< 2 Weche Mag Ndalo 6 >
1 Eka Solomon nowacho niya, “Jehova Nyasaye osewacho ni enodag ei bor polo motimo mudho.
Bongo Salomo alobaki: « Yawe alobaki ete akovanda kati na esika ya molili!
2 Asegeroni hekalu marahuma, kama inidagie nyaka chiengʼ.”
Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela! »
3 Kane oganda jo-Israel duto ochungʼ kanyo, ruoth nolokore mogwedhogi.
Mokonzi abalukaki mpe apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele. Lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki ya kotelema.
4 Eka nowacho niya, “Pak obed ne Jehova Nyasaye, ma Nyasach Israel, mosetimo gi lwete gima ne osingo gi dhoge ni Daudi wuonwa. Nikech nowacho niya,
Alobaki: — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na tata na ngai, Davidi, mpe akokisi, na maboko na Ye, makambo oyo alakaki:
5 ‘Chakre ndalo mane agolo joga koa Misri pok ayiero dala maduongʼ e dhoot moro amora mar Israel mondo oger hekalu kanyo ni Nyinga, to aseyiero Daudi mondo otel ni joga Israel.
« Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala, mpe naponaki moto mosusu te lokola mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele,
6 To koro aseyiero Jerusalem mondo obed kama Nyinga betie kendo aseyiero Daudi mondo otel ni joga Israel.’
kasi naponaki nde Yelusalemi mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna, mpe Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele! »
7 “Daudi wuora noketo e chunye mondo oger hekalu moluongo nying Jehova Nyasaye ma Nyasach Israel.
Tata na ngai, Davidi, azalaki na makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
8 To Jehova Nyasaye nowacho ni Daudi wuora niya, ‘Nitimo maber mondo ibed gi wach gero hekalu ni nyinga e chunyi.
Kasi Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai: « Osali malamu lokola ozwi makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai.
9 Kata kamano in ok niger hekalu, to wuodi, ma en ringri gi rembi iwuon; en ema noger hekalu ni Nyinga.’
Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. »
10 “Jehova Nyasaye oserito singruok mane otimo. Asekawo loch wuora Daudi kendo asebet e kom loch mar Israel mana kaka Nyasaye nosingo kendo asegero hekalu ni Nying Jehova Nyasaye ma Nyasach Israel.
Yawe akokisi elaka na Ye: nakitani tata na ngai, Davidi; navandi na kiti ya bokonzi ya Isalaele, ndenge kaka Yawe alobaki, mpe natongi Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele.
11 Aseketo Sandug Muma ma moketie singruok mane Jehova Nyasaye otimo e kinde gi jo-Israel.”
Natie kuna Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na bana ya Isalaele.
12 Eka Solomon nochungʼ e nyim kendo mar misango mar Jehova Nyasaye e nyim oganda duto mar jo-Israel kendo norieyo bedene kochomo malo.
Bongo Salomo atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe; mpe na miso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko na ye.
13 Noseloso raidhi mar mula ma borne gi lachne romo fut aboro to borne kadhi malo en fut abich mokete e dier laru ma oko. Ne ochungʼ e raidhino mi ogoyo chonge piny e nyim oganda duto mar jo-Israel kendo norieyo bedene kochomo polo.
Solo, Salomo atongaki na bronze etemelo ya kolobela: ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse, mpe metele pene moko na bosanda; mpe atiaki yango na kati-kati ya lopango. Amataki na likolo na yango, afukamaki liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko likolo
14 Kowacho niya, “Yaye Jehova Nyasaye ma Nyasach Israel, onge Nyasaye moro e polo kata e piny machal kodi. In e Nyasaye marito singruok mar herane ni jotichne maluwo yoreni gi chunygi duto.
mpe asambelaki: — Yawe, Nzambe ya Isalaele! Ezali na nzambe moko te oyo akokani na Yo, ezala kuna na likolo to awa na se. Obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo mpo na basali na Yo, oyo batambolaka kolanda mokano na Yo na mitema na bango mobimba.
15 Iserito singruokni mane itimo gi jatichni Daudi wuora, ne isingori gi dhogi kendo isechopo singruokno gi lweti, mana kaka en kawuononi.
Okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo; makambo oyo olobaki, na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
16 “To koro Jehova Nyasaye ma Nyasach Israel rit singruok mane itimo gi jatichni Daudi wuora kiwachone niya, ‘Ok inibed maonge ngʼama bet e nyima e kom loch Israel ka nyikwayi onono kaka giwuotho e nyima kaka chikna dwaro mana kaka isetimo.’
Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye: « Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. »
17 To koro, yaye Jehova Nyasaye ma Nyasach Israel yie mondo wach mane isingo ni jatichni Daudi wuora otimre mana kaka ne isingo.
Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tika ete elaka oyo opesaki na Davidi, mosali na Yo, ekokisama!
18 “To bende Nyasaye nyalo dak e piny kod ji? Kata polo malo kata polo mabor ok nyal romi, to koro hekalu mageroni to diromi nade!
Boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili elongo na bato? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo ngai natongi?
19 Kata kamano chik iti ni lamo jatichni gi kwayone mar ngʼwono yaye Jehova Nyasaye Nyasacha. Winji ywak gi lemo ma jatichni lamo e nyimi.
Yawe, Nzambe na ngai, yoka na bokebi losambo mpe libondeli na ngai, mowumbu na Yo! Yoka koganga mpe libondeli oyo mowumbu na Yo azali kotombola epai na Yo!
20 Mad wangʼi rang hekaluni odiechiengʼ kod otieno, kama niwacho ni Nyingi nobedie. Yie iwinji lemo ma jatichni lamo kochomo odni.
Tika ete, moyi mpe butu, miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na kotala Tempelo oyo, esika oyo olobaki ete okotia kuna Kombo na Yo! Yoka losambo oyo mowumbu na Yo azali kotombola na esika oyo!
21 Winji lamo mar jatichni kaachiel gi jogi Israel ka gilamo ka gichomo odni. Winji gi e polo kar dakni kendo kiwinjo to iwenwa richowa.
Okoyoka mabondeli oyo mowumbu na Yo mpe bato na Yo, Isalaele, bakotombola epai na Yo na kotala na ngambo ya esika oyo! Tika ete oyoka biso wuta na Likolo, evandelo na Yo; yoka mpe limbisa!
22 “Ka ngʼato oketho ni wadgi kendo dwarore ni mondo okwongʼre kendo obiro mokwongʼore e nyim kendo mar misango manie hekaluni,
Soki moto asali lisumu epai ya mozalani na ye, mpe batindi ye na makasi ete alapa ndayi esangana na bilakeli mabe, liboso ya etumbelo na Yo kati na Tempelo oyo,
23 to iwinji gi e polo kendo itim kaka owinjore. Ngʼad bura e kind jotichni kikumo joketho kendo iket richogi e wigi bende joma onge ketho iket kare kaluwore gi timgi makare.
yoka wuta na Likolo; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye.
24 “Ka jogi Israel olo e lweny gi jowasikgi nikech gisekethoni to bangʼe gilokore mi gipako nyingi, ka gilamo kendo gikwayo e hekaluni,
Soki banguna balongi bato na Yo, Isalaele, mpo ete basalaki masumu liboso na Yo, soki babongoli mitema mpo na kozongela Yo, basanzoli Kombo na Yo, basambeli mpe babondeli Yo, kati na Tempelo oyo,
25 to iwinjgi gi e polo kendo iwe richo jogi Israel kendo iduog-gi e piny mane imiyogi kod kweregi.
yoka wuta na Likolo, limbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, mpe zongisa bango na mabele oyo opesaki bango mpe batata na bango!
26 “Ka polo olor kendo koth onge nikech jogi osekethoni to ka gilemo kaeni ka gipako nyingi kendo ka gilokore giweyo richogi nikech isekelonegi chandruok,
Soki likolo ekangami mpe mvula ezali lisusu te mpo ete basalaki masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni,
27 to yie mondo iwinjgi gie polo kendo iwene jotichni ma jo-Israel richogi. Puonjgi yo makare mar dak kendo iornegi koth e piny mane imiyo jogi kaka girkeni margi.
yoka bango wuta na Likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo.
28 “Ka kech kata dera omako piny kata ka abach omako cham kata tuo ewi dongo, kata ka bonyo kata kungu, kata ka jowasigu olworo miechgi madongo, kata ka midekre kata tuo omakogi,
Soki nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko eyei kati na mokili, soki banguna bazingeli bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango, to soki pasi to bokono ya lolenge nyonso ekweyeli bango,
29 to ka ngʼato kuom jogi ma jo-Israel olemo kata okwayi, ka gingʼeyo gima chando chunygi kod lit ka girieyo bedegi kochomo hekaluni,
soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo,
30 to yie iwinji gie polo kama idakie. Wenegi richogi kendo tim ne ngʼato ka ngʼato gima owinjore gi gik motimo nikech ingʼeyo chunygi (nikech in kendi ema ingʼeyo chuny dhano),
yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema na ye. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato.
31 mondo omi gilwori kendo giwuoth e yoreni ndalogi duto ma gin-go e piny mane imiyo kwerewa.
Sala bongo mpo ete batosa Yo mpe batambola na banzela na Yo mikolo nyonso oyo bakovanda na mabele oyo opesaki epai na batata na biso.
32 “To kuom jadak ma ok achiel kuom jogi Israel moa e piny mabor nikech nyingi maduongʼ kendo lweti maratego kod badi marabora moriere, ka gibiro ma gilemo ka gichomo hekaluni,
Ndenge moko mpe mpo na mopaya oyo azali te na molongo ya Isalaele, bato na Yo: wana akowuta na mokili ya mosika, mpo na Kombo monene na Yo, mpo na loboko na Yo ya nguya mpe esembolama; soki ayei mpe asambeli na kotala na ngambo ya Tempelo oyo,
33 to yie mondo iwinji gie polo kama idakie kendo tim gimoro amora ma jadakno okwayi mondo ogendini duto mag piny ongʼe nyingi kendo oluori mana kaka jogi Israel kendo mondo gingʼe ni ot ma asegeroni luongo nyingi.
yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo.
34 “Ka jogi odhi kedo gi jowasikgi kamoro amora ma ibiro orogie ka gilami kagichomo dalani miseyiero kendo hekalu masegero maluongo nyingi,
Tango bato na Yo bakokende kobundisa banguna na bango na nzela oyo okolakisa bango, soki basambeli Yo na kotala na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na Kombo na Yo,
35 to yie iwinji gie polo lamogi kod kwayogi kendo konygi.
yoka wuta na Likolo losambo mpe libondeli na bango, mpe longisa bango.
36 “To ka giketho e nyimi, nimar onge ngʼato kata achiel ma ok jaketho mi ikecho kodgi kendo ichiwogi e lwet wasigu mi giterogi e twech e piny mabor kata machiegni,
Tango bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu kati na mokili songolo, ezala ya mosika to ya pene,
37 kendo ka chunygi olokore e piny mane otergi e twech kendo giweyo richogi kendo gikwayi e piny wasikgi mane otweyogi kagiwacho niya, ‘Wasetimo richo kendo waseketho bende wasetimo mamono;’
soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bowumbu na bango mpe balobi: « Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe; »
38 to ka gidwogo iri gi chunygi duto kod ngimagi duto e piny mane otergi e twech, kendo gilemo ka girango pinygi mane imiyo kweregi, kod dala maduongʼ miseyiero kod hekalu ma asegero ni nyingi,
soki, wuta na mokili epai wapi bamemaki bango na bowumbu, basengi Yo bolimbisi, na mitema mpe na milimo na bango mobimba, soki basambeli na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo,
39 to yie iwinji lemogi gi kwayogi gie polo kar dakni kendo ikonygi. Kendo iwe ni jogi mosetimo richo e nyimi.
yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango mpe limbisa bato na Yo na masumu oyo basalaki liboso na Yo.
40 “Koro Nyasacha, yie mondo wengegi oyawre kendo itgi mondo owinj maber lemo ma wachiwo kaeni.
Kobanda sik’oyo, oh Nzambe na ngai, tika ete miso na Yo ezala ya kofungwama mpe matoyi na Yo eyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo!
41 “Yaye Jehova Nyasaye, koro chungʼ malo kendo idonj e kar yweyo,
Sik’oyo, oh Yawe Nzambe,
42 Yaye Jehova Nyasaye, kik ikwed ngʼatno misewiro.
Oh Yawe Nzambe, kobwaka te mopakolami na Yo,