< Jeremias 32 >

1 Det Ord, som kom til Jeramias fra Herren i kong Zedekias af Judas tiende År, det er Nebukadrezars attende.
Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na bokonzi mpe Nabukodonozori akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi.
2 Dengang belejrede Babels Konges Hær Jerusalem, og Profeten Jeremas sad fængslet i Vagtforgården i Judas Konges Palads,
Ezalaki na tango oyo mampinga ya mokonzi ya Babiloni ezingelaki Yelusalemi, mpe mosakoli Jeremi azalaki ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli ya ndako ya mokonzi ya Yuda.
3 hvor Kong Zedekias af Juda havde ladet ham fængsle med de Ord: "Hvor tør du profetere og sige: Så siger HERREN: Se, jeg giver denne By i Babels Konges Hånd, og han skal indtage den;
Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, abwakaki ye kuna na koloba: « Mpo na nini ozali kosakola na maloba oyo: ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi: Nakokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobotola yango;
4 og Kong Zedekias af Juda skal ikke undslippe Kaldæernes Hånd, men overgives i Babels Konges Hånd, og han skal tale med ham Mund til Mund og se ham Øje i Øje;
Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akolonga te kokima liboso ya bato ya Babiloni, kasi nakokaba ye solo na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akolobana na ye mpe akotalana na ye na elongi;
5 og han skal føre Zedekias til Babel, og der skal han blive, til jeg ser til ham, lyder det fra HERREN; når I kæmper med Kaldæerne, får I ikke Lykke!"
akomema Sedesiasi na Babiloni, akowumela kuna kino tango nakotala likambo na ye, elobi Yawe, soki bomeki kobundisa bato ya Babiloni, bokolonga te. › »
6 Og Jeremias sagde: HERRENs Ord kom til mig således:
Jeremi alobaki: « Yawe alobaki na ngai:
7 Se, Hanamel, din Farbroder Sjallums Søn, kommer til dig og siger: "Køb min Mark i Anatot, thi du har Indløsningsret."
Anameyeli, mwana mobali ya Shalumi, noko na yo, azali koya epai na yo mpe akoloba: ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti, pamba te yo nde ozali na makoki mpe na mokumba ya kosikola yango. ›
8 Så kom Hanamel, min Farbroders Søn, til mig i Vagtforgården, som HERREN havde sagt, og sagde til mig: "Køb min Mark i Anatot i Benjamins Land, thi du har Arveretten, og indløsningsretten er din; køb dig den!" Da forstod jeg, at det var HERRENs Ord.
Bongo, kaka ndenge Yawe alobaki, Anameyeli, mwana ya noko na ngai, ayaki kotala ngai kati na lopango ya bakengeli mpe alobaki: ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti kati na etuka ya Benjame, pamba te yo nde ozali na makoki ya kosikola yango mpe ya kozwa yango; somba na yo yango. › Nasosolaki ete ezali Liloba na Yawe;
9 Og jeg købte Marken i Anatot af Hanamel, min Farbroders Søn, og tilvejede ham Pengene, sytten Sekel Sølv;
boye nasombaki elanga oyo ezali na Anatoti, na maboko ya Anameyeli, mwana mobali ya noko na ngai, mpe nafutaki ye mbongo ya bibende ya palata, zomi na sambo.
10 og jeg skrev Skøde og forseglede det, tilkaldte Vidner og afvejede Pengene på Vægtskål.
Nakomaki mokanda oyo nasombelaki elanga mpe nabetaki yango kashe; namekaki kilo ya mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli, na emekelo kilo.
11 Så tog jeg Skødet, både det forseglede og det åbne,
Nakamataki mokanda oyo nasombelaki elanga, oyo nabetaki kashe, oyo kati na yango bakoma malako ya mibeko mpe mabongisi; mpe nazwaki lisusu mokanda oyo babeta kashe te;
12 og overgav Skødet til Baruk, Masejas Søn Nerijas Søn, i Nærværelse af Hanamel, min Farbroders Søn, og Vidnerne, som havde underskrevet Skødet, og alle de Judæee, som var til Stede i Vagtforgården;
mpe napesaki mokanda oyo nasombelaki elanga epai ya Baruki, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, na miso ya Anameyeli, mwana ya noko na ngai, mpe ya batatoli oyo batiaki mikoloto na bango kati na mokanda oyo nasombelaki elanga, mpe na miso ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na lopango ya bakengeli.
13 og i deres Nærværelse bød jeg Baruk:
Napesaki Baruki mitindo oyo na miso na bango nyonso:
14 "Så siger Hærskarers HERRE, Israels Gud: Tag disse Skøder, både det forseglede og det åbne, og læg dem i en Lerkrukke, for at de kan holde sig i lange Tider.
‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Kamata mikanda oyo nasombelaki elanga, ezala oyo babeta kashe to oyo babeta kashe te; tia yango kati na mbeki oyo basala na mabele ya bikeko mpo ete ebeba te.
15 Thi så siger Hærskarers HERRE, Israels Gud: End skal der købes Huse, Marker og Vingårde i dette Land!"
Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi: Bato bakosomba lisusu bandako, bilanga mpe bilanga ya vino kati na mokili oyo. ›
16 Efter at have overgivet Skødet til Baruk, Nerijas Søn, bad jeg således til HERREN:
Sima na ngai kopesa mokanda oyo nasombelaki elanga epai ya Baruki, mwana mobali ya Neriya, nabondelaki Yawe:
17 Ak, Herre, HERRE, du har jo skabt Himmelen og Jorden ved din vældige Styrke og din udstrakte Arm, intet er dig for underfuldt,
Oh Nkolo Yawe! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo: olembanaka likambo moko te.
18 du, som øver Miskundhed mod Tusinder og gengælder Fædres Misgerning på deres Sønner efter dem; du store, vældige Gud, hvis Navn er Hærskarers HERRE,
Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga;
19 rig på Råd og stor i Dåd, hvis Øjne er åbne over alle Menneskebørnenes Veje, for at du kan give enhver efter hans Vej og hans Gerningers Frugt;
mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye.
20 du, som gjorde Tegn og Undere i Ægypten og gør det den Dag i Dag både i Israel og blandt andre Mennesker og skabte dig det Navn, du har i Dag,
Osalaki bilembo minene mpe bikamwa kati na Ejipito mpe ozali kokoba kosala yango kino lelo kati na Isalaele mpe kati na bato nyonso, mpe osalaki ete Kombo na Yo ekende sango ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo.
21 du, som førte dit Folk Israel ud af Ægypten med Tegn og Undere, med stærk Hånd og udstrakt Arm og stor Rædsel
Obimisaki bato na Yo, Isalaele, na Ejipito na nzela ya bilembo minene mpe bikamwa wana osalelaki nguya na Yo mpe osembolaki loboko na Yo ya nguya mpo na koyeisa somo kati na bato ya Ejipito.
22 og gav dem dette Land, som du havde svoret deres Fædre at ville give dem, et Land, der flyder med Mælk og Honning;
Opesaki bango mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa na batata na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi.
23 og de kom og tog det i Eje; men de hørte ikke din Røst og adlød ikke din Lov; de gjorde intet af, hvad du havde pålagt dem; så lod du al denne Ulykke ramme dem.
Bakotaki kati na yango mpe babotolaki yango; kasi batosaki Yo te, basalelaki Mobeko na Yo te, basalaki te nyonso oyo otindaki bango. Yango wana omemelaki bango pasi oyo nyonso.
24 Se, Stormvoldene har nået Byen, så den er ved at blive indtaget, og med Sværd, Hunger og Pest er Byen givet i de angribende Kaldæeres Hånd; had du talede, er sket, og du ser det selv.
Tala, banguna basili kobongama mpo na kobotola engumba! Likolo ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, oyo bazali kobundisa yango. Makambo oyo olobaki ekokisami, ndenge ozali komona yango na mokolo ya lelo.
25 Og skønt Byen er givet i Kaldæernes Hånd, siger du til mig, Herre, HERRE: "Køb dig Marken for Penge og tag Vidner derpå!"
Mpe atako engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, Yo, Nkolo Yawe, olobi na ngai: ‹ Somba elanga na mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli. › »
26 Da kom HERRENs Ord til Jeremias således:
Bongo Yawe alobaki na Jeremi:
27 Se, jeg er HERREN, alt Køds Gud; skulde noget være mig for underfuldt?
« Nazali Yawe, Nzambe ya moto nyonso. Boni, ezali na likambo oyo Ngai nakoki kolembana?
28 Derfor, så siger HERREN: Se, jeg giver denne By i kaldæernes og Kong Nebukadrezar af Babels Hånd, og han skal idtage den;
Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi: Nakokaba engumba oyo na maboko ya bato ya Babiloni mpe ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo ete azwa yango.
29 og Kaldæerne, der angriber denne By, skal komme og sætte Ild på den og afbrænde Husene, på hvis Tage man tændte Offerild for Baal og udgød Drikofre for andre Guder for at krænke mig.
Bato ya Babiloni oyo bazali kobundisa engumba oyo, bakokota kati na yango mpe bakotumba yango; bakotumba yango elongo na bandako oyo, na likolo ya manzanza na yango, bato bazalaki kotumbola Ngai na kobonza bambeka ya malasi ya ansa epai ya nzambe Bala mpe kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe ya bapaya.
30 Thi fra deres Ungdom af har Israeliterne og Judæerne kun gjort, hvad der var ondt i mine Øjne; thi Israeliterne gør ikke andet end krænke mig ved deres Hænders Værk, lyder det fra HERREN.
Bana ya Isalaele mpe ya Yuda, wuta bolenge na bango, bazalaki kosala eloko mosusu te na miso na Ngai, soki kaka mabe te; solo, bana ya Isalaele bazalaki kosala eloko mosusu te, soki kaka te kopesa Ngai kanda na nzela ya biloko oyo maboko na bango esalaki, elobi Yawe.
31 Ja, en Kilde til Vrede og Harme har denne By været mig, lige fra den Dag de byggede den og til i Dag, så at jeg må fjerne den fra mit Åsyn
Wuta batonga engumba oyo kino na mokolo ya lelo, mosala na yango kaka kotumbola Ngai mpe kopesa Ngai kanda; yango wana, nakolongola yango liboso na Ngai.
32 for alt det ondes Skyld, som Israeliterne og Judæerne gjorde for at krænke mig, de deres Konger, Fyrster, Præster og Profefer, Judas Mænd og Jerusalems Borgere.
Bato ya Isalaele mpe ya Yuda bapesaki Ngai kanda na nzela ya mabe nyonso oyo basalaki: ezala bango, bakonzi na bango, bakalaka na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi.
33 De vendte Ryggen og ikke Ansigtet til mig, og skønt jeg advarede dem årle og silde, vilde de ikke høre eller tage ved Lære.
Bapesaki Ngai mokongo na esika ya kotala Ngai. Atako nazalaki tango na tango koteya bango, kasi batikalaki koyoka Ngai te mpe baboyaki kozwa mayele.
34 De opstillede deres væmmelige Guder i det Hus, mit Navn nævnes over, for at gøre det urent;
Batiaki kutu banzambe na bango ya bikeko kati na Ndako epai wapi babelaka Kombo na Ngai, mpe na bongo, bakomisaki yango mbindo.
35 og de byggede Baals Offerhøje i Hinnoms Søns Dal for at ofre deres Sønner og Døtre til Molok, hvad jeg ikke havde budt dem, og hvad aldrig var i min Tanke, at man skulde gøre så vederstyggelig en Ting for derved at lokke Juda til Synd.
Bakomaki kotonga bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo na kobonza bana na bango ya mibali mpe ya basi epai ya Moloki; ezali likambo oyo Ngai natikalaki kotinda bango te, mpe natikala kokanisa te ete bakoki kosala makambo ya nkele boye mpo na komemisa Yuda masumu.
36 Men nu, så siger HERREN, Israels Gud, om denne By, som I siger er givet i Babels Konges Hånd med Sværd, Hunger og Pest:
Mpo na yango, tala sik’oyo liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na engumba oyo bino bozali koloba ete ekabami na maboko ya mokonzi ya Babiloni na nzela ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka:
37 Se, jeg vil samle dem fra alle de Lande, som jeg har bortstødt dem til i min Vrede og Harme og i stor Fortørnelse, og føre dem hjem til dette Sted og lade dem bo trygt.
‹ Solo, nakosangisa bango wuta na mikili nyonso epai wapi nabenganaki bango tango natombokelaki bango, nakozongisa bango na esika oyo mpe nakovandisa bango na kimia.
38 De skal være mit Folk, og jeg vil være deres Gud;
Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango.
39 og jeg vil give dem eet Hjerte og een Vej, så de frygter mig alle Dage, at det må gå dem og deres Sønner efter dem vel.
Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango.
40 Jeg slutter en evig Pagt med dem, at jeg ikke vil drage mig tilbage fra dem, men gøre vel itnod dem; og min Frygt lægger jeg i deres Hjerter, så de ikke viger fra mig.
Nakosala boyokani ya libela elongo na bango, nakotika te kosalela bango bolamu mpe nakosala ete batosa Ngai mpe bapesa Ngai lisusu mokongo te.
41 Jeg vil glæde mig over dem og gøre vel imod dem; og jeg planter dem i dette Land i Trofasthed af hele mit Hjerte og hele min Sjæl.
Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. ›
42 Thi så siger HERREN: Som jeg bragte al denne store Ulykke over dette Folk, således vil jeg bringe over dem alt det gode, jeg taler til dem om.
Tala liloba oyo Yawe alobi: Ndenge natindelaki bato oyo pasi oyo nyonso, ndenge wana mpe nakotindela bango bomengo nyonso oyo nalakaki bango.
43 End skal der købes Marker i det Land, som I siger er en Ørken uden Mennesker og Kvæg og givet i Kaldæernes Hånd;
Bato bakosomba lisusu bilanga kati na mokili oyo bino bozali koloba na tina na yango: ‹ Mokili oyo ebeba, etikala lisusu na bato mpe na banyama te; pamba te ekabama na maboko ya bato ya Babiloni. ›
44 man skal købe Marker for Penge og skrive Skøder og forsegle dem og tilkalde Vidner i Benjamins Land, i Jerusalems Omegn, i Judas Byer, i Bjerglandets, Lavlandets og Sydlandets Byer; thi jeg vender deres Skæbne, lyder det fra HERREN.
Solo, bakosomba lisusu bilanga na motuya ya palata, bakotia mikoloto mpe bakashe na mikanda oyo bakosombela bilanga yango, na miso ya batatoli, kati na mboka ya Benjame, kati na bamboka mike-mike oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi, kati na bingumba ya Yuda mpe kati na bingumba ya mokili ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi; pamba te nakozongisa bato na bango oyo bakendeki na bowumbu, elobi Yawe. »

< Jeremias 32 >