< 1 Samuel 4 >

1 And the word of Samuel came to all Israel. Now Israel went out against the Philistines to battle, and encamped beside Ebenezer, and the Philistines encamped in Aphek.
Mpe Samuele azalaki kokomisa maloba ya Yawe epai ya bato nyonso ya Isalaele. Na tango wana, bato ya Isalaele bakendeki kobundisa bato ya Filisitia. Bato ya Isalaele batongaki molako na bango na Ebeni-Ezeri, mpe bato ya Filisitia batongaki ya bango molako, na Afeki.
2 And the Philistines put themselves in array against Israel. And when they joined battle, Israel was smitten before the Philistines; and they killed of the army in the field about four thousand men.
Bato ya Filisitia batandamaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Mpe wana bitumba ekomaki makasi, bato ya Filisitia balongaki bato ya Isalaele mpe babomaki na bitumba yango basoda ya Isalaele, pene nkoto minei.
3 And when the people came into the camp, the elders of Israel said, Why has Jehovah smitten us today before the Philistines? Let us fetch the ark of the covenant of Jehovah out of Shiloh to us, that it may come among us, and save us out of the hand of our enemies.
Tango basoda ya Isalaele bazongaki na molako, bampaka ya Isalaele batunaki: — Mpo na nini Yawe asali ete bato ya Filisitia balonga biso na mokolo ya lelo? Tokende kozwa Sanduku ya Boyokani ya Yawe, na Silo, mpo ete eya kati na biso mpe ekangola biso na maboko ya banguna na biso.
4 So the people sent to Shiloh, and they brought from there the ark of the covenant of Jehovah of hosts, who sits above the cherubim. And the two sons of Eli, Hophni and Phinehas, were there with the ark of the covenant of God.
Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe.
5 And when the ark of the covenant of Jehovah came into the camp, all Israel shouted with a great shout, so that the earth rang again.
Tango kaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na molako, bato nyonso ya Isalaele bagangaki na mongongo makasi, mpe mabele eninganaki.
6 And when the Philistines heard the noise of the shout, they said, What is the meaning of the noise of this great shout in the camp of the Hebrews? And they understood that the ark of Jehovah came into the camp.
Bato ya Filisitia bayokaki koganga wana mpe batunaki: — Koganga nyonso wana elakisi nini kati na molako ya Ba-Ebre? Wana bayokaki sango ete Sanduku ya Yawe ekoti kati na molako,
7 And the Philistines were afraid, for they said, God has come into the camp. And they said, Woe to us! For there has not been such a thing heretofore.
bato ya Filisitia babangaki mpe balobaki: — Eh, tobebi na biso! Nzambe akoti na molako! Likambo ya boye nanu esalema te!
8 Woe to us! Who shall deliver us out of the hand of these mighty gods? These are the gods that smote the Egyptians with all manner of plagues in the wilderness.
Mawa na biso! Nani akokangola biso na maboko ya Nzambe oyo ya nguya? Ezali Nzambe wana nde abomaki bato ya Ejipito na nzela ya bitumbu ya ndenge na ndenge kati na esobe.
9 Be strong, and strengthen yourselves like men, O ye Philistines, that ye be not servants to the Hebrews, as they have been to you. Conduct yourselves like men, and fight.
Bandeko bato ya Filisitia, boyika mpiko! Bozala mibali, noki te bokokoma bawumbu ya Ba-Ebre ndenge bango bazalaki bawumbu na bino! Bozala mibali mpe bobunda!
10 And the Philistines fought, and Israel was smitten, and they fled every man to his tent. And there was a very great slaughter, for there fell of Israel thirty thousand footmen.
Boye bato ya Filisitia babundisaki bato ya Isalaele mpe balongaki. Moto nyonso akimaki na ndako na ye ya kapo. Kokweyisama ya bato ya Isalaele ezalaki ya makasi penza: motango ya basoda ya Isalaele, oyo babundaka na makolo mpe bakufaki ezalaki nkoto tuku misato.
11 And the ark of God was taken, and the two sons of Eli, Hophni and Phinehas, were killed.
Bato ya Filisitia babotolaki Sanduku ya Nzambe, mpe bana mibali mibale ya Eli, Ofini mpe Fineasi, bakufaki.
12 And there ran a man of Benjamin out of the army, and came to Shiloh the same day, with his clothes torn, and with dirt upon his head.
Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye.
13 And when he came, lo, Eli was sitting upon his seat by the wayside watching, for his heart trembled for the ark of God. And when the man came into the city, and told it, all the city cried out.
Akomaki na tango oyo Eli azalaki ya kovanda na kiti, pembeni ya nzela, mpe azalaki kotala na ekenge, pamba te motema na ye ezalaki na kimia te na tina na Sanduku ya Nzambe. Bongo tango moto yango akotaki na engumba mpe apesaki sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema, engumba mobimba egangaki.
14 And when Eli heard the noise of the crying, he said, What does the noise of this tumult mean? And the man hastened, and came and told Eli.
Tango Eli ayokaki koganga yango, atunaki: — Makelele oyo elakisi nini? Mpe moto yango ayaki na lombangu kopesa sango epai ya Eli.
15 Now Eli was ninety-eight years old, and his eyes were dim so that he could not see.
Nzokande Eli azalaki na mibu tuku libwa na mwambe ya mbotama; miso na ye elembaki makasi, akokaki komona lisusu te.
16 And the man said to Eli, I am he who came out of the army, and I fled today out of the army. And he said, How did the matter go, my son?
Alobaki na Eli: — Nawuti na esika ya bitumba, nawuti kokima kuna kaka lelo. Eli atunaki ye: — Mwana na ngai, makambo nini eleki kuna?
17 And he who brought the news answered and said, Israel has fled before the Philistines, and there has been also a great slaughter among the people. And thy two sons also, Hophni and Phinehas, are dead, and the ark of God is taken.
Moto oyo amemaki sango azongisaki: — Bato ya Isalaele bakimi liboso ya bato ya Filisitia, mpe ebele kati na bango bakufi; ezala bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, bakufi. Bato ya Filisitia babotoli Sanduku ya Nzambe.
18 And it came to pass, when he made mention of the ark of God, that Eli fell from off his seat backward by the side of the gate. And his neck broke, and he died, for he was an old man, and heavy. And he had judged Israel forty years.
Tango kaka moto wana atangaki kombo ya Sanduku ya Nzambe, Eli akweyaki makalikali longwa na kiti na ye, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe, kingo na ye ebukanaki, mpe akufaki, pamba te azalaki mobange mpe nzoto minene. Akambaki Isalaele mibu tuku minei.
19 And his daughter-in-law, Phinehas' wife, was with child, near to be delivered. And when she heard the news that the ark of God was taken, and that her father-in-law and her husband were dead, she bowed herself and brought forth, for her pains came upon her.
Bokilo na ye ya mwasi, mwasi ya Fineasi, azalaki na zemi mpe akomaki pembeni ya kobota. Tango kaka ayokaki sango ete babotoli Sanduku ya Nzambe, ete tata-bokilo na ye mpe mobali na ye bakufi, agunzamaki, abandaki mbala moko pasi ya kobota, mpe abotaki.
20 And about the time of her death the women who stood by her said to her, Fear not, for thou have brought forth a son. But she did not answer, neither did she regard it.
Lokola akomaki pene ya kokufa, basi oyo bazingelaki ye balobaki na ye: — Kobanga te! Oboti mwana mobali! Kasi ye apesaki eyano moko te mpe atiaki makanisi na ye kuna te.
21 And she named the child Ichabod, saying, The glory has departed from Israel, because the ark of God was taken, and because of her father-in-law and her husband.
Apesaki mwana yango kombo « I-Kabodi » oyo elingi kolakisa: Nkembo elongwe na Isalaele! Atiaki makanisi na ye na Sanduku ya Nzambe, oyo babotoli, na tata-bokilo na ye mpe na mobali na ye, oyo bakufi.
22 And she said, The glory has departed from Israel, for the ark of God is taken.
Alobaki: « Nkembo elongwe na Isalaele, pamba te babotoli Sanduku ya Nzambe. »

< 1 Samuel 4 >