< Salme 1 >

1 Salig den Mand, som ikke går efter gudløses Råd, står på Synderes Vej eller sidder i Spotteres Lag,
Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli,
2 men har Lyst til HERRENs Lov, og som grunder på hans Lov både Dag og Nat.
kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi.
3 Han er som et Træ, der, plantet ved Bække, bærer sin Frugt til rette Tid, og Bladene visner ikke: Alt, hvad han gør, får han Lykke til.
Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te; misala na ye nyonso etambolaka malamu.
4 De gudløse derimod er som Avner, Vinden bortvejrer.
Kasi ezali bongo te mpo na bato mabe! Bazali lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe epanzaka.
5 Derfor består de gudløse ikke i Dommen og Syndere ej i retfærdiges Menighed.
Yango wana bato mabe bakolonga te kotelema na kosambisama, mpe bato ya masumu bakowumelaka te kati na lisanga ya bato ya sembo.
6 Thi HERREN kender retfærdiges Vej, men gudløses Vej brydes af.
Solo, Yawe ayebi nzela ya bato ya sembo, kasi nzela ya bato mabe ememaka na libebi.

< Salme 1 >