< Salme 143 >

1 (En Salme af David.) HERRE, hør min Bøn og lyt til min tryglen, bønhør mig i din Trofasthed, i din Retfærd,
Nzembo ya Davidi. Yawe, yoka losambo na ngai, landa mabondeli na ngai! Yanola ngai na boyengebene mpe na bosembo na Yo.
2 gå ikke i Rette med din Tjener, thi for dig er ingen, som lever, retfærdig!
Kosambisa mosali na Yo te, pamba te moto moko te ya bomoi azali sembo liboso na Yo.
3 Thi Fjender forfølger min Sjæl, de træder mit Liv i Støvet, lader mig bo i Mørke som de, der for længst er døde.
Monguna azali konyokola ngai, azali kosakana na bomoi, azali kosala ete navanda kati na molili lokola bato oyo bakufa na tango ya kala.
4 Ånden hensygner i mig, mit Hjerte stivner i Brystet.
Molimo na ngai elembi kati na ngai, motema na ngai emitungisi kati na ngai.
5 Jeg kommer fordums Dage i Hu, tænker på alle dine Gerninger, grunder på dine Hænders Værk.
Nakanisi mikolo ya kala, namilobeli nyonso oyo osala, nakanisi malamu mosala ya maboko na Yo.
6 Jeg udbreder Hænderne mod dig, som et tørstigt Land så længes min Sjæl efter dig. (Sela)
Nasemboli maboko na ngai epai na Yo; nakomi komimona lokola mabele ya kokawuka.
7 Skynd dig at svare mig, HERRE, min Ånd svinder hen; skjul ikke dit Åsyn for mig, så jeg bliver som de, der synker i Graven.
Yawe, zongisela ngai eyano noki! Molimo na ngai ezali kolemba. Kopesa ngai mokongo te, noki te nakozala lokola bato oyo bazali kokita na libulu.
8 Lad mig årle høre din Miskundhed, thi jeg stoler på dig. Lær mig den Vej, jeg skal gå, thi jeg løfter min Sjæl til dig.
Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo, pamba te natia elikya na ngai kati na Yo. Lakisa ngai nzela ya kolanda, pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.
9 Fri mig fra mine Fjender, HERRE, til dig flyr jeg hen;
Yawe, kangola ngai wuta na maboko ya banguna na ngai! Nazali koluka ebombamelo epai na Yo.
10 lær mig at gøre din Vilje, thi du er min Gud, mig føre din gode Ånd ad den jævne Vej!
Lakisa ngai kosala mokano na Yo, pamba te ozali Nzambe na ngai. Tika ete Molimo malamu na Yo atambolisa ngai na mabele oyo ezanga mabaku!
11 For dit Navns Skyld, HERRE, holde du mig i Live, udfri i din Retfærd min Sjæl af Trængsel,
Yawe, mpo na lokumu ya Kombo na Yo, bikisa bomoi na ngai! Na bosembo na Yo, longola bomoi na ngai kati na pasi.
12 udslet i din Miskundhed mine Fjender, tilintetgør alle, som trænger min Sjæl! Thi jeg er din Tjener.
Na bolingo na Yo, kanga minoko ya banguna na ngai mpe limwisa bayini na ngai nyonso, pamba te nazali mosali na Yo.

< Salme 143 >