< Genesis 9 >

1 Toen zegende God Noë met zijn zonen, en sprak tot hen: Weest vruchtbaar en vermenigvuldigt u, en bevolkt de aarde.
Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango: « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili.
2 Vrees en schrik voor u zal heersen bij alle dieren op de aarde en bij alle vogels in de lucht; al wat over de aarde kruipt en alle vissen in de zee zijn onderworpen aan uw macht.
Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi; nyonso epesami na maboko na bino.
3 Alles, wat beweegt en leeft zal u tot voedsel strekken; met het groene gewas geef Ik dit alles aan u.
Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso.
4 Alleen het vlees, waarin de ziel nog woont, die het bloed is, moogt ge niet eten.
Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi.
5 Maar uw eigen levensbloed zal Ik wreken; van alle dieren zal Ik het terugeisen, zowel als van de mensen; van iedereen zal Ik het leven van den evenmens terugvorderen.
Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye.
6 Wie het bloed van een mens vergiet, Diens bloed zal door mensen worden vergoten; Want als zijn beeld heeft God den mens gemaakt.
Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye.
7 Gij dan weest vruchtbaar en vermenigvuldigt u; wordt talrijk op de aarde, en bevolkt haar.
Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. »
8 Daarop sprak God tot Noë en zijn zonen:
Boye, Nzambe alobaki na Noa mpe na bana na ye ya mibali:
9 Zie, Ik zelf, Ik sluit mijn verbond met u, en met uw kroost na u,
« Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo,
10 en met alle levende wezens, die bij u zijn: met de vogels, de viervoetige dieren en alle dieren der aarde, met al wat uit de ark is gekomen, met al wat op de aarde leeft.
na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo: bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili.
11 Ik sluit met u mijn verbond, dat nooit meer een schepsel door de wateren van de zondvloed zal worden verdelgd, en dat er nooit meer een zondvloed zal komen om de aarde te verwoesten.
Nasali boyokani elongo na yo: bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. »
12 En God sprak: Dit is het teken van het verbond, Dat Ik sluit voor alle geslachten, die komen: Tussen Mij en tussen u, En alle levende wezens, die bij u zijn.
Nzambe alobaki lisusu: « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya:
13 Mijn boog zet Ik in de wolken Als een teken van het verbond tussen Mij en de aarde!
natie monama na Ngai na mapata, mpe yango ekozala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe mokili.
14 Wanneer Ik op de aarde de wolken samenpak, En de boog verschijnt in de wolken,
Tango nyonso nakosangisa mapata na likolo ya mokili mpe monama ekobima na mapata,
15 Dan zal Ik mijn verbond gedenken Tussen Mij en u en alle levende wezens. De wateren zullen nooit meer zwellen tot een zondvloed, Om alle vlees te verdelgen.
nakokanisa boyokani na Ngai elongo na bino mpe na bikelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na bomoi. Mpe mayi ekokoma lisusu mpela te mpo na kobebisa nyonso oyo ezali na bomoi.
16 Als de boog in de wolken staat, Zal Ik hem zien, om het eeuwig verbond te gedenken Tussen God en alle levende wezens, Alle schepselen, die op aarde zijn.
Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. »
17 En God sprak tot Noë: Dit is het teken van het verbond, dat Ik gesloten heb tussen Mij en alle schepselen, die op aarde zijn.
Nzambe alobaki lisusu na Noa: « Yango nde ezali elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na mokili. »
18 De zonen van Noë, die de ark verlieten, waren Sem, Cham en Jáfet; Cham was de vader van Kanaän.
Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa: Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana.
19 Dit waren de drie zonen van Noë, en door hen werd de hele aarde bevolkt.
Bango misato bazalaki bana ya Noa mpe na nzela na bango nde mokili etondaki lisusu na bato.
20 Noë begon het land te bebouwen, en plantte een wijngaard.
Noa azalaki mosali bilanga mpe alonaki elanga ya vino.
21 Hij dronk van de wijn, werd er door bedwelmd, en lag naakt in zijn tent.
Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo.
22 Toen Cham, de vader van Kanaän, de schaamte van zijn vader zag, ging hij het buiten aan zijn twee broers vertellen.
Cham, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye mpe ayebisaki bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki na libanda.
23 Maar Sem en Jáfet haalden een mantel, legden die allebei op hun schouders, liepen achterwaarts binnen, en met afgewend gelaat bedekten ze de schaamte van hun vader, zodat ze de schaamte van hun vader niet zagen.
Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te.
24 Toen Noë uit zijn roes was ontwaakt, en vernam, wat zijn jongste zoon hem had gedaan,
Tango milangwa ya Noa esilaki, ayokaki likambo oyo mwana na ye ya suka asalaki.
25 sprak hij: Vervloekt zij Kanaän, Een slaaf der slaven zal hij zijn voor zijn broeders.
Alobaki: « Tika ete Kanana alakelama mabe, azala mowumbu ya suka ya bandeko na ye! »
26 Hij sprak: Gezegend zij Jahweh, de God van Sem, Kanaän zij hem tot slaaf.
Alobaki lisusu: « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama! Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi!
27 Moge God voor Jáfet ruimte maken, Dat hij wone in de tenten van Sem; Kanaän zij hem tot slaaf.
Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti! Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, mpe Kanana azala mowumbu na ye! »
28 Noë leefde na de zondvloed nog driehonderd vijftig jaar.
Sima na mpela, Noa awumelaki na bomoi mibu nkama misato na tuku mitano.
29 Heel de levensduur van Noë was negenhonderd vijftig jaar. En hij stierf.
Mibu nyonso ya bomoi ya Noa ezalaki nkama libwa na tuku mitano, sima akufaki.

< Genesis 9 >