< Deuteronomy 15 >

1 At the end of every seven years thou shall make a release.
Na suka ya mibu sambo nyonso, bosengeli kosundola baniongo.
2 And this is the manner of the release: Every creditor shall release that which he has lent to his neighbor. He shall not exact it from his neighbor and his brother, because Jehovah's release has been proclaimed.
Tala ndenge esengeli kosalema: moto nyonso oyo adefisaki ndeko na ye, mwana ya Isalaele, mbongo, asengeli kotikela ye yango. Asengeli te kosenga eloko epai ya ndeko to moninga na ye, moto ya Isalaele, pamba te tango ya kotika baniongo mpo na lokumu na Yawe esili kokoka.
3 From a foreigner thou may exact it, but whatever of thine is with thy brother, thy hand shall release.
Bokoki kosenga niongo epai ya mopaya, kasi bosengeli kosundola baniongo nyonso oyo bandeko na bino badefaki epai na bino.
4 However there shall be no poor with thee (for Jehovah will surely bless thee in the land which Jehovah thy God gives thee for an inheritance to possess it),
Nzokande, ebongaki te ete mobola azala kati na bino; pamba te kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango lokola libula, akopambola bino koleka,
5 if only thou diligently hearken to the voice of Jehovah thy God, to observe to do all this commandment which I command thee this day.
soki botosi malamu Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli malamu mitindo oyo nazali kopesa bino lelo.
6 For Jehovah thy God will bless thee as he promised thee, and thou shall lend to many nations, but thou shall not borrow, and thou shall rule over many nations, but they shall not rule over thee.
Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino.
7 If there be with thee a poor man, one of thy brothers, within any of thy gates in thy land which Jehovah thy God gives thee, thou shall not harden thy heart, nor shut thy hand from thy poor brother,
Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola.
8 but thou shall surely open thy hand to him, and shall surely lend him sufficient for his need which he wants.
Nzokande, okofungolela ye maboko mpe okodefisa ye na motema moko, nyonso oyo akozala na yango na bosenga.
9 Beware that there not be a base thought in thy heart, saying, The seventh year, the year of release, is at hand, and thine eye be evil against thy poor brother, and thou give him nothing, and he cry to Jehovah against thee, and it be sin to thee.
Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te: « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo.
10 Thou shall surely give him, and thy heart shall not be grieved when thou give to him, because for this thing Jehovah thy God will bless thee in all thy work, and in all that thou put thy hand to.
Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba.
11 For the poor will never cease out of the land. Therefore I command thee, saying, Thou shall surely open thy hand to thy brother, to thy needy, and to thy poor, in thy land.
Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino.
12 If thy brother, a Hebrew man, or a Hebrew woman, is sold to thee, and serves thee six years, then in the seventh year thou shall let him go free from thee.
Soki moko kati na bandeko na yo, Mo-Ebre, azala mobali to mwasi, amiteki ye moko epai na yo, akosalela yo mibu motoba; na mobu ya sambo, okotika ye kokende na bonsomi.
13 And when thou let him go free from thee, thou shall not let him go empty.
Mpe tango okotika ye, okozongisa ye maboko pamba te;
14 Thou shall furnish him liberally out of thy flock, and out of thy threshing-floor, and out of thy winepress. As Jehovah thy God has blessed thee thou shall give to him.
okopesa ye na motema ya esengo ndambo na yo ya bibwele, ya ble mpe ya vino; okopesa ye ndenge kaka Yawe, Nzambe na yo, apambolaki yo.
15 And thou shall remember that thou were a bondman in the land of Egypt, and Jehovah thy God redeemed thee. Therefore I command thee this thing today.
Bokanisa ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino. Yango wana, napesi bino mobeko oyo na mokolo ya lelo.
16 And it shall be, if he says to thee, I will not go out from thee, because he loves thee and thy house, because he is well with thee,
Kasi soki alobi na yo: « Naboyi kotika yo, » mpo ete alingaka yo elongo na libota na yo mpe azalaka na esengo ya kovanda elongo na yo,
17 then thou shall take an awl, and thrust it through his ear to the door, and he shall be thy servant forever. And also to thy maid-servant thou shall do likewise.
wana okozwa motonga, okotia litoyi na ye na ezipelo ya ekuke mpe okotobola yango. Na bongo, akokoma mowumbu na yo mpo na libela. Okosala mpe ndenge moko mpo na mwasi mowumbu.
18 It shall not seem hard to thee when thou let him go free from thee, for he has been worth a double hired servant to thee, in serving thee six years. And Jehovah thy God will bless thee in all that thou do.
Komona yango likambo ya pasi te kotika mowumbu na yo na bonsomi, pamba te mosala oyo asaleli yo na mibu motoba ezali na litomba mbala mibale koleka litomba ya moto oyo ozwa na mosala. Mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na nyonso oyo okosala.
19 All the firstling males that are born of thy herd and of thy flock thou shall sanctify to Jehovah thy God. Thou shall do no work with the firstling of thy herd, nor shear the firstling of thy flock.
Bokotia pembeni mpo na Yawe, Nzambe na bino, mwana mobali nyonso ya liboso oyo akobotama kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Kati na bitonga na bino, bokotia na mosala te bana ya liboso ya bangombe na bino mpe bokolongola te bapwale ya bana ya liboso.
20 Thou shall eat it before Jehovah thy God year by year in the place which Jehovah shall choose, thou and thy household.
Mibu nyonso, bino elongo na mabota na bino, bokolia bibwele yango na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona.
21 And if it has any blemish, as lame or blind, any ill blemish whatever, thou shall not sacrifice it to Jehovah thy God.
Soki ebwele yango ezali na mbeba to ezali tengu-tengu to ekufa miso to soki ezali na mbeba mosusu ya makasi, bokoki kobonza yango te epai na Yawe, Nzambe na bino.
22 Thou shall eat it within thy gates. The unclean man and the clean man alike, as the gazelle, and as the hart.
Bokolia yango kati na bingumba na bino: moto nyonso, azala mbindo to peto, akolia yango ndenge baliaka mboloko to mbuli.
23 Only thou shall not eat the blood of it. Thou shall pour it out upon the ground as water.
Kasi bokolia makila te, bosopa yango na mabele lokola mayi.

< Deuteronomy 15 >