< Salme 137 >

1 Ved Babels Floder, der sad vi og græd, når Zion randt os i hu.
Ezalaki biso ya kovanda pembeni ya bibale ya Babiloni, tozalaki kolela na tozalaki kokanisa Siona.
2 Vi hængte vore Harper i Landets Pile.
Todiembikaki mandanda na biso na banzete ya pepiliye ya etuka yango.
3 Thi de, der havde bortført os, bad os synge, vore Bødler bad os være glade: "Syng os af Zions Sange!"
Kuna, bato oyo bamemaki biso na bowumbu bazalaki kosenga biso banzembo; mpe banyokoli na biso bazalaki kosenga biso ete tozala na esengo. Bazalaki koloba: « Boyembela biso banzembo ya Siona! »
4 Hvor kan vi synge HERRENs Sange på fremmed Grund?
Tokoyemba banzembo ya Yawe ndenge nini na mabele ya bapaya?
5 Jerusalem, glemmer jeg dig, da visne min højre!
Oh Yelusalemi, soki nabosani yo, wana tika ete loboko na ngai ya mobali elemba!
6 Min Tunge hænge ved Ganen, om ikke jeg ihukommer dig, om ikke jeg sætter Jerusalem over min højeste Glæde!
Soki natiki penza kokanisa yo, Yelusalemi, soki natie yo te liboso ya esengo nyonso, wana tika ete lolemo na ngai ekangama kati na monoko na ngai!
7 HERRE, ihukom Edoms Sønner for Jerusalems Dag, at de råbte: "Nedbryd, nedbryd lige til Grunden!"
Yawe, kobosana te bato ya Edomi oyo basekaki Yelusalemi na mokolo na yango ya mawa; bazalaki koganga: « Bobuka yango, bobuka kino na miboko na yango! »
8 Du Babels Datter, du Ødelægger! Salig den, der gengælder dig, hvad du gjorde imod os!
Babiloni, engumba kitoko, yo oyo okobebisama solo, esengo na moto oyo akozongisela yo mabe na mabe oyo osalaki biso!
9 Salig den, der griber dine spæde og knuser dem mod Klippen!
Esengo na moto oyo akokanga bana na yo mpe akonika bango na libanga!

< Salme 137 >