< Jeremia 24 >

1 Bangʼ ka Jehoyakin wuod Jehoyakim ruodh Juda kod jotelo, jopecho kod jogoro mag Juda ne oseter e twech koa Jerusalem nyaka Babulon gi Nebukadneza ruodh Babulon, Jehova Nyasaye nonyisa kikepni ariyo mag ngʼope koketi e nyim hekalu mar Jehova Nyasaye.
Sima na Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, komema na bowumbu, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni: Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, bakalaka ya Yuda, bato ya misala ya maboko mpe bato oyo balambaka bibende na moto; Yawe alakisaki ngai bitunga mibale ya bambuma ya figi oyo batiaki liboso ya Tempelo ya Yawe.
2 Okapu achiel ne nigi ngʼope mabeyo ahinya, kod mago mane osechiek chon; okapu machielo ne nigi ngʼope maricho, marach moloyo ma ok nyal cham.
Kitunga moko ezalaki na bambuma kitoko ya figi lokola bambuma oyo etelaka liboso; mpe kitunga mosusu ezalaki na bambuma ekawuka oyo bakoki kolia te.
3 Eka Jehova Nyasaye nopenja niya, “En angʼo mineno, Jeremia?” Ne odwoko niya, “Aneno ngʼope. Mabeyo to beyo ahinya, to maricho to richo ahinya ma ok nyal cham.”
Yawe atunaki ngai: — Jeremi, ozali komona nini? Nazongisaki: — Nazali komona bambuma ya figi: bambuma oyo ya kitoko ezali elengi, kasi oyo ekawuka ezali mabe mpe moto moko te akoki kolia yango.
4 Eka wach Jehova Nyasaye nobirona:
Bongo Yawe alobaki na ngai:
5 “Ma e gima Jehova Nyasaye, Nyasach Israel, wacho: ‘Ka ngʼope mabeyogi, akawo jogo moa Juda kodhi e twech kaka joma beyo, mane agolo kae kadhi e piny jo-Babulon.
— Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi: « Ndenge bambuma kitoko oyo ya figi ezali, ndenge wana mpe nazali komona bato ya Yuda oyo natindaki na bowumbu, longwa na esika oyo kino na Babiloni.
6 Wengena nongʼigi mondo gidhi maber, kendo anadwog-gi e pinyni. Anagergi kendo ok anamukgi; anapidhgi kendo ok anapudhgi.
Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosalela bango bolamu, mpe nakozongisa bango kati na mokili oyo. Nakobongisa bango lisusu, kasi nakobebisa bango lisusu te; nakolona bango lokola nzete, nakopikola bango lisusu te.
7 Anamigi chuny mar ngʼeya ni an Jehova Nyasaye. Ginibed joga kendo anabed Nyasachgi, nimar giniduog ira gi chunygi duto.’
Nakopesa bango motema oyo ekoyeba Ngai, mpo ete basosola ete nazali Yawe. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango, pamba te bakozongela Ngai na motema na bango mobimba.
8 “Jehova Nyasaye wacho ni, ‘To mana kaka ngʼope maricho, ma ok nyal cham, e kaka anatimne Zedekia ruodh Juda, jotende kod jogo motony moa Jerusalem, kata obedo ni gidongʼ e pinyni kata gidak Misri.
Kasi ndenge bambuma ya figi oyo ekawuka ezali mabe mpe bakoki kolia yango te, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe nakosala Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe batikali ya Yelusalemi, ezala ba-oyo batikali na mboka mpe ba-oyo bazali na Ejipito:
9 Abiro kelo kuomgi achaya kendo joma ok dwar gi pinjeruodhi duto manie piny, ma wangʼo ich kendo itiyo godo kaka ranyisi, gima ibwogogo ji kendo ikwongʼogo, ka moro amora ma aterogie.
nakokomisa bango eloko ya koyoka somo mpe ya koyokela pasi, na miso ya bikolo nyonso ya mabele; eloko ya kotiola, eloko ya kosakanela, eloko ya maseki, eloko ya lisuma, kati na bisika nyonso epai wapi nakobengana bango.
10 Anakel ligangla, kech kod masira kuomgi nyaka tiekgi e piny mane amiyogi kod wuonegi.’”
Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, kino tango ekosilisa koboma bango na mokili oyo napesaki bango elongo na batata na bango. »

< Jeremia 24 >