< Salme 8 >
1 (Til sangmesteren. Al-haggittit. En salme af David.) HERRE, vor Herre, hvor herligt er dit Navn på den vide Jord du, som bredte din Højhed ud over Himlen!
Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi; ezali ya koyemba na lindanda ya bato ya Gati. Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba! Ovandisi nkembo na Yo kati na Lola.
2 Af spædes og diendes Mund har du rejst dig et Værn for dine Modstanderes Skyld, for at bringe til Tavshed Fjende og Hævner.
Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike, otelemisi ndako batonga makasi, mpo na kotelemela bayini na Yo mpe kokanga monoko ya monguna mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.
3 Når jeg ser din Himmel, dine Fingres Værk, Månen og Stjernerne, som du skabte,
Tango natalaka Lola na Yo, mosala ya misapi na Yo, sanza mpe minzoto oyo otia,
4 hvad er da et Menneske, at du kommer ham i Hu, et Menneskebarn, at du tager dig af ham?
namitunaka: Moto azali nini mpo ete okanisa ye, mpe moto azali nani mpo ete obatela ye?
5 Du gjorde ham lidet ringere end Gud. med Ære og Herlighed kroned du ham;
Osalaki ye moke koleka ba-anjelu mpe olatisaka ye motole ya nkembo mpe ya lokumu;
6 du satte ham over dine Hænders Værk, alt lagde du under hans Fødder,
otia ye moyangeli ya misala ya maboko na Yo, otia nyonso na se ya matambe na ye:
7 Småkvæg og Okser til Hobe, ja, Markens vilde Dyr,
bameme, bantaba, bangombe mpe banyama ya zamba,
8 Himlens Fugle og Havets Fisk, alt, hvad der farer ad Havenes Stier.
bandeke ya likolo, mbisi ya ebale monene mpe nyonso oyo etambolaka na bibale.
9 HERRE, vor Herre, hvor herligt er dit Navn på den vide Jord!
Oh Yawe, Nkolo na biso, Kombo na Yo ezali monene kati na mokili mobimba!