazongaki epai ya Jozue, balobaki na ye: « Ezali penza na tina te ete bato nyonso bakende kobundisa Ayi. Tinda kaka bato nkoto mibale to nkoto misato mpo na kobotola yango. Komonisa bato nyonso pasi te, pamba te engumba yango ezali kaka na bato moke. »
4 So there went up there of the people about three thousand men. And they fled before the men of Ai.
Boye, bato pene nkoto misato bakendeki, kasi bakimaki liboso ya bato ya Ayi.
5 And the men of Ai smote of them about thirty-six men. And they chased them from before the gate even to Shebarim, and smote them at the descent. And the hearts of the people melted, and became as water.
Bato ya Ayi babomaki bato pene tuku misato na motoba na molongo ya Isalaele. Balandaki bango kino koleka ekuke ya engumba Shebarimi mpe babomaki bango na kokita ya ngomba. Mpo na yango, mitema ya bana ya Isalaele elembaki mpe bakomaki lokola mayi oyo ezali kotiola.
6 And Joshua tore his clothes, and fell to the earth upon his face before the ark of Jehovah until the evening, he and the elders of Israel, and they put dust upon their heads.
Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango.
7 And Joshua said, Alas, O lord Jehovah, why have thou at all brought this people over the Jordan, to deliver us into the hand of the Amorites, to cause us to perish? Would that we had been content and dwelt beyond the Jordan!
Jozue alobaki: — Ah Nkolo Yawe, mpo na nini otikaki ete bato oyo bakatisa Yordani? Boni, ezalaki mpo ete okaba biso na maboko ya bato ya Amori ete baboma biso? Elekaki malamu ete totikala na biso na ngambo mosusu ya ebale!
8 Oh, Lord, what shall I say after Israel has turned their backs before their enemies!
Oh Nkolo, sik’oyo naloba nini, awa Isalaele akimi liboso ya banguna na ye?
9 For the Canaanites and all the inhabitants of the land will hear of it, and will encompass us around, and cut off our name from the earth, and what will thou do for thy great name?
Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo?
10 And Jehovah said to Joshua, Get thee up. Why are thou thus fallen upon thy face?
Yawe alobaki na Jozue: — Telema! Mpo na nini omibwaki elongi kino na mabele?
11 Israel has sinned. Yes, they have even transgressed my covenant which I commanded them. Yes, they have even taken from what was set apart, and have also stolen, and also dissembled. And they have even put it among their own stuff.
Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango.
12 Therefore the sons of Israel cannot stand before their enemies. They turn their backs before their enemies because they have become accursed. I will not be with you any more unless ye destroy what was set apart from among you.
Yango wana, bana ya Isalaele bakolonga kotelema te liboso ya banguna na bango, bakozonga sima mpe bakokima liboso ya banguna na bango, pamba te babebisi ekila. Nakozala elongo na bino te soki bolongoli te mabe oyo ezali kati na bino.
13 Up, sanctify the people, and say, Sanctify yourselves against tomorrow. For thus says Jehovah, the God of Israel, There is what has been set apart in the midst of thee, O Israel. Thou cannot stand before thine enemies until ye take away the devoted thing from among you.
Telema, bulisa bato. Loba na bango: « Bomibulisa mpo na lobi, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi boye: ‹ Mabe ezali kati na yo Isalaele, okolonga kobundisa banguna na yo te kino tango okolongola yango. ›
14 In the morning therefore ye shall be brought near by your tribes, and it shall be, that the tribe which Jehovah takes shall come near by families, and the family which Jehovah shall take shall come near by households, and the household which Jehovah shall take shall come near man by man.
Lobi na tongo, bokopusana pene na Ngai, libota na libota. Libota oyo Yawe akopona ekopusana, etuka na etuka; etuka oyo Yawe akopona ekopusana, ndako na ndako; mpe ndako oyo Yawe akopona ekopusana, moto na moto.
15 And it shall be, that he who is taken with the devoted thing shall be burnt with fire, he and all that he has, because he has transgressed the covenant of Jehovah, and because he has wrought folly in Israel.
Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. »
16 So Joshua rose up early in the morning, and brought Israel near by their tribes, and the tribe of Judah was taken.
Mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki na tongo-tongo penza, mpe abengisaki Isalaele, libota na libota. Mpe ezali libota ya Yuda nde eponamaki.
17 And he brought near the family of Judah, and he took the family of the Zerahites. And he brought near the family of the Zerahites man by man, and Zabdi was taken.
Tango abengisaki etuka na etuka ya libota ya Yuda, etuka ya Zera nde eponamaki. Tango abengisaki ndako na ndako kati na etuka ya Zera, ndako ya Zabidi nde eponamaki.
18 And he brought near his household man by man, and Achan, the son of Carmi, the son of Zabdi, the son of Zerah, of the tribe of Judah, was taken.
Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki.
19 And Joshua said to Achan, My son, give, I pray thee, glory to Jehovah, the God of Israel, and make confession to him, and tell me now what thou have done. Hide it not from me.
Jozue alobaki na Akana: — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.
20 And Achan answered Joshua, and said, Of a truth I have sinned against Jehovah, the God of Israel, and thus and thus have I done:
Akana azongiselaki Jozue: — Solo, nasali lisumu liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala likambo oyo nasalaki:
21 When I saw among the spoil a goodly Babylonian mantle, and two hundred shekels of silver, and a wedge of gold of fifty shekels weight, then I coveted them, and took them. And, behold, they are hid in the ground in the midst of my tent, and the silver under it.
Namonaki, kati na bomengo ya bitumba, kazaka moko ya kitoko ya mboka Mezopotami, mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale mpe ndambo ya kilo ya wolo; nalulaki yango mpe nazwaki yango. Nakundaki yango na kati-kati ya ndako na ngai ya kapo, mpe palata ezali na se na yango.
22 So Joshua sent messengers, and they ran to the tent. And, behold, it was hid in his tent, and the silver under it.
Jozue atindaki bato, mpe bakendeki mbangu kati na ndako ya kapo ya Akana mpe bakutaki penza kazaka bakunda na se ya ndako ya kapo, elongo na palata, na se na yango.
23 And they took them from the midst of the tent, and brought them to Joshua, and to all the sons of Israel, and they laid them down before Jehovah.
Babimisaki biloko yango wuta na ndako na ye ya kapo, bamemaki yango liboso ya Jozue mpe ya bana nyonso ya Isalaele; mpe sima, basopaki yango liboso ya Yawe.
24 And Joshua, and all Israel with him, took Achan the son of Zerah, and the silver, and the mantle, and the wedge of gold, and his sons, and his daughters, and his oxen, and his donkeys, and his sheep, and his tent, and all that he had, and they brought them up to the valley of Achor.
Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bakamataki Akana, mwana mobali ya Zera, elongo na palata, kazaka, liboke ya wolo, bana na ye ya mibali mpe ya basi, bangombe na ye, ba-ane na ye, bameme mpe bantaba na ye, ndako na ye ya kapo mpe biloko na ye nyonso; bamemaki bango na Lubwaku ya Akori.
25 And Joshua said, Why have thou troubled us? Jehovah shall trouble thee this day. And all Israel stoned him with stones, and they burned them with fire, and stoned them with stones.
Jozue alobaki: « Mpo na nini omemeli biso pasi? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo! » Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki; mpe batumbaki bibembe na bango na moto.
26 And they raised over him a great heap of stones, to this day, and Jehovah turned from the fierceness of his anger. Therefore the name of that place was called the valley of Achor to this day.
Babwakaki na likolo ya Akana liboke ya mabanga ebele oyo ezali kino na mokolo ya lelo, mpe kanda ya Yawe esilaki. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Lubwaku ya Akori.