< Klagesangene 4 >

1 Hvor Guldet blev sort, og skæmmet det ædle metal, de hellige Stene slængt hen på Gadernes Hjørner!
Ndenge nini wolo ebungisi kongenga na yango, wolo ya peto enzuluki! Mabanga ya talo oyo ya bule epanzani na basonge ya babalabala nyonso.
2 Zions de dyre Sønner, der opvejed Guld, kun regnet for Lerkar, Pottemagerhænders Værk
Ndenge nini bana mibali ya motuya ya Siona, oyo, na kala, bazalaki kozwa bango lokola wolo ya peto, kasi bakomi lelo komona bango lokola mbeki ya mabele, oyo mosali mbeki basili kosala!
3 Selv Sjakaler byder Brystet til, giver Ungerne Die, men mit Folks Datter blev grum som Ørkenens Strudse.
Ata mbwa ya zamba ezalaka na posa ya komelisa bana na yango mabele; kasi bato na ngai bakomi mitema makasi lokola maligbanga kati na esobe.
4 Den spædes Tunge hang fast ved Ganen af Tørst, Børnene tigged om Brød, og ingen gav dem.
Likolo ya nzala, lolemo ya mwana ekangami na likolo ya kati ya monoko na ye; bana mike bazali kosenga bilei kasi moto moko te azali kopesa bango yango.
5 Folk, som levede lækkert, omkom på Gaden; Folk, som var båret på Purpur, favnede Skarnet.
Bato oyo na kala bazalaki kolia bilei ya kitoko bakomi kokufakufa na babalabala; ba-oyo bakolaki na molato ya motane bakomi sik’oyo kolalela matiti ya kopola.
6 Mit Folks Datters Brøde var større end Synden i Sodom, som brat blev styrted, så Hænder ej rørtes derinde.
Lisumu oyo bato na ngai basali ezali monene koleka lisumu ya Sodome, engumba oyo ebebisamaki na mbala moko wana moto moko te asembolaki loboko na ye mpo na kotelemela yango.
7 Hendes Fyrster var renere end Sne, mer hvide end Mælk, deres Legeme rødere end Koral, som Safir deres Årer;
Bana ya bakonzi na bango bazalaki kongala koleka mvula ya pembe, pembe koleka miliki; banzoto na bango ezalaki motane koleka langi ya motane penza, mpe lolenge na bango ezalaki lokola libanga na safiri.
8 mer sorte end Sod ser de ud, kan ej kendes på Gaden, Huden hænger ved Knoglerne, tør som Træ.
Bilongi na bango ekomi mwindo koleka makala, bazali koyeba bango lisusu te na babalabala; poso na bango ya nzoto ekangami na mikuwa, ekawuki lokola koni.
9 Sværdets Ofre var bedre farne end Sultens, som svandt hen, dødsramte, af Mangel på Markens Grøde.
Bato oyo bakufi na mopanga bazali malamu koleka ba-oyo bakufi na nzala: banzulukaka mpe bakondaka makasi mpo na nzala, mpo na kozanga bilei kowuta na bilanga.
10 Blide kvinders Hænder kogte deres Børn; da mit Folks Datter brød sammen, blev de dem til Føde.
Basi ya mitema malamu balambi, na maboko na bango, bana na bango moko; bana na bango bakomi bilei na bango kati na pasi oyo ekomeli bato na ngai.
11 HERREN køled sin Vrede, udøste sin Harmglød, han tændte i Zion en Ild, dets Grundvolde åd den.
Yawe asilikaki makasi koleka; asopaki kanda na Ye mpe apelisaki moto kati na Siona, moto oyo ezikisaki miboko na yango.
12 Ej troede Jordens Konger, ja ingen i Verden, at Uven og Fjende skulde stå i Jerusalems Porte.
Bakonzi ya mabele mpe bikolo mosusu ya mokili bandimaki te ete banguna mpe bayini bakokaki kokota na bikuke ya Yelusalemi.
13 Det var for Profeternes Synd, for Præsternes Brøde, som i dets Midte udgød retfærdiges Blod.
Kasi makambo wana esalemaki mpo na masumu ya basakoli ya Yelusalemi mpe mabe ya Banganga-Nzambe na yango, oyo basopaki kati na yango makila ya bato ya sembo.
14 De vanked som blinde på Gaderne, tilsølet af Blod, rørte med Klæderne Ting, som ikke må røres.
Bakomaki sik’oyo koyengayenga na babalabala lokola bakufi miso, bakomaki mbindo na makila mpe moto moko te akokaki kosimba bilamba na bango.
15 "Var jer! En uren!" råbte man; "Var jer dog for dem!" Når de flyr og vanker, råber man: "Bliv ikke her!"
Bato bazali koganga mpe koloba na bango: « Bolongwa awa, bato ya mbindo! Bolongwa awa, bolongwa awa, bosimba biso te! » Wana bazalaki kokima mpe kotelengana, bato ya bikolo mosusu bazalaki koloba: « Bavanda na esika oyo te! »
16 HERREN spredte dem selv, han så dem ej mer, Præster regned man ej eller ynked Profeter.
Yawe, Ye moko, apanzi bango, azali kotala bango lisusu te. Bapesaki Banganga-Nzambe lokumu te mpe bayokelaki mibange mawa te.
17 End smægted vort Blik efter Hjælp, men kun for at skuffes, på Varden spejded vi efter det Folk, der ej hjælper.
Miso na biso elembaki lisusu mpo na kozela na pamba lisungi; wuta na bandako milayi na biso ya kotalela na mosika, tozalaki kotala wana tozalaki kozela lisungi kowuta na ekolo songolo mpe pakala, kasi ebikisaki biso te.
18 De lured på vort Fjed, fra Torvene holdt vi os borte; Enden var nær, vore Dage var omme, ja, Enden var kommet.
Banguna na biso bazalaki kolanda matambe na biso; boye tokokaki lisusu te kotambola na babalabala na biso. Suka na biso ekomaki pene, mikolo na biso ekomaki ya kotanga, mpo ete tokomaki na suka.
19 Mer snare end Himlens Ørne var de, som jog os, på Bjergene satte de efter os, lured i Ørkenen,
Bato oyo bazalaki kolanda biso bazalaki mbangu koleka mpongo, na likolo; bazalaki kolanda biso na likolo ya bangomba mpe kotiela biso mitambo kati na esobe.
20 vor Livsånde, HERRENs Salvede, blev fanget i deres Grave, han, i hvis Skygge vi tænkte at leve blandt Folkene.
Mopakolami na Yawe, oyo totielaki motema akangami na mitambo na bango; nzokande tozalaki kokanisa boye na tina na ye: « Tokobika bomoi malamu na se ya bobatelami na ye kati na bikolo. »
21 Glæd dig og fryd dig, Edom, som bor i Uz! Også dig skal Bægeret nå, du skal blotte dig drukken.
Edomi, mboka kitoko, movandi ya mokili ya Utsi, sepela, zala na esengo! Kasi yo mpe, bakopesa yo kopo; okomela, okolangwa mpe okotikala bolumbu.
22 Din Skyld er til Ende, Zion, du forvises ej mer; han hjemsøger, Edom, din Skyld, afslører dine Synder.
Siona, mboka kitoko, etumbu na yo ekosila; Nzambe akomema yo lisusu na bowumbu te. Kasi yo Edomi, mboka kitoko, Nzambe akopesa yo etumbu mpo na mabe na yo, mpe akobimisa masumu na yo na polele.

< Klagesangene 4 >